Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 26

“Masumu na yo elimbisami”

“Masumu na yo elimbisami”

MATAI 9:1-8 MARKO 2:1-12 LUKA 5:17-26

  • YESU ALIMBISI MASUMU YA MOKATATALI MOKO MPE ABIKISI YE

Bato ya bipai nyonso bayoki nsango ya Yesu. Kutu, mingi bauti na bamboka ya mosika mpo na koyoka mateya na ye mpe komona misala na ye ya nguya. Kasi, nsima ya mwa mikolo, azongi na Kapernaume, esika afandaka. Nsango ya kozonga na ye epanzani nokinoki na engumba yango mobimba, oyo ezali pembenipembeni ya Mbu ya Galile. Yango wana, bato mingi bayei na ndako oyo azali. Bamosusu ezali Bafarisai mpe bateyi ya Mibeko oyo bauti na Galile mpe Yudea mobimba, ata mpe na Yerusaleme.

‘Bato mingi bayangani, bongo esika ezali lisusu te, ata pembeni ya porte, mpe abandi kolobela bango liloba.’ (Marko 2:2) Sikoyo, ntango ekoki mpo likambo moko ya monene esalema. Ezali likambo moko oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ete Yesu azali na nguya ya kosilisa eloko oyo ebimiselaka bato mpasi mpe kozongisa bato nyonso oyo aponi nzoto kolɔngɔnɔ.

Ntango Yesu azali koteya na kati ya ndako oyo etondi na bato, mibali minei bayei na mokatatali moko na litɔkɔ. Balingi Yesu abikisa moninga na bango. Kasi, lokola bato batondi, bakoki te “kokómisa ye epai ya Yesu.” (Marko 2:4) Bato yango bakokaki kolɛmba nzoto. Kasi, bamati likoló ya ndako mpe bafungoli lidusu na plafɔ. Na nsima, bakitisi litɔkɔ oyo mokatatali alaleli na kati ya ndako.

Yesu asiliki ndenge bakati ye ntango azali koteya? Te! Akamwe nde makasi mpo na kondima na bango mpe alobi na mokatatali ete: “Masumu na yo elimbisami.” (Matai 9:2) Kasi, Yesu akoki mpenza kolimbisa masumu? Bakomeli mpe Bafarisai bazwi likambo yango, mpe bakanisi: “Mpo na nini moto oyo azali koloba ndenge wana? Azali kofinga. Longola Nzambe ye moko, nani mosusu akoki kolimbisa masumu?”​—Marko 2:7.

Lokola Yesu ayebi makanisi na bango, alobi na bango: “Mpo na nini bozali kokanisakanisa makambo wana na mitema na bino? Nini eleki pɛtɛɛ, koloba na mokatatali: ‘Masumu na yo elimbisami,’ to koloba: ‘Tɛlɛmá, lɔkɔtá litɔkɔ na yo mpe tambolá’?” (Marko 2:8, 9) Ya solo, na lisalisi ya mbeka oyo Yesu akopesa na nsima, akoki kolimbisa masumu ya moto wana.

Na nsima, Yesu amonisi bato, ezala batɛmɛli na ye, ete azali na nguya ya kolimbisa masumu ya bato ya mokili. Atali mokatatali mpe apesi etinda oyo: “Nalobi na yo: Tɛlɛmá, lɔkɔtá litɔkɔ na yo, mpe kende epai na yo.” Na mbala moko, mobali yango alɔkɔti litɔkɔ na ye, abimi, na miso ya bato nyonso oyo bazali wana. Bato yango bakamwe mpenza! Bakumisi Nzambe, mpe balobi: “Naino tomoná likambo ya boye te”!​—Marko 2:11, 12.

Ebongi mpenza ndenge Yesu alobeli masumu ntango alobeli maladi, mpe bolimbisi ya masumu ntango alobeli kozala nzoto kolɔngɔnɔ. Biblia eteyi ete tata na biso ya liboso, Adama, asalaki lisumu mpe ete biso nyonso tobukaka mbuma mabe ya lisumu yango: maladi mpe liwa. Kasi, na Bokonzi ya Nzambe, Yesu akolimbisa masumu ya bato nyonso oyo balingaka Nzambe mpe basalelaka ye. Na ntango wana, maladi ekosila libela.​—Baroma 5:12, 18, 19.