Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 3

Moto oyo akobongisa nzela abotami

Moto oyo akobongisa nzela abotami

LUKA 1:57-79

  • YOANE MOBATISI ABOTAMI MPE BAPESI YE NKOMBO

  • ZEKARIA ASAKOLI MPO NA MOKUMBA YA YOANE

Elizabeti azali pene ya kobota mwana na ye. Ndeko na ye Maria afandaki epai na ye na boumeli ya sanza misato. Sikoyo ntango ekoki mpo Maria atika ye mpe asala mobembo molai na nɔrdi, na mboka na ye Nazarete. Nsima ya sanza soki motoba, Maria mpe akobota mwana na ye.

Mwa moke nsima ya kokende ya Maria, Elizabeti aboti. Ezali mpenza esengo ete aboti malamu mpe mwana azali na nzoto malamu! Ntango Elizabeti alakisi mwana na ye epai ya bato ya mboka mpe baninga na ye, basepeli elongo na ye.

Mobeko ya Nzambe epai ya Bayisraele elobaki ete soki mwasi aboti mwana mobali, na mokolo ya mwambe, mwana mobali yango asengeli kokatama ngenga, mpe na ntango yango nde bazalaki kopesa ye nkombo. (Balevi 12:2, 3) Bato mosusu bakanisi ete mwana ya Zekaria asengeli kozwa nkombo na ye. Kasi, Elizabeti ayebisi bango ete: “Te, bongo te! kasi bakobenga ye Yoane.” (Luka 1:60) Tóbosana te ete anzelu Gabriele nde alobaki ete mwana yango asengeli kobengama Yoane.

Bato ya mboka mpe baninga ya Elizabeti balobi na ye ete: “Moto moko na libota na yo azali na nkombo wana te.” (Luka 1:61) Basali bajɛstɛ mpe batuni Zekaria soki alingi bápesa mwana nkombo nini. Zekaria asɛngi mwa etanda mpe akomi eyano na ye: “Nkombo na ye Yoane.”​—Luka 1:63.

Nsima ya kosala bongo, Zekaria akómi lisusu koloba na ndenge ya likamwisi. Ntango mosusu ozali komikundola ete akómaki baba ntango aboyaki kondima makambo oyo anzelu alobaki, mingimingi ete Elizabeti akobota. Kasi sikoyo, ntango Zekaria abandi koloba, bato ya mboka na bango bakamwe mpe babandi komituna ete: “Mwana oyo akozala nani mpenza?” (Luka 1:66) Bamoni lobɔkɔ ya Nzambe na likambo oyo ya kopesa Yoane nkombo.

Na nsima, Zekaria atondi na elimo santu mpe alobi ete: “Yehova Nzambe ya Yisraele apambwama, mpo atyeli bato na ye likebi mpe asikoli bango. Mpe abimiseli biso liseke ya lobiko na ndako ya mosaleli na ye Davidi.” (Luka 1:68, 69) Ntango asaleli maloba “liseke ya lobiko,” alobeli Nkolo Yesu, oyo etikalaki moke abotama. Zekaria alobi ete na nzela ya moto yango, Nzambe, ‘nsima ya kosikola biso na mabɔkɔ ya banguna, akopesa biso libaku malamu ya kosalela ye mosala mosantu na kobanga te, na bosembo mpe na boyengebene liboso na ye mikolo nyonso ya bomoi na biso.’​—Luka 1:74, 75.

Mpo na mwana na ye, Zekaria asakoli ete: “Kasi yo mwana, bakobenga yo mosakoli ya Oyo-Aleki-Likoló, mpo okotambola liboso ya Yehova mpo na kobongisa banzela na ye, mpo na kopesa bato na ye boyebi ete akobikisa bango na nzela ya bolimbisi ya masumu na bango, mpo na mawa monene ya Nzambe na biso. Mpo na mawa yango, tokomona pole oyo euti na likoló mpe ezali kongɛnga lokola kotana ya ntɔngɔ, mpo na kopesa pole na bato oyo bazali kofanda na molili mpe na elili ya liwa, mpo na kotambwisa makolo na biso malamu na nzela ya kimya.” (Luka 1:76-79) Esakweli yango ezali mpenza ya kolendisa!

Emonani ete na ntango wana, Maria, oyo abali naino te, akómi epai na ye na Nazarete. Nini ekokómela ye ntango bato bakomona ete azali na zemi?