Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 14

Bokonzi oyo ekoyangela mabele mobimba

Bokonzi oyo ekoyangela mabele mobimba

Oyebi Bokonzi nini tolingi kolobela?Ɛɛ, ezali Bokonzi ya Nzambe, oyo ekokómisa mabele paradiso. Olingi koyeba makambo mosusu oyo etali Bokonzi yango?

Bokonzi nyonso ezalaka na mokonzi. Mokonzi ezali moto oyo ayangelaka bato nyonso ya mboka. Oyebi soki Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe ezali nani?Ezali Yesu Kristo. Yesu afandaka na likoló. Etikali moke akoyangela moto nyonso awa na mabele! Okanisi ete tokozala na esengo ntango Yesu akoyangela mabele mobimba?

Makambo nini ozali kozela ete esalema na Paradiso?

Tokozala na esengo mpenza! Na Paradiso, bato bakobanda kobunda lisusu te; basoda mpe bakozala lisusu te. Bato nyonso bakolingana. Maladi ekozala te, bato bakokufa lisusu te. Bato oyo bakufá miso bakomona, bababa bakoloba, bato oyo makolo ebukaná bakopota mbangu mpe bakopumbwa. Biloko ya kolya ekozala ebele mpo na moto nyonso. Banyama bakozala na kimya bango na bango mpe bakokóma baninga na biso. Bato oyo bakufá bakozonga na bomoi. Basi ná mibali mingi oyo tolobelaki na mokanda oyo, na ndakisa Rebeka, Rahaba, Davidi, mpe Eliya bakozonga mpe na bomoi! Okolinga kokutana na bango ntango bakosekwa?

Yehova alingaka yo mpe alingi ete ozala na esengo. Soki okobi koyekola makambo ya Yehova mpe ozali kotosa ye, okozwa bomoi ya seko na paradiso moko kitoko! Yango nde olingi?