Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 4

Asepelisaki tata na ye mpe Yehova

Asepelisaki tata na ye mpe Yehova

Elaka nini Yefeta asalaki epai ya Yehova?

Atako ezalaki pɛtɛɛ te, mwana ya Yefeta asalaki makambo oyo tata na ye alakaki Yehova

Ozali komona mwana mwasi wana na elilingi?Tata na ye nkombo na ye Yefeta. Biblia eyebisi nkombo ya mwana mwasi yango te, kasi toyebi kaka ete asepelisaki tata na ye mpe Yehova. Tólobela naino mwana yango ná tata na ye Yefeta.

Yefeta azalaki moto malamu mpe alekisaki ntango mingi na koteya mwana na ye makambo ya Yehova. Azalaki makasi na mosala mpe mokambi ya malamu. Yango wana Bayisraele basɛngaki ye akamba bango mpo bákende kobunda na banguna na bango.

Yefeta abondelaki Nzambe asalisa bango bálonga etumba. Alakaki ete soki alongi etumba, ntango akozonga, akopesa Yehova moto ya liboso oyo akobima na ndako na ye mpo na kokutana na ye. Moto yango akofanda na tabernakle ya Nzambe mpe akosala kuna bomoi na ye mobimba. Tabernakle ezalaki esika oyo bato bazalaki kokende kosambela Nzambe na ntango wana. Yefeta alongaki etumba. Ntango azongaki, oyebi moto ya liboso oyo abimaki na ndako na ye?

Ɛɛ, mwana na ye ya mwasi. Yefeta azalaki kaka na mwana wana moko mpe sikoyo asengeli kotinda ye mosika. Likambo yango epesaki Yefeta mawa mingi. Kasi kobosana te, alakaki ete akosala yango. Na mbala moko, mwana yango alobaki ete: ‘Tata, lokola olakaki Yehova, osengeli kokokisa elaka na yo.’

Baninga ya mwana ya Yefeta bazalaki kokende kotala ye mbula na mbula

Mwana ya Yefeta mpe ayokaki mawa na motema. Kuna, na tabernakle, akoki kobala te mpe kobota te. Kasi alingaki mpenza kokokisa elako ya tata na ye mpe kosepelisa Yehova. Na miso na ye, likambo yango ezalaki na ntina mingi koleka kobala mpe kobota bana. Yango wana, atikaki ndako na bango mpe akendeki kofanda na tabernakle bomoi na ye mobimba.

Okanisi ete likambo oyo asalaki esepelisaki tata na ye mpe Yehova?Ɛɛ, ezali bongo. Soki ozali kotosa Yehova mpe kolinga Ye, okoki kozala lokola mwana ya Yefeta. Yo mpe okosepelisa baboti na yo mpe okosepelisa Yehova mingi mpenza.