Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lobɔkɔ ya mwasi: Mbala ya nsuka oyo bandeko ya Betele ya Brooklyn basalaki fɛti ya Noele na 1926; Lobɔkɔ ya mobali: Bato bamonaka ete Batatoli ya Yehova bazali ndenge mosusu

ETENI 3

Mibeko ya Bokonzi​​—Koluka boyengebene ya Nzambe

Mibeko ya Bokonzi​​—Koluka boyengebene ya Nzambe

KANISÁ ete ntango bozali koleka na balabala, opesi moninga moko ya kartye mbote na mosika. Mikolo eleki, omonaki ete atalaka yo ná libota na yo mingi. Ye mpe apɛpi yo mbote mpe abengi yo. Alobi na yo: “Natuna yo naino: Mpo na nini bozalaka lokola bato nyonso te?” Yo otuni ye: “Na ndenge nini?” Ye azongisi: “Bozali Batatoli ya Yehova, nakosi? Bokeseni na bato mosusu. Bosalaka makambo lokola bato ya mangomba mosusu te​—bosalaka fɛti ya Noele te, Bonane te, ata fɛti moko te ya ekólo, bokɔtaka na makambo ya politiki te mpe bokendaka bitumba te. Bomɛlaka makaya te. Mpe namonaka lokola ete na libota na bino bozalaka na bizaleli ya malamu mpenza. Nini esalaka bongo?”

Yo moko oyebi eyano na motuna yango: Bokonzi ya Nzambe ezali kotambwisa biso. Mokonzi Yesu azali mpenza kopɛtola biso. Azali kosalisa biso tólanda ndakisa na ye mpe na ndenge yango, tókesana na bato mosusu ya mokili oyo mabe. Na eteni oyo, tokomona ndenge oyo Bokonzi ya Masiya epɛtoli basaleli ya Nzambe na elimo, na bizaleli mpe na ndenge ya kotambwisa makambo na lisangá​—nyonso wana mpo na nkembo ya Yehova.

NA ETENI OYO

MOKAPO 10

Mokonzi apɛtoli bato na ye na elimo

Boyokani nini ezali kati na fɛti ya Noele mpe ekulusu?

MOKAPO 11

Bapɛtolami na bizaleli mpo na komonisa bosantu ya Nzambe

Bandako ya bakɛngɛli mpe baporte ya tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli ezali na ndimbola monene mpo na basaleli ya Nzambe banda 1914.

MOKAPO 12

Babongisami mpo na kosalela “Nzambe ya kimya”

Na esika esalela liloba molɔngɔ oyo ekeseni na mobulu, Biblia esaleli nde liloba kimya. Mpo na nini? Mpe ndenge nini eyano na motuna yango etali bakristo lelo?