Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 5

Yesu abotami wapi mpe ntango nini?

Yesu abotami wapi mpe ntango nini?

LUKA 2:1-20

  • YESU ABOTAMI NA BETELEME

  • BABATELI YA BAMPATE BAYEI KOTALA YESU

Kaisala Augusto, amperɛrɛ ya Roma abimisaki mobeko ete moto nyonso asengeli kokomisama nkombo. Na yango, Yozefe ná Maria basengeli kokende na Beteleme, na sudi ya Yerusaleme, engumba oyo Yozefe abotamaki.

Bato mingi bazali na Beteleme mpo na kokomisa nkombo. Esika kaka moko oyo Yozefe ná Maria bakoki kofanda ezali na ndako ya bibwɛlɛ, esika oyo babatelaka bampunda mpe banyama mosusu. Yesu abotami kuna. Maria alíngi ye na biteni ya bilamba mpe alalisi ye na elyelo ya bibwɛlɛ, to esika batyaka bilei ya banyama.

Nzambe nde atindaki Kaisala Augusto abimisa mobeko wana ya kokomisa nkombo. Mpo na nini? Mpo yango esalaki ete Yesu abotama na Beteleme, na engumba ya nkɔkɔ na ye Mokonzi Davidi. Makomami esakolaki banda kala ete na engumba wana nde mokonzi oyo alakamaki akobotama.​—Mika 5:2.

Oyo ezali mpenza butu moko ya ntina! Pole moko makasi engɛngɛli etuluku ya babateli ya bampate oyo bazali kobatela bampate libándá. Ezali nkembo ya Yehova! Anzelu moko ya Nzambe ayebisi babateli ya bampate ete: “Bóbanga te, mpo talá! nazali kosakwela bino nsango malamu ya esengo moko monene oyo bato nyonso bakozala na yango, mpo lelo, na engumba ya Davidi, baboteli bino Mobikisi, oyo azali Kristo Nkolo. Mpe talá elembo mpo na bino: Bokokuta mwana moko ya moke bazingi ye bilamba mpe alali na elyelo ya bibwɛlɛ.” Na mbala moko, ebele ya baanzelu bayei mpe balobi: “Nkembo na Nzambe kuna na likoló, mpe kimya na mabele na bato oyo ye andimi.”​—Luka 2:10-14.

Ntango baanzelu bakei, babateli ya mpate balobani ete: “Tókende mbala moko na Beteleme mpe tómona likambo oyo esalemi, oyo Yehova ayebisi biso.” (Luka 2:15) Bakei na lombangu mpe bakuti Yesu oyo abotami sika kaka na esika oyo anzelu ayebisaki bango. Ntango babateli ya mpate bayebisi makambo oyo anzelu ayebisaki bango, bato nyonso oyo bayoki yango bakamwe. Maria asepeli mingi na maloba wana nyonso mpe abandi kokanisa yango malamumalamu na motema na ye.

Bato mingi lelo bakanisaka ete Yesu abotamaki na mokolo ya 25 ya sanza ya zomi na mibale. Kasi na Beteleme, mbula ebɛtaka mingi mpe malili ezalaka makasi na sanza yango. Na ntango mosusu kutu banɛjɛ ekweaka. Na eleko ya ndenge wana, ezali mpasi mpo babateli ya mpate bázala libándá na butu ná bitonga na bango. Lisusu, tokoki kokanisa te ete amperɛrɛ ya Roma akokaki kosɛnga na bato oyo bazalaki pene ya kotombokela ye básala mobembo ya mikolo ebele na eleko wana ya malili makasi mpo na kokomisa nkombo. Emonani ete Yesu abotamaki na ebandeli ya sanza ya zomi.