Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

4

Yehova asali ete nkombo na ye eyebana

Yehova asali ete nkombo na ye eyebana

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Basaleli ya Nzambe bapesi nkombo ya Nzambe lokumu oyo ebongi na yango

1, 2. Ndenge nini Libongoli ya Mokili ya Sika esali ete nkombo ya Nzambe eyebana?

 NA MOKOLO ya mibale, 02/12/1947 na ntɔngɔ, etuluku moke ya bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo, ya Betele ya Brooklyn, na New York, babandaki mosala monene ya kobongola Biblia. Mosala yango ezalaki ya mpasi mingi, kasi bakobaki kosala yango na boumeli ya mbula 12 oyo elandaki. Nsukansuka, na mokolo ya lomingo 13/03/1960, basilisaki eteni ya nsuka ya libongoli ya Biblia moko ya sika. Sanza misato na nsima, na mokolo ya 18/06/1960, ndeko Nathan Knorr abimisaki volimi ya nsuka ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika na liyangani monene oyo esalemaki na Manchester, na Angleterre. Ndeko Knorr amonisaki malamu esengo ya bayangani nyonso ntango alobaki na mongongo makasi ete: ‘Lelo ezali mokolo ya esengo mpo na Batatoli ya Yehova na mokili mobimba!’ Biblia yango epesaki esengo mingi mpo na likambo moko oyo ekesenisaki yango na Babiblia mosusu: esalelaki nkombo ya Nzambe mingi.

Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ebimaki na 1950, na liyangani (Bokoli ya Teokrasi Yankee Stadium, na engumba New York: Ghana)

2 Babiblia mingi elongolaki nkombo ya Nzambe. Kasi basaleli wana ya Yehova oyo batyamaki mafuta na elimo batɛmɛlaki mayele mabe oyo Satana azalaki kosalela mpo bato báyeba nkombo ya Nzambe te. Maloba ya ebandeli ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebimaki mokolo wana elobaki ete: “Likambo ya ntina mingi na kati ya libongoli oyo ezali ete ezongisi nkombo ya Nzambe na bisika oyo esengeli kozala.” Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli nkombo ya Nzambe, Yehova, mbala koleka 7000. Libongoli yango esalaka mpenza ete, Yehova, nkombo ya Tata na biso ya likoló eyebana!

3. (a) Bandeko na biso basosolaki ete nkombo ya Nzambe elimboli nini? (b) Ndimbola nini tosengeli kopesa na maloba ya Kobima 3:13, 14? (Talá etanda “ Ndimbola ya nkombo ya Nzambe.”)

3 Bambula mingi liboso, Bayekoli ya Biblia bazalaki kokanisa ete nkombo ya Nzambe elimboli “Nazali oyo ezali ngai.” (Kob. 3:14haut fleuve) Yango wana Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/1926 elobaki ete: “Nkombo Yehova elimboli Ye oyo azalaka kaka, . . . Ye oyo azali na ebandeli te, azali mpe na nsuka te.” Nzokande, ntango babongoli ya Libongoli ya Mokili ya Sika babandaki mosala na bango, Yehova asalisaki basaleli na ye básosola ete nkombo na ye elimboli kaka te ete azali, kasi elimboli nde ete azali Nzambe oyo azali na mokano mpe oyo asalaka. Bamonaki ete nkombo Yehova elimboli “Akómisaka.” Nzambe asalaki ete molɔ́ngɔ́ mpe bikelamu nyonso ezala, mpe azali kokoba kosala ete bilaka na ye mpe mokano na ye ekokisama. Kasi, mpo na nini ezali na ntina mingi ete nkombo ya Nzambe eyebana, mpe ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ na likambo yango?

Kosantisama ya nkombo ya Nzambe

4, 5. (a) Ntango tobondelaka ete: “Nkombo na yo esantisama,” tosɛngaka Nzambe nini? (b) Ndenge nini Nzambe akosantisa nkombo na ye mpe ntango nini?

4 Yehova alingi ete nkombo na ye eyebana. Kutu, mokano na ye ya liboso ezali ya kosantisa nkombo na ye, ndenge Yesu ateyaki bayekoli na ye básɛngaka libosoliboso na libondeli ete: “Nkombo na yo esantisama.” (Mat. 6:9) Ntango tobondelaka bongo, tosɛngaka nini?

5 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 1 ya buku oyo, kobondela ete “Nkombo na yo esantisama” ezali na kati ya makambo misato ya liboso oyo etali mokano ya Yehova, ndenge Yesu amonisaki yango na libondeli oyo alakisaki bayekoli na ye. Makambo mosusu mibale ezali: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema.” (Mat. 6:10) Ntango tobondelaka bongo, tosɛngaka Yehova asala ete Bokonzi na ye eya mpe mokano na ye esalema; na yango, ntango tobondelaka ete “nkombo na yo esantisama,” tosɛngaka Yehova asala mpo na kosantisa nkombo na ye. Na maloba mosusu, tosɛngaka Yehova asala mpo na kopɛtola nkombo na ye na makambo nyonso ya mabe oyo elobamá mpo na yango banda na botomboki ya Edene. Yehova akosala nini? Alobi boye: “Nakosantisa nkombo na ngai monene, oyo bazalaki kokómisa eloko mpamba na kati ya bikólo.” (Ezk. 36:23; 38:23) Yehova akosantisa nkombo na ye na miso ya bikelamu nyonso ntango akolongola mabe nyonso na Armagedona.

6. Ndenge nini tokoki kosantisa nkombo ya Nzambe?

6 Banda kala, Yehova apesaka basaleli na ye libaku ya kosantisa nkombo na ye. Ya solo, tokoki te kokómisa nkombo ya Nzambe mosantu, mpamba te banda kala ezalaka mosantu na ndenge ya kokoka. Kasi, ndenge nini tokoki kosantisa yango? Mosakoli Yisaya alobaki: “Yehova ya mampinga​—ye nde Moto bosengeli kotalela ete azali mosantu.” Mpe Yehova ye moko alobaki mpo na bato na ye ete: “Bakosantisa nkombo na ngai, . . . mpe bakotala Nzambe ya Yisraele na nsɔmɔ.” (Yis. 8:13; 29:23) Na yango, kosantisa nkombo ya Nzambe elimboli kotalela yango lokola nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso, komemya nkombo yango, mpe kosalisa bato mosusu bámona yango mosantu. Tokomonisa mpenza ete tozali na nsɔmɔ mpe tobangaka nkombo ya Nzambe soki tozali kondima ete Yehova azali Moyangeli na biso mpe tozali kotosa ye na motema mobimba.​—Mas. 3:1; Em. 4:11.

Babongisami mpo na kobengama mpe komema nkombo ya Nzambe

7, 8. (a) Mpo na nini ntango mingi elekaki liboso basaleli ya Nzambe bákóma kobengama na nkombo na ye? (b) Tokotalela nini sikoyo?

7 Na ntango na biso, basaleli ya Nzambe basalelaka nkombo ya Nzambe na mikanda na bango banda na bambula ya 1870. Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya sanza ya mwambe na mobu 1879 mpe buku ya nzembo Nzembo ya mwasi ya libala (na Lingelesi) oyo ebimaki kaka na mbula yango, etángaki nkombo Yehova. Atako bongo, emonani ete liboso Yehova apesa basaleli na ye nzela ya kobengama na nkombo na ye mosantu, alingaki ete bákokisa naino masɛngami mpo bázwa libaku wana monene. Ndenge nini Yehova abongisaki Bayekoli ya Biblia mpo bábengama na nkombo na ye?

8 Soki tozongi na bambula ya 1800 mpe na ebandeli ya bambula ya 1900, tokomona ndenge Yehova asalisaki basaleli na ye bákanga malamumalamu ntina ya mateya oyo etali nkombo na ye. Tótalela bandakisa misato.

9, 10. (a) Mpo na nini banimero ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki Yesu mingi? (b) Mbongwana nini ekɔtaki kobanda 1919, mpe ebimisaki matomba nini? (Talá mpe etanda “ Ndenge Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esali ete nkombo ya Nzambe eyebana.”)

9 Ya liboso, basaleli ya Yehova bakómaki kopesa nkombo ya Nzambe lokumu oyo ebongi na yango. Bayekoli ya Biblia ya sembo bazalaki komona ete lisiko nde liteya oyo eleki ntina na Biblia. Yango wana Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kolobela mingi kaka Yesu. Na ndakisa, na mbula ya liboso oyo zulunalo yango ebimaki, nkombo Yesu emonanaki mbala 10 koleka nkombo Yehova. Mpo na Bayekoli ya Biblia ya ntango wana, lisolo moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/1976 elobaki ete bazalaki kopesa Yesu “lokumu koleka ndelo.” Kasi na nsima, Yehova asalisaki bango básosola ete Biblia epesi nkombo ya Nzambe lokumu mingi. Bayekoli ya Biblia basalaki nini? Lisolo yango ebakisaki ete mingimingi kobanda na 1919, “bakómaki kopesa Yehova, Tata ya Masiya, lokumu mingi.” Kutu, na boumeli ya mbula zomi kobanda wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli etángaki nkombo ya Nzambe mbala koleka 6500!

10 Ndenge bandeko na biso wana bakómaki kopesa nkombo Yehova lokumu oyo ebongi na yango, bamonisaki ete balingaka mpenza nkombo ya Nzambe. Ndenge moko na Moize, babandaki ‘kosakola nkombo ya Yehova.’ (Mib. 32:3; Nz. 34:3) Na yango, ndenge Biblia elakaki yango, Yehova amonaki ete balingaka nkombo na ye mpe amoniselaki bango boboto.​—Nz. 119:132; Ebr. 6:10.

11, 12. (a) Mbongwana nini ekɔtaki na mikanda na biso mwa moke nsima ya 1919? (b) Yehova akómaki kobenda likebi ya basaleli na ye na likambo nini, mpe mpo na nini?

11 Ya mibale, bakristo ya solo bayaki koyeba malamumalamu mosala oyo Nzambe apesá bango. Mwa moke nsima ya 1919, bandeko oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazalaki kokamba Bayekoli ya Biblia, babandaki koyekola esakweli ya Yisaya. Na nsima, mikanda na biso ekómaki kolobela mingi makambo mosusu. Mpo na nini mbongwana wana ezalaki mpenza ‘bilei na ntango oyo ebongi’?​—Mat. 24:45.

12 Liboso ya 1919, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimbolaki ata mbala moko te maloba ya Yisaya oyo: “‘Bino bozali batatoli na ngai,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘ɛɛ mosaleli na ngai oyo naponi.’” (Tángá Yisaya 43:10-12.) Kasi, mwa moke nsima ya 1919, mikanda na biso ekómaki kobenda likebi mingi na vɛrsɛ yango; ezalaki kolendisa bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo básala mosala oyo Yehova apesá bango: kotatola mpo na ye. Kutu, kaka kobanda 1925 tii 1931, masolo 57 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki Yisaya mokapo 43, mpe lisolo mokomoko emonisaki ete maloba yango etaleli bakristo ya solo. Ezali polele ete na boumeli ya bambula yango, Yehova azalaki kobenda likebi ya basaleli na ye na mosala oyo basengelaki kosala. Mpo na nini? Azalaki kosala yango mpo “bámekama liboso.” (1 Tim. 3:10) Liboso bakóma bato oyo babongi kobengama na nkombo ya Nzambe, Bayekoli ya Biblia basengelaki komonisa Yehova na misala na bango ete bazali mpenza batatoli na ye.​—Luka 24:47, 48.

13. Ndenge nini Liloba ya Nzambe esalisaki Bayekoli ya Biblia báyeba likambo eleki ntina?

13 Ya misato, basaleli ya Yehova bayaki komona ntina ya kosantisa nkombo ya Nzambe. Na bambula ya 1920, basosolaki ete kosantisama ya nkombo ya Nzambe nde likambo eleki ntina. Ndenge nini Liloba ya Nzambe emonisi yango? Tótalela ndakisa mibale. Wapi ntina ya libosoliboso oyo Nzambe abimisaki Yisraele na Ezipito? Yehova alobaki: “Mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.” (Kob. 9:16) Mpe mpo na nini Yehova azalaki kolimbisa Bayisraele ntango bazalaki kotombokela ye? Lisusu, Yehova alobaki: “Nasalaki mpo na nkombo na ngai, mpo ekómisama eloko mpamba te na miso ya bikólo.” (Ezk. 20:8-10) Ndenge nini masolo wana mpe masolo mosusu ya Biblia esalisaki Bayekoli ya Biblia?

14. (a) Na nsuka ya bambula ya 1920, likambo nini basaleli ya Nzambe basosolaki? (b) Boyebi oyo Bayekoli ya Biblia bakómaki na yango etindaki bango básala nini? (Talá mpe etanda “ Etindaka biso tósakola.”)

14 Na nsuka ya bambula ya 1920, basaleli ya Nzambe bakangaki ntina ya makambo oyo Yisaya alobaki mbula soki 2700 liboso. Yisaya alobaki mpo na Yehova ete: “Ndenge yango nde okambaki bato na yo mpo omisalela nkombo moko kitoko.” (Yis. 63:14) Bayekoli ya Biblia bamonaki ete likambo eleki ntina, ezalaki lobiko ya bato te, kasi nde kosantisama ya nkombo ya Nzambe. (Yis. 37:20; Ezk. 38:23) Na 1929, buku Esakweli emonisaki likanisi yango polele; elobaki ete: “Nkombo ya Yehova nde likambo eleki ntina na molɔ́ngɔ́ mobimba.” Ntango bakangaki ntina ya likambo yango, basaleli ya Nzambe babakisaki molende na kotatola nkombo ya Yehova mpe kokweisa makambo ya lokuta oyo elobamá mpo na nkombo yango.

15. (a) Na bambula ya 1930, likambo nini bandeko na biso basosolaki? (b) Ntango ekokaki mpo na likambo nini?

15 Na ebandeli ya bambula ya 1930, bandeko na biso bakómaki kopesa nkombo ya Nzambe lokumu oyo ebongi na yango, bayebaki malamu mosala oyo Nzambe apesá bango, mpe basosolaki likambo oyo eleki ntina na molɔ́ngɔ́ mobimba. Sikoyo, Yehova amonaki ete ntango ekoki mpo apesa basaleli na ye lokumu ya kobengama na nkombo na ye. Mpo tómona ndenge esalemaki, tótalela mwa makambo ya kala.

Yehova asali “ekólo moko mpo na nkombo na ye”

16. (a) Yehova asali nini mpo nkombo na ye eyebana? (b) Na kala, banani bazalaki ekólo ya Nzambe?

16 Mpo nkombo na ye eyebana, Yehova aponá mpe bato awa na mabele mpo bábengama na nkombo na ye. Kobanda na mobu 1513 L.T.B., ekólo Yisraele ezalaki kobengama na nkombo ya Yehova. (Yis. 43:12) Kasi, lokola batosaki te kondimana oyo Yehova Nzambe asalaki na bango, na mobu 33 T.B., bazalaki lisusu ekólo na ye te. Mwa moke na nsima, Yehova “abalolaki likebi na ye . . . epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Mis. 15:14) Ekólo yango ya sika oyo Yehova aponaki ekómaki kobengama “Yisraele ya Nzambe.” Ekólo yango esalemi na bayekoli ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bauti na bikólo ndenge na ndenge.​—Gal. 6:16.

17. Likambo nini ya mabe Satana alongaki kosala?

17 Na mobu soki 44 T.B., bayekoli ya Kristo “babengamaki mpo na mbala ya liboso bakristo na litambwisi ya Nzambe.” (Mis. 11:26) Na ebandeli, nkombo bakristo ezalaki kaka mpo na kolobela bakristo ya solo. (1 Pe. 4:16) Kasi, ndenge ndakisa ya Yesu ya blé ná matiti mabe emonisaki yango, na mayele mabe na ye, Satana alongaki kosala ete nkombo bakristo ekóma kosalelama ata mpo na bakristo nyonso ya lokuta. Yango wana, na boumeli ya bankama ya bambula, bokeseni ezalaki polele te kati na bakristo ya solo ná bakristo ya lokuta. Kasi, ntango “eleko ya kobuka mbuma” ebandaki na 1914, makambo ebandaki kobongwana. Mpo na nini? Mpo baanzelu babandaki kokabola bakristo ya solo na bakristo ya lokuta.​—Mat. 13:30, 39-41.

18. Nini esalisaki bandeko na biso bámona ete basengeli kobengama na nkombo mosusu?

18 Nsima ya kotyama ya moombo ya sembo na 1919, Yehova asalisaki basaleli na ye básosola mosala oyo apesaki bango. Eumelaki te, bamonaki ete mosala ya kosakola ndako na ndako nde ekokesenisa bango na bakristo nyonso ya lokuta. Na nsima, eumelaki te bamonaki ete nkombo “Bayekoli ya Biblia” ezalaki kokesenisa bango malamumalamu te na bakristo ya lokuta. Mokano na bango ya liboso ezalaki kaka koyekola Biblia te, kasi nde kotatola mpo na Nzambe, kokumisa nkombo na ye mpe kosala ete eyebana. Na yango, nkombo nini ekoyokana mpenza na mosala oyo bazalaki kosala? Motuna yango ezwaki eyano na 1931.

Programɛ ya liyangani, 1931

19, 20. (a) Ekateli nini ya monene ezwamaki na liyangani ya 1931? (b) Bandeko bayokaki ndenge nini mpo na nkombo wana ya sika?

19 Na sanza ya nsambo na 1931, Bayekoli ya Biblia soki 15000 bayaki na Colombus, na etúká ya Ohio (États-Unis) mpo na liyangani moko ya monene. Na lokasa ya programɛ, ezalaki na balɛtrɛ mibale ya minene: J ná W. Balɛtrɛ yango ebendaki likebi ya bato. Bazalaki komituna ete: ‘Balɛtrɛ yango elimboli nini?’ Bandeko mosusu bazalaki koloba ete elimboli ‘Just Watch’ (Talá kaka); basusu balobaki ‘Just Wait’ (Zelá kaka). Na nsima, na mokolo ya lomingo 26/07/1931, ndeko Joseph Rutherford atángaki ekateli oyo bato nyonso basengeli kozwa; kati na yango, ezalaki na maloba oyo: “Tolingi koyebana mpe kobengama na nkombo oyo, elingi koloba, Batatoli ya Yehova.” Na ntango wana, bayangani nyonso bayebaki ndimbola ya balɛtrɛ oyo ezalaki na programɛ JW: Jehovah’s Witnesses (Batatoli ya Yehova), nkombo oyo euti na Biblia, na Yisaya 43:10.

20 Bayangani nyonso bandimaki ekateli yango mpe babɛtaki mabɔkɔ makasi ntango molai. Na nzela ya radio, esengo oyo bayangani bazalaki na yango na Columbus, eyokanaki na mokili mobimba! Ernest mpe Naomi Barber, oyo bazalaki na Australie, balobaki boye: “Ntango toyokaki bandeko ya Amerika bazali kobɛta mabɔkɔ, mbala moko na Melbourne mpe bandeko batɛlɛmaki mpe babandaki mpe kobɛta mabɔkɔ. Tokobosana yango ata mokolo moko te!” a

Nkombo ya Nzambe ezali koyebana na mokili mobimba

21. Ndenge nini nkombo wana ya sika elendisaki bandeko mpo na mosala ya kosakola?

21 Kozwa nkombo Batatoli ya Yehova, oyo euti na Biblia, ebakiselaki basaleli ya Nzambe molende na mosala ya kosakola. Ndeko Edward Grimes ná mwasi na ye Jessie, babongisi-nzela na États-Unis oyo bakɔtaki mpe liyangani wana ya 1931 na Columbus, balobaki boye: “Ntango tolongwaki na ndako, tozalaki Bayekoli ya Biblia, kasi ntango tozongaki, tokómaki Batatoli ya Yehova. Tosepelaki mpo tozwaki nkombo oyo esalisaki biso tókumisa nkombo ya Nzambe na biso.” Nsima ya liyangani wana, Batatoli mosusu bakómaki kosalela mayele ya sika mpo na kotatola. Na mosala ya kosakola, bazalaki kolakisa bato bakarte oyo bakomi: “Nazali motatoli ya YEHOVA mpe nazali kosakola Bokonzi ya YEHOVA Nzambe na biso.” Basaleli ya Nzambe basepelaki mpenza kobengama na nkombo ya Yehova, mpe bakokaki sikoyo kosakola ndimbola ya nkombo yango na mokili mobimba.​—Yis. 12:4.

“Ntango tolongwaki na ndako, tozalaki Bayekoli ya Biblia, kasi ntango tozongaki, tokómaki Batatoli ya Yehova”

22. Nini emonisi ete nkombo Batatoli ya Yehova ekesenisaka basaleli ya Nzambe na mangomba mosusu nyonso?

22 Bambula mingi esili koleka banda ntango Yehova asalisaki bandeko na biso oyo batyami mafuta na elimo bándima nkombo oyo ekesenisaki bango na bakristo mosusu. Nsima ya bambula, Satana alongi nde kozipa nkombo yango ya basaleli ya Nzambe? Alongi nde kosala ete bato báyeba te kokesenisa biso na mangomba mosusu? Te, alongi ata moke te! Lelo oyo, nkombo na biso ya Batatoli ya Yehova eyebani mingi mpenza. (Tángá Mika 4:5; Malaki 3:18.) Kutu, bato bayebi biso malamu mpenza na nkombo ya Nzambe na biso, mpo soki moto azali kosalela nkombo yango mingi bato bayebaka mbala moko ete azali Motatoli ya Yehova. Losambo ya Yehova ezipami te na ebele ya mangomba ya lokuta ya lelo oyo ezali lokola bangomba; kutu ‘epikami nde makasi likoló koleka nsɔngɛ ya bangomba.’ (Yis. 2:2) Lelo oyo, losambo ya Yehova mpe nkombo na ye mosantu eyebani mingi mpenza.

23. Na kolanda Nzembo 121:5, likambo nini oyo toyebi mpo na Yehova epesaka biso makasi?

23 Koyeba ete Yehova azali kobatela biso lelo oyo mpe akobatela biso na mitambo ya Satana na mikolo ezali koya, epesaka biso makasi mpenza! (Nz. 121:5) Yango wana, toyokaka lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Esengo na ekólo oyo Yehova azali Nzambe na yango, bato oyo ye aponi bázala libula na ye.”​—Nz. 33:12.

a Mpo oyeba ndenge bazalaki kosalela radio talá Mokapo 7, na nkasa 72-74.