Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 56

Nini mpenza ekómisaka moto mbindo?

Nini mpenza ekómisaka moto mbindo?

MATAI 15:1-20 MARKO 7:1-23 YOANE 7:1

  • YESU ABIMISI POLELE MAKAMBO YA MABE YA BONKƆKƆ YA BATO

Tozali na mobu 32 T.B. Fɛti ya Elekeli ezali kokóma pene mpe Yesu azali koteya mingi na Galile. Ndenge Mibeko ya Nzambe esɛngi, ekoki kozala ete Yesu akei na Yerusaleme mpo na yango. Kasi, azali ekɛngɛ mpo Bayuda bazali koluka koboma ye. (Yoane 7:1) Na nsima, azongi na Galile.

Mbala mosusu Yesu azali na Kapernaume ntango Bafarisai mpe bakomeli oyo bauti na Yerusaleme bayei kokutana na ye. Mpo na nini bayei? Bazali koluka bifundeli oyo ekomonisa ete Yesu atosaka mibeko ya lingomba te. Batuni ye: “Mpo na nini bayekoli na yo batosaka bonkɔkɔ oyo euti na bato ya kala te? Na ndakisa, basukolaka mabɔkɔ na bango te ntango balingi kolya biloko.” (Matai 15:2) Nzambe asɛngá basaleli na ye ata mokolo moko te bálanda momeseno ya “kosukola mabɔkɔ kino na molɔku.” (Marko 7:3) Atako bongo, Bafarisai bazali komona ete kosala yango te ezali mbeba monene.

Yesu ayanoli na efundeli na bango mbala moko te; amonisi nde ete bango babukaka Mibeko ya Nzambe na nko. Atuni bango: “Mpo na nini bino mpe bobukaka mitindo ya Nzambe mpo na bonkɔkɔ na bino? Na ndakisa, Nzambe alobaki ete: ‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo’; mpe, ‘Moto oyo afingi tata to mama akufa.’ Kasi bino bolobi ete: ‘Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama ete: “Eloko nyonso nazali na yango oyo okokaki kozwela litomba ezali likabo oyo napesi Nzambe,” ye asengeli kokumisa tata na ye te.’”​—Matai 15:3-6; Kobima 20:12; 21:17.

Bafarisai balobaka ete mbongo, biloko ya moto, to eloko mosusu nyonso oyo moto alaki ete akopesa likabo epai ya Nzambe ekómi ya tempelo, na yango moto akoki kosalela yango mpo na likambo mosusu te. Nzokande, likabo yango ekotikala kaka na mabɔkɔ ya nkolo na yango. Na ndakisa, mwana akoki koloba ete mbongo to biloko na ye nyonso ezali “korbani,” elingi koloba likabo oyo apesi Nzambe to tempelo, lokola nde likabo na ye esengeli libosoliboso kokende na tempelo. Mbongo to biloko yango ezali ya mwana yango, alobi ete akoki kosalela yango te mpo na kosalisa baboti na ye oyo bakómi mibange mpe bazali na bosɛnga. Ndenge asali bongo akimi mokumba na ye ya kosalisa bango.​—Marko 7:11.

Yesu ayoki mabe mpenza ndenge Bafarisai bazali kobalola Mibeko ya Nzambe; alobi na bango: “Bokómisi liloba ya Nzambe eloko mpamba mpo na bonkɔkɔ na bino. Bino bakosi, Yisaya asakolaki malamu mpo na bino, ntango alobaki ete: ‘Bato oyo bakumisi ngai na mbɛbu na bango, kasi motema na bango ezali mosika na ngai. Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo mateya oyo bazali koteya ezali nde mibeko ya bato.’” Bafarisai bazangi likambo ya koloba. Na yango, abengi ebele ya bato bápusana pene. Alobi na bango: “Bóyoka mpe bókanga ntina ya maloba oyo: Eloko oyo ekɔtaka na monɔkɔ ya moto ekómisaka ye mbindo te; kasi oyo ebimaka na monɔkɔ ya moto nde ekómisaka ye mbindo.”​—Matai 15:6-11; Yisaya 29:13.

Na nsima, ntango bakɔti na ndako moko, bayekoli batuni Yesu: “Oyebi ete Bafarisai babɛti libaku ntango bayokaki makambo oyo olobi?” Azongiseli bango ete: “Nzete nyonso oyo Tata na ngai ya likoló aloni te ekopikolama. Bótika bango. Bazali batambwisi oyo bakufá miso. Boye, soki moto oyo akufá miso azali kotambwisa moto oyo akufá miso, bango mibale bakokwea na libulu.”​—Matai 15:12-14.

Emonani lokola ete Yesu akamwe ntango Petro azwi maloba na nkombo ya bayekoli mpo na kotuna ye alimbola polele nini ekómisaka moto mbindo. Yesu apesi eyano ete: “Boyebi te ete eloko nyonso oyo ekɔtaka na monɔkɔ elekaka na misɔpɔ mpe esukaka na kabinɛ? Kasi makambo oyo ebimaka na monɔkɔ eutaka na motema, mpe makambo wana nde ekómisaka moto mbindo. Na ndakisa, makanisi mabe, koboma bato, misala ya ekobo, misala ya pite, koyiba, matatoli ya lokuta, maloba ya kofinga, eutaka na motema. Makambo wana nde ekómisaka moto mbindo; kasi kosukola mabɔkɔ te liboso ya kolya ekómisaka moto mbindo te.”​—Matai 15:17-20.

Yesu apekisi bopɛto te. Alobi mpe te ete ebongi te kosukola mabɔkɔ liboso ya kolamba to ya kolya. Kasi, apameli nde bakonzi ya mangomba, oyo baboyaka kotosa mibeko ya sembo ya Nzambe mpo na kolanda bonkɔkɔ ya bato, mpo na bokosi na bango. Ya solo, makambo mabe oyo eutaka na motema nde ekómisaka moto mbindo.