Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 36

Mokonzi moko ya basoda amonisi kondima monene

Mokonzi moko ya basoda amonisi kondima monene

MATAI 8:5-13 LUKA 7:1-10

  • MOOMBO YA MOKONZI MOKO YA BASODA ABIKISAMI

  • BATO YA KONDIMA BAKOPAMBOLAMA

Nsima ya kosala Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu akei na engumba Kapernaume. Kuna, mikóló mosusu ya Bayuda bayei epai na ye. Moto moko ya ekólo mosusu nde atindi bango​—mokonzi moko ya basoda ya Roma.

Mosali oyo mokonzi yango alingaka mingi azali na maladi mpe alingi kokufa. Atako mokonzi yango azali Moyuda te, azali na mposa Yesu asalisa ye. Bayuda bayebisi Yesu ete moto ya mosala ya mokonzi yango “alali na ndako mpo akómi mokatatali, azali konyokwama makasi mpenza,” ntango mosusu azali na mpasi makasi. (Matai 8:6) Mikóló ya Bayuda bayebisi Yesu mpo na mokonzi yango ya basoda ete ebongi osalela ye likambo yango, mpe balobaki boye: “Alingaka ekólo na biso mpe ye nde moto atongelaki biso sinagoga.”​—Luka 7:4, 5.

Eumeli te, Yesu akei elongo na mikóló yango na ndako ya mokonzi yango. Ntango bazali kopusana pene ya ndako yango, mokonzi yango atindi baninga na ye mpo báloba boye: “Tata, komitungisa te, mpo ngai nabongi te kokɔtisa yo na ndako na ngai. Yango wana namimonaki ete nabongi te mpo na koya epai na yo.” (Luka 7:6, 7) Oyo nde maloba ya komikitisa ya moto oyo amesaná kopesa basusu mitindo! Mpe yango emonisi ete akeseni mpenza na Baroma oyo bazalaki kosalela baombo na bango makambo makasi.​—Matai 8:9.

Na ntembe te, mokonzi yango ayebi ete Bayuda balingaka te kosala boninga na bato oyo bazali Bayuda te. (Misala 10:28) Mbala mosusu mpo na yango nde mokonzi yango asɛngi baninga na ye báloba na Yesu boye: “Lobá se liloba, bongo mosaleli na ngai abika.”​—Luka 7:7.

Maloba yango ekamwisi Yesu, yango wana alobi boye: “Nazali koyebisa bino ete: Namoná naino kondima ya monene boye te ata na Yisraele.” (Luka 7:9) Ntango baninga ya mokonzi yango bazongi na ndako, bamoni ete moombo yango oyo azalaki na maladi makasi abiki.

Nsima ya kosala likamwisi wana, Yesu asaleli libaku yango mpo na komonisa ete ata bato oyo bazali Bayuda te kasi bazali na kondima, bakozwa mapamboli; alobi boye: “Bato mingi bakouta na ɛsti mpe na wɛsti bakoya mpe bakofanda na mesa elongo na Abrahama, Yisaka ná Yakobo na bokonzi ya likoló.” Bongo Bayuda oyo bazangi kondima? Yesu alobi ete “bakobwakama na molili ya libándá. Kuna nde bakolela mpe bakolya mino.”​—Matai 8:11, 12.

Na yango, Bayuda oyo baboyi libaku oyo epesamelaki bango liboso, ya kozala na kati ya baoyo bakoyangela na Kristo bakobwakama. Kasi baoyo bazali Bayuda te bakoyambama mpo na kofanda na mesa na ye, elingi koloba “na bokonzi ya likoló.”