Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lobɔkɔ ya mwasi: Bazali kosala makita libándá na Londres (Angleterre) na 1945; Lobɔkɔ ya mobali: Liyangani ya mokolo moko na Malawi (Afrika) na 2012

ETENI 5

Mateya mpe bakelasi ya Bokonzi​—Kopesa basaleli ya mokonzi formasyo

Mateya mpe bakelasi ya Bokonzi​—Kopesa basaleli ya mokonzi formasyo

KANISÁ ete na liyangani moko, ozali na esengo mpo lisolo oyo ozali koyoka ezali kolendisa yo. Molobi yango azali elenge mobali ya lisangá na bino, mpe azali kosala lisolo na ye ya liboso na liyangani. Wana ozali koyoka ye, ozali kokamwa mpenza mpo na formasyo oyo basaleli ya Nzambe bazwaka. Okanisi lisusu mbala ya liboso oyo elenge yango asalaki lisolo na lisangá, mpe omoni ete akoli mpenza! Akolaki lisusu mingi nsima ya kokɔta Eteyelo ya babongisi-nzela. Mikolo eleki, ye ná mwasi na ye bakɔtaki Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Na nsuka ntango bozali kobɛta mabɔkɔ mpo na lisolo yango ya kafukafu, otalitali bayangani mpe okanisi formasyo oyo basaleli nyonso ya Nzambe bazwaka.

Biblia elobaki ete na eleko moko, basaleli nyonso ya Nzambe bakozala “bato oyo Yehova ateyi.” (Yis. 54:13) Tozali na eleko yango. Tozwaka mateya mpe formasyo na nzela ya mikanda ya moombo ya sembo, kasi mpe na nzela ya makita, ya mayangani ya mike mpe ya minene, mpe na nzela ya ebele ya biteyelo oyo ebongisami mpo na kosalisa biso tósala misala ndenge na ndenge na ebongiseli ya Yehova. Na eteni oyo, tokomona ndenge mateya mpe formasyo yango emonisi mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela.

NA ETENI OYO

MOKAPO 16

Koyangana elongo mpo na losambo

Tokoki kosala nini mpo makita mpo na kosambela Yehova esalisa biso mpenza?

MOKAPO 17

Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi

Ndenge nini biteyelo ya teokrasi ebongisi basakoli ya Bokonzi mpo bákokisa mikumba na bango?