Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 75

Yesu amonisi likambo oyo epesaka esengo

Yesu amonisi likambo oyo epesaka esengo

LUKA 11:14-36

  • AZALI KOBIMISA BADEMO NA “MOSAPI YA NZAMBE”

  • NINI EPESAKA ESENGO YA SOLOSOLO?

Yesu auti kozongela malako ya libondeli, kasi yango ezali te lisolo kaka moko oyo azongeli mbala ebele na mosala na ye ya kosakola. Ntango azalaki kosala makamwisi na Galile, bafundaki ye ete asali makamwisi yango na nguya ya mokonzi ya bademo. Sikoyo azali na Yudea, mpe bafundi ye lisusu kaka ndenge bafundaki liboso.

Ntango Yesu abimisi demo oyo ezali kopekisa mobali moko koloba, ebele ya bato bakamwe. Kasi banguna na ye basepeli te. Yango wana, balobi lisusu likambo ya lokuta oyo balobaki liboso: “Azali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube mokonzi ya bademo.” (Luka 11:15) Basusu, oyo bazali koluka koyeba mpenza soki Yesu azali nani, batuni ye elembo oyo ekouta na likoló.

Lokola Yesu ayebi ete batuni ye bongo mpo na komeka ye, ayanoli bango ndenge asalaki ntango balobaki na ye bongo na Galile. Alobi ete bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko ebebaka, mpe abakisi: “Soki Satana mpe akabwani na kati na ye moko, bokonzi na ye ekotɛlɛma ndenge nini?” Na nsima, Yesu alobeli bango mbala moko: “Soki ezali na mosapi ya Nzambe nde nazali kobimisa bademo, bokonzi ya Nzambe eleki bino kaka boye.”​—Luka 11:18-20.

Maloba “mosapi ya Nzambe” oyo Yesu alobi etindi bayoki na ye bákanisa likambo moko oyo esalemaki ntango Bayisraele bazalaki na Ezipito. Bato oyo bamonaki Moize azali kosala likamwisi na ndako ya Farao bagangaki: “Ezali mosapi ya Nzambe!” Ezalaki mpe “mosapi ya Nzambe” nde ekomaki Mibeko Zomi na bitanda mibale ya mabanga. (Kobima 8:19; 31:18) Ndenge moko mpe, “mosapi ya Nzambe,” elingi koloba elimo santu to nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala, nde ezali sikoyo kopesa Yesu makoki ya kobimisa bademo mpe kobikisa bato ya maladi. Na yango, Bokonzi ya Nzambe eleki batɛmɛli yango kaka boye, mpo Mokonzi oyo Nzambe aponi ayangela na Bokonzi yango, Yesu, moto oyo azali kosala makamwisi yango, azali wana.

Nguya oyo Yesu azali na yango ya kobimisa bademo ezali elembo oyo emonisi ete aleki Satana na nguya; ezali lokola mobali moko ya makasi apusani pene na soda moko oyo asimbi mondoki mpe azali kokɛngɛla ndako ya mokonzi, mpe abɔtɔli ye mondoki yango. Yesu azongeli mpe ndakisa oyo apesaki ya elimo ya mbindo oyo ebimaki epai ya mobali moko. Soki mobali yango atondisi te na makambo ya malamu esika oyo etikali mpamba, elimo yango ekozonga elongo na bilimo mosusu nsambo, mpe moto wana akokóma mabe koleka ndenge azalaki liboso. (Matai 12:22, 25-29, 43-45) Yango nde likambo oyo ekómelaki ekólo Yisraele.

Mwasi moko oyo azali koyoka Yesu agangi ete: “Esengo na libumu oyo ememaki yo mpe na mabɛlɛ oyo omɛlaki!” Basi ya Bayuda bazalaki na elikya ya kozala mama ya mosakoli, mingimingi ya Masiya. Na yango, ekoki kozala ete mwasi wana azali kokanisa ete Maria azali na esengo mingi mpo azali mama ya moteyi ya ndenge wana. Kasi, Yesu asemboli mwasi yango mpe amonisi nini epesaka esengo. Azongiseli ye boye: “Te, esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!” (Luka 11:27, 28) Yesu alobá ata mbala moko te ete esengeli kopesa Maria lokumu mingi. Mpo na moto nyonso, mwasi to mobali, esengo ya solosolo eutaka nde na kosalela Nzambe na bosembo, kasi te mpo tozali bandeko ya moto boye to boye to mpo na makambo oyo tosali.

Ndenge Yesu asalaki na Galile, apameli bato yango ndenge bazali kosɛnga elembo oyo ekouta likoló. Alobi ete akopesa bango elembo moko te, longola kaka “elembo ya Yona.” Yona azali elembo, na ndenge asalaki mikolo misato na libumu ya mbisi, mpe lokola asakolaki na mpiko, yango etindaki bato ya Ninive bábongola motema. Yesu alobi: “Kasi talá! moto oyo aleki Yona azali awa.” (Luka 11:29-32) Yesu aleki mpe Salomo, oyo bwanya na ye etindaki mokonzi-mwasi ya Sheba aya koyoka ye.

Yesu abakisi: “Nsima ya kopelisa mwinda, moto atyaka yango, na libulu to na ekɔlɔ ya komekela te, kasi likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda.” (Luka 11:33) Mbala mosusu alingaki koloba ete koteya mpe kosala makamwisi na miso ya bato wana ezali lokola kobomba pole ya mwinda. Lokola miso na bango ezali alima te, bazali koyeba te ntina ya misala na ye.

Yesu abimisi kaka demo moko mpe asalisi moto oyo azalaki koloba te aloba. Yango esengelaki kotinda bato bákumisa Nzambe mpe báyebisa basusu makambo oyo Yehova azali kosala. Na yango, Yesu akebisi mokomoko ya banguna na ye na maloba oyo: “Zalá na bokɛngi. Mbala mosusu pole oyo ezali na kati na yo ezali molili. Yango wana, soki nzoto na yo mobimba ezali kongɛnga mpe ata eteni moko te ezali na molili, yango mobimba ekongɛnga se ndenge mwinda engɛngaka ntango epesaka yo pole.”​—Luka 11:35, 36.