Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 22

Bayekoli minei bakómi baluki-bato

Bayekoli minei bakómi baluki-bato

MATAI 4:13-22 MARKO 1:16-20 LUKA 5:1-11

  • YESU ABENGI BAYEKOLI BÁLANDA YE NTANGO NYONSO

  • BALUKI-MBISI BAKÓMI BALUKI-BATO

Lokola bato ya Nazarete balingi koboma Yesu, akei na engumba ya Kapernaume, pene na Mbu ya Galile, oyo ebengami mpe “laki ya Genezarete.” (Luka 5:1) Yango ekokisi esakweli ya mokanda ya Yisaya oyo elobi ete bato ya Galile oyo bafandi pene na mbu basengelaki komona pole moko monene.​—Yisaya 9:1, 2.

Na Galile, Yesu akobi kosakola ete “bokonzi ya likoló ekómi pene.” (Matai 4:17) Kuna, akutani na bayekoli na ye minei. Basalaki na ye mobembo liboso, kasi kobanda bautaki na ye na Yudea, bazongelaki mosala na bango ya koluka mbisi. (Yoane 1:35-42) Sikoyo, esengeli bázala na Yesu ntango nyonso mpo apesa bango formasyo mpo básala mosala ya kosakola nsima ya liwa na ye.

Ntango Yesu azali kotambola na libongo, amoni Simo Petro ná ndeko na ye Andre, mpe baninga na bango mosusu ya mosala bazali kosokola minyama na bango. Yesu apusani, amati na masuwa ya Petro, mpe alobi na ye apusa masuwa na kati ya ebale. Ntango bapusani mwa mosika, Yesu afandi mpe abandi koteya ebele ya bato oyo bayangani na libongo makambo ya Bokonzi ya Nzambe.

Na nsima, Yesu alobi na Petro: “Pusá tii na esika ya mozindo, mpe bókitisa minyama na bino mpo na kokanga mbisi.” Petro azongiseli ye ete: “Molakisi, butu mobimba tomoni mpasi mpe tozwi eloko te, kasi na etinda na yo nakokitisa minyama.”​—Luka 5:4, 5.

Bakitisi minyama mpe bakangi mbisi ebele mpe minyama yango ebandi kopasuka! Na mbala moko, mibali yango babengi baninga na bango oyo bazali na masuwa oyo ezali pene na bango mpo báya kosalisa bango. Eumeli te batondisi masuwa nyonso mibale na mbisi, mpe bamasuwa yango ebandi kozinda. Ntango Petro amoni bongo, afukami liboso ya Yesu mpe alobi: “Nkolo, longwá pene na ngai, mpo nazali moto ya masumu.” Yesu ayanoli: “Tiká kobanga. Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.”​—Luka 5:8, 10.

Yesu alobi na Petro mpe na Andre: “Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino baluki-bato.” (Matai 4:19) Abengi mpe baluki-mbisi mosusu mibale, Yakobo ná Yoane, bana ya Zebede. Bango mpe bakakatani te, balandi ye. Bongo, bango nyonso minei batiki mosala ya koluka mbisi mpe bakómi bayekoli ya liboso ya Yesu oyo bakozala na ye ntango nyonso.