Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 17

Yesu ateyi Nikodeme na butu

Yesu ateyi Nikodeme na butu

YOANE 2:23–3:21

  • YESU ASOLOLI NA NIKODEME

  • “KOBOTAMA LISUSU” ELIMBOLI NINI?

Ntango azali na Yerusaleme na Elekeli ya mobu 30 T.B., Yesu asali bilembo to makamwisi minene. Yango esali ete bato mingi bándimela ye. Nikodeme, oyo azali Mofarisai mpe mosangani ya tribinale monene ya Bayuda babengi Sanedrina, akamwe mingi. Lokola azali na mposa ya koyeba makambo mingi, akei kotala Yesu na butu, ekoki kozala mpo azali kobanga ete soki bakonzi mosusu ya Bayuda bamoni ye, lokumu na ye ekobeba.

Nikodeme alobi na Yesu boye: “Rabi, toyebi ete yo, ozali moteyi oyo auti na Nzambe; mpo moto moko te akoki kosala bilembo oyo ozali kosala soki Nzambe azali na ye te.” Yesu ayanoli Nikodeme ete mpo na kokɔta na Bokonzi ya Nzambe, moto asengeli “kobotama lisusu.”​—Yoane 3:2, 3.

Nikodeme atuni: ‘Ndenge nini moto akoki kobotama lisusu? Akoki nde kokɔta na libumu ya mama na ye mpo na mbala ya mibale mpe abotama?’​—Yoane 3:4.

Kobotama lisusu elimboli bongo te. Yesu alimboli ete: “Soki moto abotami na mai mpe na elimo te, akoki kokɔta na bokonzi ya Nzambe te.” (Yoane 3:5) Ntango Yesu azwaki batisimo mpe elimo santu ekitelaki ye, abotamaki na “mai mpe na elimo.” Na ntango wana, uta na likoló Nzambe alobaki ete: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.” (Matai 3:16, 17) Na ndenge yango, Nzambe amonisaki ete abimisi mwana moko ya elimo oyo azali na likoki ya kokɔta na Bokonzi ya likoló. Na nsima, na Pantekote ya mobu 33 T.B., elimo santu esopanaki likoló ya bato mosusu oyo bazwaki batisimo, na boye, bango mpe babotamaki lisusu lokola bana ya Nzambe oyo batyami mafuta na elimo.​—Misala 2:1-4.

Ezali mpasi mpo Nikodeme akanga ntina ya makambo etali Bokonzi oyo Yesu azali koteya ye. Yango wana, Yesu ayebisi ye makambo mingi oyo etali mokumba na ye ya ntina mingi lokola Mwana ya Nzambe na nzoto ya moto. Yesu alobi ete: “Kaka ndenge Moize atombolaki nyoka na esobe, Mwana ya moto mpe asengeli kotombolama ndenge wana, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye azwa bomoi ya seko.”​—Yoane 3:14, 15.

Eleki sikoyo bambula mingi, Bayisraele oyo banyoka ya ngɛngɛ ezalaki koswa bango, bazalaki kotala nyoka ya motako mpo bábika. (Mitángo 21:9) Ndenge moko mpe, bato nyonso basengeli kondimela mwana ya Nzambe mpo bábika na ezaleli na bango ya kokufa mpe bázwa bomoi ya seko. Mpo na kolobela bolingo oyo Yehova amonisaki mpenza mpo na likambo yango, Yesu alobi lisusu na Nikodeme ete: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Nzokande, awa na Yerusaleme kaka na nsima ya sanza motoba ya mosala na ye, Yesu amonisaki polele ete azali nzela oyo ezali kobikisa bato.

Yesu ayebisi Nikodeme ete: “Nzambe atindaki Mwana na ye na mokili, mpo asambisa mokili te, kasi mpo mokili ebika na nzela na ye.” Yango elingi koloba ete Nzambe atindi ye te mpo na kosambisa mokili na ndenge ya mabe mpenza mpe kopesa bato nyonso etumbu ya libebi. Kasi, ndenge kaka alobi yango, atindami “mpo mokili ebika na nzela na ye.”​—Yoane 3:17.

Nikodeme ayaki mpenza na kobanga nyonso butubutu. Ya solo, ndenge oyo Yesu asukisi lisolo na ye na Nikodeme ezali mpenza kokamwisa, alobi ete: “Nzokande ntina ya lisambisi yango ezali oyo, ete pole [pole yango ezali Yesu mpe amonisaki yango na bomoi mpe mateya na ye] eyaki na mokili kasi bato balingaki molili na esika ya kolinga pole, mpo misala na bango ezalaki mabe. Mpo moto oyo asalaka makambo ya mabe ayinaka pole mpe ayaka epai ya pole te, mpo misala na ye epamelama te. Kasi moto oyo asalaka oyo ezali solo ayaka epai ya pole, mpo misala na ye emonisama polele ete esalemi na boyokani na Nzambe.”​—Yoane 3:19-21.

Sikoyo makambo nyonso ezali na mabɔkɔ ya Nikodeme, Mofarisai mpe moteyi na Yisraele mpo asalela makambo oyo auti koyoka na ntina na mokumba oyo Yesu azali na yango na kokokisama ya mokano ya Yehova.