Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lobɔkɔ ya mobali: Bazali kosakola na elobeli ya bababa na Corée, lelo oyo; Lobɔkɔ ya mwasi: Colporteur ya mwasi azali kosakola na Corée, na 1931

ETENI 2

Kosakola Bokonzi​​—Mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba

Kosakola Bokonzi​​—Mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba

KANISÁ ete okei mosala te mpe olingi kobima na mosala ya kosakola. Lokola olingaki kopema, ozali komituna soki obima to te. Motema mosusu ezali kotinda yo olala mpo nzoto epema! Kasi, ntango obondeli, omoni malamu obima kaka. Na likita mpo na mosala ya kosakola, bapesi yo ndeko mwasi moko ya mobange mpo obima na ye, mpe ezaleli na ye ya koyika mpiko mpe boboto na ye esimbi motema na yo. Ntango bozali kosakola ndako na ndako, okanisi ebele ya bandeko mibali mpe bandeko basi na mokili mobimba oyo bazali kosakola kaka nsango oyo bino bozali kosakola, basalelaka kaka mikanda oyo bino bozali kosalela, mpe bazwaka kaka formasyo ndenge moko na bino. Ntango ozongi na ndako, oyoki nzoto makasi. Omoni ete osalaki malamu ndenge otikalaki kolala te!

Lelo oyo, mosala ya kosakola nde mosala oyo eleki ntina ya Bokonzi ya Nzambe. Yesu asakolaki ete mosala yango ekosalema na ndenge ya kokamwa na mikolo ya nsuka. (Mat. 24:14) Ndenge nini esakweli yango ezali kokokisama? Na eteni oyo, tokolobela basakoli, mayele oyo basaleli mpo na kosakola, mpe bisaleli oyo esalisi mingi na mosala ya kosakola; yango ezali kosalisa bamilio ya bato na mokili mobimba bámona ete Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza likambo ya solo.

NA ETENI OYO

MOKAPO 6

Basakoli ya Bokonzi​​—Bato bamipesi na bolingo na bango moko

Mpo na nini Yesu azalaki na elikya ete ekozala na ebele ya bato oyo bakomipesa na kosakola na mikolo ya nsuka? Ndenge nini okoki komonisa ete otyaka Bokonzi na esika ya liboso?

MOKAPO 7

Mayele oyo tosaleli​​—Ebele ya bato bayoki nsango malamu

Talá mayele ndenge na ndenge oyo basaleli ya Nzambe basaleli mpo bato ebele mpenza báyoka nsango malamu liboso nsuka eya.

MOKAPO 8

Biloko oyo tosaleli​​—Kobimisa mikanda mpo na mokili mobimba

Ndenge nini mosala na biso ya kobongola ezali komonisa ete Yesu azali na biso? Makambo nini oyo etali mikanda na biso endimisaka yo ete Bokonzi ezali mpenza likambo ya solo?

MOKAPO 9

Mosala ya kosakola​​—“Bilanga . . . eteli mpo na bobuki mbuma”

Yesu ateyaki bayekoli na ye makambo mibale ya ntina oyo etali mosala monene ya kobuka mbuma ya elilingi. Makambo yango etali biso na nini lelo?