Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 9

Yesu akoli na Nazarete

Yesu akoli na Nazarete

MATAI 13:55, 56 MARKO 6:3

  • LIBOTA YA YOZEFE MPE MARIA EKÓMI MONENE

  • YESU AYEKOLI MOSALA

Yesu akoli na Nazarete, engumba moko moke. Ezali na nɔrdi, na bangomba ya etúká moko na nkombo Galile, na wɛsti ya laki moko monene babengi Mbu ya Galile.

Ntango Yesu azali na mbula soki mibale, Yozefe ná Maria balongwe na ye na Ezipito mpe bayei na ye awa. Emonani ete na ntango wana, azalaki mwana na bango kaka moko. Nzokande na nsima, baleki na ye mosusu babotami: Yakobo, Yozefe, Simo mpe Yudasi. Yozefe ná Maria baboti mpe bana basi, to bandeko ya Yesu ya basi. Ya solo, Yesu azali na baleki soki motoba.

Yesu azali mpe na bandeko mosusu. Tosili koyeba makambo etali Elizabeti ná mwana na ye Yoane. Afandaka mosika mpenza na sudi, na Yudea. Salome oyo emonani ete azali leki ya Maria mpe mama-leki ya Yesu azali kofanda penepene na Galile. Mobali ya Salome nkombo na ye Zebede. Emonani ete bana na bango mibale, Yakobo ná Yoane, bazali bandeko ya Yesu ya liboso. Toyebi te soki Yesu azalaki kolekisa ntango mingi elongo na bandeko yango ntango bazali kokola, kasi nsukansuka bakómi baninga na ye ya motema mpe bantoma na ye.

Yozefe asengeli kosala mosala makasi mpo na kosunga libota na ye oyo ekómi monene. Azali mosali-mabaya. Yozefe abɔkɔli Yesu lokola mwana na ye mpenza, yango wana Yesu azali kobengama “mwana ya mosali-mabaya.” (Matai 13:55) Yozefe alakisi Yesu mosala ya mabaya, mpe mwana yango ayekoli mosala yango malamu mpenza. Kutu na nsima, bato bakómi kobenga Yesu: “Mosali ya mabaya.”​—Marko 6:3.

Losambo ya Yehova ezali na esika ya liboso na libota ya Yozefe. Mpo na kotosa mobeko ya Nzambe, Yozefe ná Maria bazali koteya bana na bango makambo ya Nzambe ‘ntango bazali kofanda na ndako na bango mpe ntango bazali kotambola na balabala mpe ntango bazali kolala mpe ntango bazali kolamuka.’ (Kolimbola Mibeko 6:6-9) Lokola sinagoga moko ezali na Nazarete, tokoki mpenza kondima ete Yozefe azalaki mbala na mbala komema libota na ye kuna mpo na kosambela. Elobamaki na nsima ete Yesu akendaki na sinagoga “ndenge amesanaki kosala na mokolo ya sabata.” (Luka 4:16) Libota ezali mpe koyoka esengo makasi ntango bazali mbala na mbala kosala mobembo na tempelo ya Yehova na Yerusaleme.