Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 72

Yesu atindi bayekoli 70 bákende kosakola

Yesu atindi bayekoli 70 bákende kosakola

LUKA 10:1-24

  • YESU APONI BAYEKOLI 70 MPE ATINDI BANGO BÁKENDE KOSAKOLA

Tokómi pene na nsuka ya mobu 32 T.B., esili koleka mbula misato banda Yesu azwaki batisimo. Na mikolo euti koleka, ye ná bayekoli na ye bazalaki na Fɛti ya Batabernakle na Yerusaleme. Ekoki kozala ete bakei naino mosika te. (Luka 10:38; Yoane 11:1) Kutu, na sanza motoba oyo Yesu atikali na yango mpo na kosakola, alekisi mikolo mingi nde na Yudea to na ngámbo mosusu ya Ebale Yordani na etúká ya Perea. Ezali kosɛnga kosakola mingi na teritware wana.

Mwa moke liboso, na fɛti ya Elekeli ya mobu 30 T.B., Yesu asakolaki mwa basanza na Yudea mpe azalaki kokatisa Samaria. Na nsima, pene na fɛti ya Elekeli ya mobu 31 T.B., Bayuda oyo bazalaki na Yerusaleme balingaki koboma ye. Na boumeli ya mbula mobimba na ndambo, Yesu ateyaki mingimingi na nɔrdi, na Galile. Na ntango wana, bato mingi bakómaki bayekoli na ye. Na Galile, Yesu apesaki bantoma na ye formasyo, na nsima atindaki bango bákende kosakola; apesaki bango malako oyo: “Bósakola mpe bóloba ete: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’” (Matai 10:5-7) Na nsima, abongisi kampanye moko ya kosakola na Yudea.

Mpo na kobanda kampanye yango, Yesu aponi bayekoli 70 mpe atindi bango mibalemibale. Na yango, esali baekipi 35 ya basakoli ya Bokonzi na teritware yango, esika oyo “mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.” (Luka 10:2) Basengeli kokende liboso na bisika oyo Yesu akoleka na nsima. Bayekoli 70 yango basengeli kobikisa bato ya maladi mpe kosakola nsango oyo Yesu azali kosakola.

Bayekoli yango batindami te mpo na kosakola na basinagoga. Yesu ayebisi bango bákende nde na bandako ya bato. Apesi bango malako oyo: “Esika nyonso bokokɔta na ndako bóloba libosoliboso ete: ‘Kimya ezala na ndako oyo.’ Mpe soki moninga ya kimya azali wana, kimya na bino ekofanda likoló na ye. Nsango nini basengeli komemela bato? Yesu alobi: “Bókoba koyebisa bango ete: ‘Bokonzi ya Nzambe ekómi pene na bino.’”​—Luka 10:5-9.

Malako oyo Yesu apesi bayekoli 70 ekokani na oyo apesaki ntango atindaki bantoma 12 pene na mbula moko liboso. Ayebisi bango liboso ete bato nyonso bakoyamba bango malamu te. Kasi milende na bango ekobongisa nzela, mpo ntango Yesu, Molakisi na bango, akoya mwa moke na nsima, bato mingi bázala na mposa ya kokutana na ye mpe koyoka mateya na ye.

Eumelaki te, basakoli yango ya Bokonzi, oyo basali baekipi 35, bazongi epai ya Yesu. Na esengo nyonso, bayebisi ye: “Nkolo, ata bademo bazali kotosa biso ntango tozali kosalela nkombo na yo.” Na ntembe te, lapolo ya malamu wana esepelisi mpenza Yesu, yango wana azongisi: “Namoni Satana auti na likoló akwei lokola mokalikali. Talá! Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka mpe bankotó, mpe bokonzi likoló ya nguya nyonso ya monguna, mpe eloko moko ekosala bino mabe ata moke te.”​—Luka 10:17-19.

Na maloba wana, Yesu asalisi bayekoli na ye báyeba ete eloko moko te ekosala bango mabe, ezala banyoka mpe bankotó ya elilingi. Longola yango, basengeli kozala na kondima ete na mikolo ezali koya, Satana akobwakama na mabele. Yesu asalisi mpe bayekoli 70 báyeba likambo oyo ezali na ntina mingi koleka mpo na libela. Alobi: “Bósepela na likambo oyo te ete bilimo ezali kotosa bino, kasi bósepela nde mpo bankombo na bino ekomami na likoló.”​—Luka 10:20.

Yesu atondi na esengo mpe akumisi Tata na ye na miso ya bato ndenge apesi bato yango ya komikitisa nguya mingi. Na nsima, abaluki epai ya bayekoli na ye mpe alobi na bango: “Esengo na miso oyo ezali komona makambo oyo bino bozali komona. Mpo nazali koloba na bino, basakoli mingi mpe bakonzi mingi bazalaki na mposa ya komona makambo oyo bino bozali komona kasi bamonaki yango te, mpe bazalaki na mposa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka kasi bayokaki yango te.”​—Luka 10:23, 24.