Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 30

Boyokani ya Yesu ná Tata na ye

Boyokani ya Yesu ná Tata na ye

YOANE 5:17-47

  • NZAMBE AZALI TATA YA YESU

  • LISEKWA OYO ELAKAMAKI

Ntango Bayuda mosusu bafundi Yesu ete azali kotosa Sabata te mpo abikisi moto mokolo yango, Yesu azongisi boye: “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo, ngai mpe nazali kokoba kosala.”​—Yoane 5:17.

Likambo oyo Yesu asali epekisami te na mobeko ya Nzambe oyo etali Sabata. Ntango azali kosakola mpe kobikisa bato, azali komekola misala malamu ya Nzambe. Yango wana, Yesu azali kaka kosala makambo ya malamu mokolo na mokolo. Kasi, eyano oyo Yesu apesi bato yango epesi bango nkanda makasi koleka, mpe etindi bango báluka koboma ye. Mpo na nini?

Longola libunga oyo bazali na yango ete Yesu azali kotosa Sabata te ndenge azali kobikisa bato, bazali na nkanda makasi mpo azali koloba ete azali Mwana ya Nzambe. Mpo na bango, ndenge Yesu alobi ete Nzambe azali Tata na ye, azali kofinga, mpo koloba ete Yehova azali Tata na ye ezali lokola nde alobi ete ye ná Nzambe bakokani. Kasi, Yesu abangi te; kutu na eyano na ye alobeli makambo mosusu oyo etali boyokani ya makasi oyo azali na yango na Nzambe. Alobi boye: “Tata alingaka Mwana mingi mpe alakisaka ye makambo nyonso oyo ye moko asalaka.”​—Yoane 5:20.

Tata azali Mopesi ya bomoi, mpe amonisaki yango na ntango ya kala na ndenge apesaki bato mosusu nguya ya kosekwisa bato. Yesu alobi lisusu: “Kaka ndenge Tata alamwisaka bakufi mpe azongisaka bango na bomoi, ndenge moko mpe Mwana azongisaka na bomoi baoyo ye alingi kozongisa.” (Yoane 5:21) Maloba wana ezali na ntina mingi, mpe epesi elikya mpo na mikolo ezali koya. Ata sikoyo, Mwana azali kosekwisa bato oyo bakufi na elimo. Na nsima, Yesu alobi: “Moto oyo azali koyoka liloba na ngai mpe azali kondima ye oyo atindaki ngai azali na bomoi ya seko, mpe akosambisama te kasi alongwe na liwa, akómi na bomoi.”​—Yoane 5:24.

Tii na ntango wana, Yesu asekwisaki naino moto moko te oyo asilaki kokufa; atako bongo, ayebisi bato yango ete lisekwa ekozala. Alobi: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.”​—Yoane 5:28, 29.

Atako Yesu azali na mokumba monene, amonisi polele ete Nzambe aleki ye, ntango alobi: “Nakoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ngai moko; . . . nazali koluka, mokano na ngai moko te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 5:30) Yesu amonisi mpe mokumba ya ntina oyo azali na yango na mokano ya Nzambe, oyo sikoyo akokisi yango naino polele te. Kasi bafundi ya Yesu bazwaki mpe litatoli mosusu mpo na makambo yango, longola oyo ya Yesu ye moko. Yesu akundweli bango ete: “Botindaki bato epai ya Yoane [Mobatisi], mpe ye apesaki litatoli mpo na solo.”​—Yoane 5:33.

Ekoki kozala ete mbula mibale liboso, bafundi yango ya Yesu bayokaki ndenge Yoane ayebisaki bakonzi ya mangomba ya Bayuda mpo na Moto oyo akoya nsima na ye​—asalelaki maloba “Mosakoli” mpe “Kristo.” (Yoane 1:20-25) Mpo na kokundwela bato yango ete bazwaka Yoane, oyo azali sikoyo na bolɔkɔ, na motuya mingi, Yesu alobi: “Bondimaki kosepela mingi na pole na ye mpo na ntango moke.” (Yoane 5:35) Nzokande, Yesu apesi litatoli moko monene koleka Yoane Mobatisi.

“Misala wana mpenza oyo nazali kosala [ezala ndenge auti kobikisa moto], ezali kopesa litatoli mpo na ngai ete Tata atindaki ngai.” Longola yango, Yesu abakisi: “Tata moto atindaki ngai ye moko apesi litatoli mpo na ngai.” (Yoane 5:36, 37) Na ndakisa, Nzambe apesaki litatoli mpo na Yesu ntango azwaki batisimo.​—Matai 3:17.

Ya solo, bafundi yango ya Yesu bazali na ntina moko te ya koboya kondimela ye. Makomami oyo bazali kotuta ntolo ete bayebi, ezali kopesa litatoli mpo na ye. Yesu asukisi na maloba oyo: “Soki bondimaki Moize bolingaki mpe kondima ngai, mpo ye akomaki makambo etali ngai. Kasi soki bozali kondima makomi na ye te, bokondima maloba na ngai ndenge nini?”​—Yoane 5:46, 47.