Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lobɔkɔ ya mwasi: Bandeko ya Suisse batindeli bandeko ya Allemagne biloko, na 1946; lobɔkɔ ya mobali: Bazali kotonga lisusu Ndako ya Bokonzi moko na Japon nsima ya tsunami, na 2011

ETENI 6

Misala ya Bokonzi​—Kotonga bandako ya losambo mpe kosunga bandeko

Misala ya Bokonzi​—Kotonga bandako ya losambo mpe kosunga bandeko

KANISÁ ete okɔti na Ndako ya Bokonzi mpe okamwe ndenge ekómi. Ndako yango epesaka yo esengo mingi. Mbala mosusu kutu obosanaka te makambo ya esengo oyo okutanaki na yango ntango bozalaki kotonga ndako yango eleki mwa bambula. Kasi, sikoyo ozali na esengo mingi koleka mpo Ndako ya Bokonzi yango ekómi mpo na mwa ntango esika ya kosalisa bato oyo bakweli likama. Mpela oyo euti kosalema ebebisi mboka, mpe Komite ya filiale ezwaki bibongiseli nokinoki mpo na kopesa bandeko oyo bakweli likama biloko ya kolya, bilamba, mai ya komɛla, mpe bongo na bongo. Biloko yango oyo euti epai ya bandeko ebongisami malamu. Bandeko basali molɔngɔ, bazali kozwa biloko oyo basengeli na yango, mpe mingi bazali kolela mpo batondi na esengo.

Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakoyebana mpo bakozala na bolingo makasi kati na bango. (Yoa. 13:34, 35) Na eteni oyo, tokotalela ndenge bolingo ya bokristo emonisami na misala ya botongi mpe na milende oyo Batatoli ya Yehova basalaka mpo na kosunga bandeko na bango oyo bakweli likama. Bolingo ya ndenge wana ezali mpenza komonisa ete Bokonzi ya Yesu ezali kotambwisa biso.

NA ETENI OYO

MOKAPO 18

Makabo mpo na mosala ya Bokonzi

Mbongo na biso eutaka wapi? Ndenge nini tosalelaka yango?

MOKAPO 19

Kotonga bandako mpo na kokumisa Yehova

Bisika na biso ya losambo ekumisaka Nzambe, kasi na miso na ye eloko mosusu nde eleki motuya.

MOKAPO 20

Mosala ya kosunga bandeko

Ndenge nini toyebi ete mosala ya kosunga bandeko ezali na kati ya mosala mosantu epai ya Yehova?