Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 4

Maria akómi na zemi kasi abali naino te

Maria akómi na zemi kasi abali naino te

MATAI 1:18-25 LUKA 1:56

  • YOZEFE AYEBI ETE MARIA AZALI NA ZEMI

  • MARIA AKÓMI MWASI YA YOZEFE

Maria akómi sikoyo na sanza ya minei ya zemi na ye. Kobosana te ete na ebandeli ya zemi na ye, Maria alekisaki mwa ntango epai ya ndeko na ye Elizabeti na sudi ya bangomba ya Yudea. Sikoyo Maria azongi na ndako na ye na Nazarete. Awa, mosika te zemi na ye ekomonana polele na miso ya bato. Kanisá naino ndenge likambo yango ezali kotungisa ye!

Likambo ya mpasi ezali ete Maria alakami libala epai ya mosali-mabaya moko na nkombo Yozefe, ya mboka na bango. Mpe ayebi ete Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele elobi ete mwasi oyo alakami libala kasi andimi kosangisa nzoto na mobali mosusu, basengeli koboma ye na mabanga. (Kolimbola Mibeko 22:23, 24) Atako Maria asalaki pite te, na ntembe te, azali komituna soki akoyebisa Yozefe ndenge nini ete azali na zemi mpe makambo ekosukela ye ndenge nini.

Maria azalaki epai mosusu na boumeli ya sanza misato, na yango tokoki kondima ete Yozefe azali na mposa makasi ya komona ye. Ntango bakutani, kozanga ntembe Maria ayebisi ye makambo oyo ekómeli ye mpe asali nyonso mpo andimisa Yozefe ete azwi zemi na nzela ya elimo santu ya Nzambe. Kasi, ndenge kaka okoki komona yango, ezali mpasi mpo Yozefe akanga ntina mpe andima likambo yango.

Yozefe ayebi ete Maria azali mwasi moko malamu mpe azali na lokumu malamu. Mpe azali kolinga ye mingi. Kasi, atako ayebisi ye ndenge makambo elekaki, Yozefe akanisi ete Maria azali na zemi ya moto mosusu. Yozefe alingi te ete báboma Maria na mabanga to básambwisa ye na miso ya bato nyonso; yango wana, azwi likanisi ya kokabwana na ye na nkuku. Na ntango wana, bazalaki kotalela bafianse lokola bato oyo babalaná, mpe mpo na kokata yango, esengeli kolanda ndenge mibeko elobaki.

Na nsima, ntango Yozefe azali kaka kokanisa likambo yango, akei kolala. Anzelu ya Yehova abimeli ye na ndɔtɔ mpe alobi na ye ete: “Kobanga te kotya Maria mwasi na yo na ndako, mpo zemi oyo azwi euti na elimo santu. Akobota mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yesu, mpo akobikisa bato na ye na masumu na bango.”​—Matai 1:20, 21.

Ntango Yozefe alamuki, azali na botɔndi mingi ndenge likambo yango ekómi polele! Aumeli te kosala makambo oyo anzelu ayebisaki ye. Amemi Maria na ndako na ye. Likambo yango emonisi na miso ya bato ete Yozefe ná Maria babalani. Kasi, Yozefe asangisi nzoto na Maria te ntango nyonso oyo azali na zemi ya Yesu.

Mwa basanza na nsima, Yozefe ná Maria, oyo zemi ekómi monene, basengeli komibongisa mpo na kolongwa na Nazarete mpo na kosala mobembo. Bazali kokende wapi na ntango oyo Maria akómi pene ya kobota?