Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 57

Yesu abikisi mwana moko ya mwasi ná moto moko akufá matoi

Yesu abikisi mwana moko ya mwasi ná moto moko akufá matoi

MATAI 15:21-31 MARKO 7:24-37

  • YESU ABIKISI MWANA MWASI YA MWASI MOKO YA FENISIA

  • ABIKISI MOTO MOKO AKUFÁ MATOI MPE ALOBAKA TE

Nsima ya kopamela Bafarisai ete balandaka bonkɔkɔ mpo na matomba na bango moko, Yesu akei na bayekoli na ye. Bakei na Tire mpe na Sidone, bitúká ya Fenisia, oyo ezali mosika mpenza na nɔrdi-wɛsti.

Yesu azwi esika ya kofanda, kasi alingi te bato báyeba ete azali wana. Atako bongo, bato bayebi kaka. Mwasi moko oyo baboti na ye bazali Bagrɛki, oyo abotamá na Fenisia, amoni Yesu mpe abandi kosɛnga ye: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá ngai mawa. Bademo bakɔtelá mpenza mwana na ngai ya mwasi.”​—Matai 15:22; Marko 7:26.

Na nsima, bayekoli bayebisi Yesu ete: “Lobá na ye azonga; mpamba te azali kokoba koganga nsima na biso.” Na yango, Yesu ayebisi ntina oyo aboyi koyanola mwasi wana: “Natindamaki epai ya bato mosusu te kaka epai ya bampate ya ndako ya Yisraele oyo babungá.” Mwasi yango alɛmbi nzoto te. Apusani pene na Yesu mpe agumbameli ye, alobi: “Nkolo, salisá ngai!”​—Matai 15:23-25.

Emonani ete mpo na kotala soki mwasi yango azali na kondima makasi, Yesu asaleli elobeli ya Bayuda oyo emonisaka ete bakaniselaka bato ya bikólo mosusu mabe; alobi: “Ezali malamu te kokamata mampa ya bana mpe kobwakela yango bana ya mbwa.” (Matai 15:26) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “bana ya mbwa” oyo Yesu asaleli awa, ezali komonisa boboto epai ya bato oyo bazali Bayuda te. Na ntembe te, boboto yango emonani na elongi na ye mpe na mongongo na ye.

Mwasi yango asiliki te; kutu, andimi ete Bayuda bakaniselaka bato ya bikólo mosusu mabe, kasi na komikitisa nyonso alobi: “Ya solo, Nkolo; kasi bana ya mbwa balyaka pumbulu oyo eutaka na mesa ya bankolo na bango.” Yesu amoni kondima ya mwasi yango mpe alobi: “Ee mwasi, kondima na yo ezali monene; ekómela yo kaka ndenge olingi.” (Matai 15:27, 28) Esalemi mpe bongo, atako mwana yango azali wana te! Ntango mwasi yango azongi na ndako, akuti mwana na ye na mbeto, abiki; “demo yango abimi”!​—Marko 7:30.

Yesu ná bayekoli na ye balongwe na etúká ya Fenisia, bakatisi mboka yango mpe bamati na ngámbo ya Ebale Yordani. Emonani ete bakatisi Yordani pene na nɔrdi ya Mbu ya Galile mpe bakɔti na etúká ya Dekapolisi. Kuna, bamati na ngomba moko, kasi ebele ya bato bamoni bango. Bamemeli Yesu batɛngumi, bibɔsɔnɔ, bakufi-miso, mpe bato oyo balobaka te. Batye bato yango ya maladi na makolo ya Yesu mpe abikisi bango. Makamwisi yango etindi bato bákumisa Nzambe ya Yisraele.

Yesu atye likebi na ye epai ya moto moko oyo akufá matoi mpe alobaka te. Kanisá ndenge moto yango azali komiyoka na kati na ebele ya bato wana. Mbala mosusu, Yesu amoni ete moto yango azali kobanga, yango wana akei na ye mosika na bato. Bazali bango mibale kaka, Yesu ayebisi moto yango likambo oyo akosala. Akɔtisi misapi na matoi ya moto yango, abwaki nsoi mpe asimbi lolemo na ye. Na nsima, Yesu atali likoló, mpe alobi liloba moko oyo elimboli “Fungwamá.” Na mbala moko, matoi ya moto yango efungwami mpe abandi koloba malamu. Yesu alingi te ete báyebisa bato likambo yango, alingi ete kondima ya bato euta na makambo oyo bango moko bamoni mpe bayoki.​—Marko 7:32-36.

Nguya oyo Yesu asaleli mpo na kobikisa bato esimbi mpenza motema ya bato oyo bazali wana, mpo ‘bakamwe na ndenge moko ya nsɔmɔ.’ Balobi: “Asali makambo nyonso malamu. Azali ata koyokisa bato oyo bakufá matoi mpe kolobisa bato oyo balobaka te.”​—Marko 7:37.