Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 53

Mokonzi oyo akoki kopekisa mbonge mpe mopɛpɛ

Mokonzi oyo akoki kopekisa mbonge mpe mopɛpɛ

MATAI 14:22-36 MARKO 6:45-56 YOANE 6:14-25

  • BATO BALINGI KOTYA YESU MOKONZI

  • YESU ATAMBOLI LIKOLÓ YA MAI, APEKISI MOPƐPƐ

Lokola Yesu aleisi bankóto ya bato na likamwisi, yango ekamwisi mpenza bato. Babandi koloba ete “oyo azali solo mpenza mosakoli oyo asengelaki koya na mokili,” Masiya, mpe na ntembe te akozala mokonzi ya malamu mpenza. (Yoane 6:14; Kolimbola Mibeko 18:18) Bongo bato bayokani bákanga ye mpo bátya ye mokonzi.

Kasi, Yesu asosoli likambo oyo balingi kosala. Ayebisi ebele ya bato bákende mpe asɛngi bayekoli na ye bámata na masuwa. Bazali kokende wapi? Bazali kokende na Betesaida mpe na nsima na Kapernaume. Kasi Yesu akei ye moko na ngomba kobondela na butu wana.

Ntango sanza ezali kongɛnga, mwa moke liboso ntɔngɔ etana, Yesu amoni masuwa yango na mosika. Mopɛpɛ moko makasi ezali kotombola mbonge ya mbu, mpe bantoma bazali ‘kobundabunda na kolúka, mpo mopɛpɛ ezali kozongisa bango nsima.’ (Marko 6:48) Yesu akiti na ngomba mpe abandi kotambola likoló ya mai tii na esika bazali. Bayekoli basili ‘kolúka bakilomɛtrɛ soki mitano to motoba.’ (Yoane 6:19) Ntango bamoni Yesu azali kotambola lokola nde alingi koleka bango, babangi mpe bagangi ete: “Ezali emonamona!”​—Marko 6:49.

Mpo na kokitisa bango mitema, Yesu alobi: “Bózala na mpiko, ezali ngai; bóbanga te.” Kasi Petro alobi: “Nkolo, soki ezali yo, lobá na ngai naya epai na yo likoló ya mai.” Yesu alobi na ye: “Yaká!” Na yango, Petro atiki masuwa, abandi kotambola likoló ya mai mpo na kokende epai ya Yesu. Kasi, ntango Petro atali mopɛpɛ makasi, abangi mpe abandi kozinda. Agangi: “Nkolo, bikisá ngai!” Yesu asemboli lobɔkɔ na ye, asimbi Petro, mpe alobi na ye: “Yo moto ya kondima moke, mpo na nini obandaki kotya ntembe?”​—Matai 14:27-31.

Petro ná Yesu bamati na masuwa, mpe mopɛpɛ elɛmbi. Bayekoli bakamwe, kasi esengelaki mpenza bákamwa? Basengelaki kokamwa te ndenge atambolaki likoló ya mai mpe apekisaki mopɛpɛ makasi soki “bakangaki ntina ya mampa,” elingi koloba likamwisi oyo Yesu asalaki mwa bangonga liboso mpo aleisa bankóto ya bato. Sikoyo, bayekoli bapesi ye limemya makasi mpe balobi: “Ozali mpenza Mwana ya Nzambe.”​—Marko 6:52; Matai 14:33.

Mwa moke na nsima, bakómi na Genezarete, mokili kitoko oyo ebotaka mbuma mingi, na sudi ya Kapernaume. Babwaki longo wana mpe babimi na mokili. Ntango bato bamoni ete ezali Yesu, bayei ebele elongo na bato ya bamboka ya zingazinga, bamemeli ye bato ya maladi. Soki kaka bato yango basimbi nsɔngɛ ya elamba ya likoló ya Yesu, maladi na bango esili.

Mwa moke na nsima, ebele ya bato oyo Yesu aleisaki na likamwisi bayei koyeba ete Yesu akei. Yango wana, ntango bamasuwa ya mike oyo euti na Tiberiase ekómi, bato bamati mpe bakei Kapernaume koluka Yesu. Ntango bamoni ye, batuni ye: “Rabi, okómi awa ntango nini?” (Yoane 6:25) Ndenge tokomona yango, Yesu akopamela bango.