Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 24

Yesu asakoli na Galile mobimba

Yesu asakoli na Galile mobimba

MATAI 4:23-25 MARKO 1:35-39 LUKA 4:42, 43

  • MIBEMBO YA YESU NÁ BAYEKOLI NA YE MINEI NA GALILE

  • MATEYA MPE MISALA NA YE EYEBANI MINGI

Na Kapernaume, Yesu ná bayekoli na ye minei balekisi mokolo mobimba na mosala. Na mpokwa, bato ya Kapernaume bamemeli ye bato na bango ya maladi mpo abikisa bango. Yesu azali na ntango mingi te ya kosala makambo na ye moko.

Sikoyo, na ntɔngɔ makasi, ntango molili ezali naino, Yesu atɛlɛmi mpe abimi libándá. Akei na esika oyo azali kaka ye moko, epai akoki kobondela Tata na ye. Kasi, eumeli te, bato balandi ye kuna. Ntango bamoni ete Yesu azali na bango te, ‘Simo mpe baoyo bazali na ye’ babandi koluka ye. Mbala mosusu Petro azali liboso na bango mpo Yesu azali na ndako na ye.​—Marko 1:36; Luka 4:38.

Ntango bamoni Yesu, Petro alobi na ye: “Bato nyonso bazali koluka yo.” (Marko 1:37) Na ntembe te, bato ya Kapernaume balingi ete Yesu afanda na bango. Basepeli mpenza na makambo oyo asali, yango wana baluki “kopekisa ye mpo atika bango te.” (Luka 4:42) Kasi, Yesu ayaki awa na mabele nde mpo na kosala makamwisi ya kobikisa bato? Mpe misala na ye esengeli kosuka kaka na mboka wana? Alobi nini mpo na likambo yango?

Yesu alobi na bayekoli na ye: “Tókende epai mosusu, na bamboka ya pembeni, mpo nasakola mpe kuna, mpamba te ezali mpo na yango nde nabimaki.” Kutu, Yesu ayebisi bato oyo balingi ete afanda na bango: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.”​—Marko 1:38; Luka 4:43.

Ntina ya libosoliboso oyo Yesu ayaki awa na mabele ezali ya kosakola Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi yango ekosantisa nkombo ya Tata na ye mpe ekosilisa bampasi nyonso ya bato mpo na libela. Yesu amonisi ete Nzambe nde atindaki ye, na ndenge azali kosala makamwisi ya kobikisa bato. Basiɛklɛ mingi liboso, Moize mpe asalaki makamwisi ya minene mpo na kondimisa bato ete Nzambe nde atindaki ye.​—Kobima 4:1-9, 30, 31.

Yango wana, Yesu alongwe na Kapernaume mpo na kosakola na bingumba mosusu; bayekoli na ye minei bakei na ye. Bayekoli yango minei ezali: Petro ná ndeko na ye Andre mpe Yoane ná ndeko na ye Yakobo. Eleki pɔsɔ moko kobanda Yesu abengi bango mpo bákóma baninga na ye ya liboso ya mobembo mpe ya mosala.

Mobembo oyo Yesu ná bayekoli wana minei basali na Galile mpo na kosakola eboti mpenza mbuma! Kutu, nsango ya Yesu epalangani. ‘Nsango na ye epalangani na Siri mobimba,’ tii na Dekapolisi, etúká moko oyo ezali na bingumba zomi, mpe na ngámbo mosusu ya Ebale Yordani. (Matai 4:24, 25) Ebele ya bato oyo bauti na bamboka yango mpe na Yudea balandi Yesu ná bayekoli na ye. Bato mingi bamemeli ye bato oyo bazali koluka ete abikisa bango. Yesu akokisi mposa na bango: abikisi bato ya maladi mpe bato oyo bazali na bademo.