Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 66

Na Yerusaleme mpo na Fɛti ya Batabernakle

Na Yerusaleme mpo na Fɛti ya Batabernakle

YOANE 7:11-32

  • YESU ATEYI NA TEMPELO

Banda Yesu azwá batisimo eleki mwa bambula, bato mingi bayebi ye. Bayuda ebele bamoná makamwisi oyo asalá, mpe nsango ya misala na ye etamboli mokili yango mobimba. Sikoyo, awa na Fɛti ya Batabernakle (to ya Mwa bandako ya matiti) na Yerusaleme, bato ebele bazali koluka ye.

Moto na moto azali na makanisi na ye mpo na Yesu. Bato mosusu balobi: “Azali moto malamu.” Mosusu ete: “Te azali nde kobungisa ebele ya bato nzela.” (Yoane 7:12) Bazali koloba bongo na nsense na mikolo ya liboso ya fɛti. Kasi, moto moko te azali na mpiko ya koloba polele mpo na Yesu, mpo bato mingi bazali kobanga mpo bayebi te likambo oyo bakonzi ya Bayuda bakosala.

Na mikolo ya katikati ya fɛti yango, Yesu ayei na tempelo. Bato mingi bazali kokamwa na ndenge na ye ya koteya. Lokola Yesu akɔtá kelasi ya Barabi te, Bayuda bamituni: “Ndenge nini moto oyo azwi boyebi ya mikanda, nzokande atángá kelasi te?”​—Yoane 7:15.

Yesu azongiseli bango: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai. Soki moto azali na mposa ya kosala mokano na Ye, akoyeba soki liteya yango euti na Nzambe to soki nazali koloba makambo oyo euti na ngai moko.” (Yoane 7:16, 17) Mateya ya Yesu ezali na boyokani na Mibeko ya Nzambe; na yango, basengeli komona polele ete azali koluka lokumu ya Nzambe kasi ya ye moko te.

Na nsima, Yesu atuni: “Moize apesaki bino Mibeko, boye te? Kasi ata moko te na kati na bino atosaka Mibeko. Mpo na nini bozali koluka koboma ngai?” Ekoki kozala ete, bato mosusu oyo bafandaka na Yerusaleme te bayebi likambo yango te. Bazali komona ata moke te ntina oyo moto akoki koluka koboma moteyi malamu lokola Yesu. Na yango, bakanisi ete motó ya Yesu ezali kosala malamu te yango wana alobi bongo. Balobi na ye: “Ozali na demo. Nani azali koluka koboma yo?”​—Yoane 7:19, 20.

Nzokande, bakonzi ya Bayuda balingaki koboma Yesu ntango abikisaki moto na mokolo ya Sabata, eleki mbula moko na ndambo. Sikoyo Yesu atuni motuna moko mpo na kotinda bango bákanisa mpe bámona motema makasi na bango. Alobi ete na kolanda Mibeko, mwana mobali oyo abotami akatamaka ngenga na mokolo ya mwambe, ata soki ezali Sabata. Na nsima, atuni: “Soki moto akatamaka ngenga na sabata mpo mobeko ya Moize ebukama te, bozali nde kosilikela ngai makasi mpo nakómisi moto nzoto kolɔngɔnɔ mpenza na sabata? Bótika kosambisa na kolanda oyo ezali komonana na libándá, kasi bósambisa na kosambisa ya sembo.”​—Yoane 7:23, 24.

Bato oyo bafandaka na Yerusaleme, oyo bayebi likambo yango, batuni: “Oyo moto [bakonzi] bazali koluka koboma, boye te? Kasi, talá! azali koloba na miso ya bato, mpe bazali koloba na ye eloko te. Boye bankumu bayebi mpenza ete ye azali Kristo?” Kasi, mpo na nini bato bazali kondima te ete Yesu azali Kristo? Balobi: “Toyebi epai moto oyo auti; nzokande ntango Kristo akoya, moto moko te akoyeba epai auti.”​—Yoane 7:25-27.

Kaka wana na tempelo, Yesu alobi na bango: “Boyebi ngai mpe boyebi epai wapi nauti. Lisusu, nayei na ndenge na ngai moko te, kasi oyo atindaki ngai azali mpenza, mpe bino boyebi ye te. Ngai nayebi ye, mpamba te nazali momonisi oyo auti epai na ye, mpe Moto wana nde atindaki ngai.” (Yoane 7:28, 29) Ntango bayoki polele maloba wana, baluki kokanga Yesu mpo na kotya ye na bolɔkɔ to koboma ye. Kasi balongi te, mpo ngonga ya liwa ya Yesu ekoki naino te.

Nzokande, bato mingi bandimeli mpenza Yesu, mpe ezali mpamba te. Yesu atambolaki likoló ya mai, alɛmbisaki mopɛpɛ makasi, asalaki likamwisi ya koleisa bankóto ya bato na mwa mampa mpe mwa mbisi moke, abikisaki bato ya maladi, atɛlɛmisaki bibɔsɔnɔ, afungolaki miso ya bato bakufá miso, mpe asekwisaki ata bakufi. Yango wana bamituni: “Ntango Kristo akoya, akosala nde bilembo mingi koleka oyo moto oyo asali?”​—Yoane 7:31.

Ntango Bafarisai bayoki ebele ya bato bazali koloba bongo, bango ná banganga-nzambe bakonzi batindi bapolisi bákanga Yesu.