Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lobɔkɔ ya mwasi: Ndeko mwasi moko na Alabama, États-Unis, azali kobɛta diskɛ ya diskur ya ndeko Rutherford, na nsuka ya 1930; Lobɔkɔ ya mobali: Suisse

ETENI 1

Solo ya Bokonzi: Kopesa bilei ya elimo

Solo ya Bokonzi: Kopesa bilei ya elimo

KANISÁ ete ozali koyekola na moto Biblia mpe omoni ndenge asepeli mpo akangi ntina ya vɛrsɛ moko oyo bouti kotánga elongo. Atuni yo na malɛmbɛ ete: “Olingi koloba ete Biblia eteyaka ete tokoki kofanda libela na libela na Paradiso, awa na mabele?” Ndeko oyo bobimi na ye na mosala ya kosakola asɛki mwa moke mpe atuni ye: “Yo moko otángi nini na Biblia?” Na esengo makasi, moyekoli aningisi motó mpe alobi: “Kokamwa! Mbala ya liboso báteya ngai likambo yango!” Omikundoli ete alobaki mpe bongo eleki mwa bapɔsɔ, ntango oteyaki ye ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova.

Osilá kokutana na likambo ya ndenge wana? Basaleli mingi ya Nzambe bakutanaka na yango. Makambo ya ndenge wana ekundwelaka biso ete tozalaka na eloko moko ya motuya: boyebi ya solo! Kanisá naino: Ndenge nini ozwá boyebi yango? Na eteni oyo, tokotalela motuna yango. Ndenge basaleli ya Nzambe bazali kozwa bingɛngiseli ya elimo mokemoke ezali mpenza komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya solo. Banda mbula 100, Yesu Kristo, Mokonzi ya Bokonzi yango azali kosala ete basaleli ya Nzambe báyeba solo.

NA ETENI OYO

MOKAPO 3

Yehova ayebisi bato mokano na ye

Na ebandeli, Bokonzi ya Nzambe ezalaki na kati ya mokano ya Nzambe?

MOKAPO 4

Yehova asali ete nkombo na ye eyebana

Makambo nini Bokonzi esili kosala mpo na nkombo ya Nzambe? Okoki kosala nini mpo na kosantisa nkombo ya Yehova?

MOKAPO 5

Mokonzi asalisi bato báyeba makambo oyo etali Bokonzi

Talá makambo oyo ekosalisa yo oyeba malamumalamu Bokonzi ya Nzambe, bakonzi na yango, bato oyo yango ekoyangela, mpe ndenge ya komonisa bosembo.