Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 50

Babongisami mpo na kosakola ata na ntango ya minyoko

Babongisami mpo na kosakola ata na ntango ya minyoko

MATAI 10:16–11:1 MARKO 6:12, 13 LUKA 9:6

  • YESU APESI BANTOMA FORMASYO MPE ATINDI BANGO

Yesu apesi bantoma na ye malako ya malamu mpenza na ndenge ya kosala mosala ya kosakola ntango bazali kokende mibalemibale. Kasi, asuki wana te. Na boboto nyonso, akebisi bango mpo na batɛmɛli. Alobi na bango boye: “Talá! Nazali kotinda bino lokola bampate na kati ya bambwa ya zamba. . . . Bókeba na bato; mpo bakokaba bino na batribinale ya mboka, mpe bakobɛta bino fimbo na basinagoga na bango. Ya solo, bakomema bino na makasi liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi mpo na ngai.”​—Matai 10:16-18.

Bayekoli ya Yesu bakokutana na minyoko makasi, ata bongo Yesu alaki bango boye: “Ntango bakokaba bino, bómitungisa te mpo na ndenge oyo bokoloba to makambo oyo bokoloba; mpo bakopesa bino oyo bokoloba kaka na ngonga wana; mpo baoyo bazali koloba ezali kaka bino moko te, kasi elimo ya Tata na bino nde ezali koloba na nzela na bino.” Yesu abakisi boye: “Ndeko akokaba ndeko na ye na liwa, mpe tata akokaba mwana na ye, mpe bana bakotombokela baboti mpe bakobomisa bango. Mpe bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai; kasi moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.”​—Matai 10:19-22.

Lokola mosala ya kosakola ezali na ntina mingi, Yesu amonisi ntina oyo bayekoli na ye basengeli kozala ekɛngɛ mpo bázala na bonsomi ya kosala yango. Alobi boye: “Ntango bakonyokola bino na engumba moko, bókima na engumba mosusu; mpo ya solo mpenza nalobi na bino ete: Bokosilisa koleka na bingumba nyonso ya Yisraele te liboso Mwana ya moto aya.”​—Matai 10:23.

Malako, makebisi mpe bilendiseli oyo Yesu apesi bantoma na ye 12 ebongi mpenza! Kasi, maloba yango etaleli mpe baoyo nyonso bakosala mosala ya kosakola nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu. Yango emonani na maloba oyo alobi na bayekoli na ye ete: “Bato nyonso bakoyina bino,” kaka te baoyo epai bantoma batindami mpo na kosakwela bango. Lisusu, Biblia elobi esika moko te ete bantoma batɛlɛmaki liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi na mwa ntango moke oyo balekisaki na mosala ya kosakola na Galile, to bato ya libota na bango bakabaki bango mpo bábomama.

Emonani polele ete ntango Yesu ayebisi bantoma na ye makambo wana, azali nde kolobela makambo oyo ekosalema nsima. Tótalela maloba oyo alobi ete bayekoli na ye bakosilisa te mosala na bango ya kosakola “liboso Mwana ya moto aya.” Alingi komonisa ete bayekoli na ye bakosilisa te kosakola Bokonzi ya Nzambe na bamboka nyonso liboso Mokonzi Yesu Kristo aya na nkembo na ye ya Mosambisi oyo Nzambe aponi.

Ntango bantoma bazali kosala mosala ya kosakola, basengeli kokamwa te soki bakutani na botɛmɛli, mpo Yesu ayebisi bango: “Moyekoli aleki moteyi na ye te, moombo mpe aleki nkolo na ye te.” Yesu atye mai na monɔkɔ te. Akutani na makambo ya kozanga bosembo mpe minyoko mpo azali kosakola Bokonzi ya Nzambe; bayekoli na ye mpe bakokutana na yango. Ata bongo, Yesu ayebisi bango boye: “Bóbanga te baoyo bakoki koboma nzoto kasi bakoki koboma molimo te; nzokande bóbanga nde moto oyo akoki koboma ná molimo ná nzoto na Gehena.”​—Matai 10:24, 28.

Yesu atiká ndakisa na likambo yango. Na esika abebisa bosembo na ye epai ya Yehova oyo azali na nguya nyonso, Yesu ayikaki mpiko tii liwa kozanga kobanga. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nde akoki koboma “molimo” ya moto (elikya nyonso ya kozala na bomoi na mikolo ezali koya) to ye nde akoki kosekwisa moto mpo azwa bomoi ya seko. Na ntembe te, yango ekitisi bantoma motema!

Yesu amonisi ndenge Nzambe atyelaka bayekoli na ye likebi na bolingo nyonso; alobi boye: “Batɛkaka bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo ya bibende moko ya motuya moke, boye te? Nzokande ata moko na yango ekokwea na nse te bongo Tata na bino ayeba te. Na yango bóbanga te. . . . Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.”​—Matai 10:29, 31.

Nsango oyo bayekoli ya Yesu bazali kosakola ekokabola mabota, bamosusu bakondima yango kasi bamosusu bakoboya. Yesu ayebisi bango: “Bókanisa te ete nayaki kotya kimya na mabele.” Na ntembe te, esɛngaka mpiko mpo moto moko ya libota andima solo ya Biblia. Yesu abakisi boye: “Moto oyo alingi tata to mama koleka ngai abongi na ngai te; mpe moto oyo alingi mwana mobali to mwana mwasi koleka ngai abongi na ngai te.”​—Matai 10:34, 37.

Ata bongo, bato mosusu bakoyamba bayekoli na ye malamu. Na yango, alobi: “Moto nyonso oyo apesi na moko ya bato oyo ya mike ata kɔpɔ moko ya mai ya mpiɔ mpo na komɛla mpo azali moyekoli, nayebisi bino ya solo mpenza, akobungisa mbano na ye ata moke te.”​—Matai 10:42.

Lokola Yesu apesi bango malako, makebisi mpe bilendiseli, bantoma basimbi nzela “bakatisi teritware yango, baleki mboka na mboka, basakoli nsango malamu mpe babikisi na bisika nyonso.”​—Luka 9:6.