Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 45

Aleki bademo na nguya

Aleki bademo na nguya

MATAI 8:28-34 MARKO 5:1-20 LUKA 8:26-39

  • ABIMISI BADEMO MPE ATINDI BANGO NA BANGULU

Ntango bayekoli bazongi lisusu na libongo nsima ya likama na mbu, bazali naino na mwa kobanga. Mibali mibale ya kanza, oyo bazali na bademo babimi na malita oyo ezali pene wana mpe bazali koya mbangu epai ya Yesu! Moko na bango nde abendi likebi ya bato, mpo ekoki kozala ete azali moto ya mobulu makasi mpe bademo bakɔtelá ye banda kala mpenza.

Moto yango atambolaka kaka bolumbu. Butu, moi, azali ‘koganga na malita mpe na bangomba mpe komizokisa na mabanga.’ (Marko 5:5) Azali mpenza na kanza mpe bato babangaka koleka na nzela wana. Bamosusu baluká kokanga ye na bashɛni, kasi akataka bashɛni yango mpe akataka bansinga oyo bakangaka ye na makolo. Moto moko te azali na nguya ya kosilisa ye makasi.

Ntango mobali yango apusani pene ya Yesu, akwei na makolo na ye mpe bademo oyo bazali konyokola ye batindi ye aganga: “Ngai na yo likambo nini, Yesu, Mwana ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló? Nalapisi yo ndai na nkombo ya Nzambe ete onyokola ngai te.” Yesu amonisi ete azali na nguya likoló ya bademo; alobi boye: “Bimá na nzoto ya moto oyo, yo elimo ya mbindo.”​—Marko 5:7, 8.

Bademo mingi nde bakɔtelá moto yango. Ntango Yesu atuni, “Nkombo na yo nani?” Ayanoli boye: “Nkombo na ngai Limpinga, mpo tozali mingi.” (Marko 5:9) Limpinga moko ya Baroma ezalaka na bankóto ya basoda; boye, ebele ya bademo bazali konyonga mobali oyo mpe kosepela komonisa ye mpasi. Babondeli Yesu “atinda bango na libulu mozindo te.” Emonani ete bayebi oyo ezali kozela bango ná mokonzi na bango Satana.​—Luka 8:31.

Bangulu soki 2 000 ezali kolya pene wana. Banyama yango ezali mbindo na kotalela Mibeko mpe Bayuda bakoki kozala na yango kutu te. Bademo yango balobi: “Tindá biso na kati ya bangulu, mpo tókɔta na kati na yango.” (Marko 5:12) Yesu alobi na bango bákende, mpe bakɔti na bangulu. Na yango, bangulu yango nyonso 2 000 babulungani, balongwe likoló ya ngomba mpe bamibwaki na mbu mpe bakufi na mai.

Ntango baoyo bazali kobatela bangulu bamoni likambo yango, bakei mbangu koyebisa nsango yango na engumba mpe na bamboka mikemike. Bato bayei mpo na komona likambo oyo esalemi. Ntango bakómi, bamoni ete mobali oyo bademo babimaki na nzoto na ye azali sikoyo malamu mpe ligboma esili. Kutu, alati bilamba mpe afandi na makolo ya Yesu!

Bato oyo bayoki mpe bamoni mobali yango bakómi kobanga, bazali koyeba te soki yango elakisi nini. Basɛngi Yesu abima nokinoki na teritware na bango. Ntango Yesu azali komata na masuwa mpo na kokende, moto wana oyo azalaki na bademo asɛngi Yesu akende elongo na ye. Kasi Yesu ayebisi ye boye: “Kende na ndako epai ya bato ya libota na yo, mpe yebisá bango makambo nyonso oyo Yehova asaleli yo mpe ndenge ayokeli yo mawa.”​—Marko 5:19.

Mbala mingi Yesu ayebisaka baoyo azali kobikisa báyebisa moto te mpo alingi te ete bato bándimela ye kaka mpo na bansango wana ya makamwisi. Kasi na mbala oyo, moto yango oyo liboso bademo banyokolaki ye akomonisa mpenza nguya oyo Yesu azali na yango mpe akosakwela bato oyo Yesu akozala te na libaku ya kokóma epai na bango. Litatoli na ye ekokweisa nsango nyonso ya lokuta oyo bato bakopesa mpo na bangulu oyo ebungi. Na yango, moto yango akei mpe abandi kosakola na bisika nyonso ya Dekapolisi makambo Yesu asaleli ye.