Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 76

Alei epai ya Mofarisai moko

Alei epai ya Mofarisai moko

LUKA 11:37-54

  • YESU APAMELI BAFARISAI MPO NA BOKOSI NA BANGO

Ntango Yesu azali na Yudea, andimi kokende kolya epai ya Mofarisai moko. Ezali bilei ya mpokwa te mpo ekoki kozala ete moi elali naino te. (Luka 11:37, 38; talá mpe Luka 14:12.) Liboso ya kolya, Bafarisai basali ndenge bamesaná: basukoli mabɔkɔ tii na milɔku. Kasi Yesu asali bongo te. (Matai 15:1, 2) Kosukola mabɔkɔ ndenge wana ebuki mobeko ya Nzambe te mpo Nzambe asɛngi yango te.

Mofarisai yango akamwe ndenge Yesu alandi momeseno wana te. Yesu amoni yango mpe alobi: “Nzokande bino Bafarisai, bopɛtolaka libándá ya kɔpɔ mpe ya saani, kasi mitema na bino etondi na kopunza mpe na mabe. Bazoba! Moto oyo asalaki libándá asalaki mpe kati, boye te?”​—Luka 11:39, 40.

Soki moto asukoli mabɔkɔ liboso ya kolya ezali mabe te, kasi kosambela na bokosi nde ezali mabe. Bafarisai mpe bato mosusu oyo balandaka momeseno ya kosukola mabɔkɔ tii na milɔku bapɛtolaka mitema na bango te, basalaka makambo ya mabe. Yango wana, Yesu apesi bango toli oyo: “Bópesa makabo ya motema mawa nde biloko oyo ezali na motema, mpe talá! biloko na bino mosusu nyonso ekokóma pɛto.” (Luka 11:41) Ezali mpenza solo! Kokaba esengeli kouta na motema oyo etondi na bolingo, kasi te na mposa ya komonisa basusu ete tozali bayengebene.

Yango elingi koloba te ete bato yango bakabaka te. Yesu alobi: “Bopesaka moko ya bandambo zomi ya manti mpe ya peganono mpe ya ndunda mosusu nyonso, kasi bozali koleka pembeni ya bosembo mpe bolingo ya Nzambe! Bosengelaki kosala makambo oyo, mpe kobosana te makambo mosusu wana.” (Luka 11:42) Mobeko ya Nzambe esɛngaki ete moto afuta moko ya bandambo zomi ya mbuma ya milona. (Kolimbola Mibeko 14:22) Ezalaki mpe bongo mpo na manti mpe mpo na peganono, milona oyo bazalaki kotya na bilei mpo ekóma elɛngi. Bafarisai bazalaki na momeseno ya kofuta moko ya bandambo zomi ya milona wana; kasi tokoloba boni mpo na makambo eleki ntina oyo Mibeko esɛngi, na ndakisa, komonisa bosembo mpe kotambola na bopɔlɔ na miso ya Nzambe?​—Mika 6:8.

Yesu abakisi: “Mawa na bino Bafarisai, mpamba te bolingaka bakiti ya liboso na basinagoga mpe bambote na bazando! Mawa na bino, mpamba te bozali lokola malita wana oyo ezali komonana te, mpe bato batambolaka likoló na yango mpe bayebaka yango te!” (Luka 11:43, 44) Soki moto akwei na malita yango, akokóma mbindo na kolanda mimeseno ya bonkɔkɔ. Yesu asaleli ndakisa yango mpo na komonisa ete Bafarisai bazali mbindo, kasi mbindo na bango ezali komonana te.​—Matai 23:27.

Moto moko oyo ayebi Mibeko ya Nzambe malamumalamu amileli na maloba oyo: “Moteyi, lokola ozali koloba makambo wana ozali mpe kofinga biso.” Atako bongo, bato yango basengeli koyeba ete bazali kosalisa bato te. Yesu alobi: “Mawa mpe na bino baoyo boyebi Mibeko malamumalamu, mpamba te bozali komemisa bato mikumba ya kilo, kasi bino moko bosimbaka mikumba yango ata na mosapi te! Mawa na bino, mpamba te botongaka malita ya basakoli, kasi bankɔkɔ na bino nde babomaki bango!”​—Luka 11:45-47.

Mikumba oyo Yesu azali kolobela ezali mimeseno ya Bafarisai mpe ndenge oyo bazali kolimbola Mibeko. Mibali yango bazali kotyela bato mibeko makasimakasi. Bazali kotya bato nyonso mbamba mpo bámema mikumba wana ya kilo. Bankɔkɔ na bango babomaki basakoli ya Nzambe, kobanda na Abele tii lelo. Atako bazali kotongela basakoli malita mpo na komonisa ete bazali komemya bango, bazali nde komekola ezaleli mpe misala ya bankɔkɔ na bango. Kutu, bazali koluka koboma mosakoli ya Nzambe oyo aleki monene. Yesu alobi ete bato yango bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe. Likambo yango esalemaki mbula 38 na nsima, na mobu 70 T.B.

Yesu alobi: “Mawa na bino baoyo boyebi Mibeko malamumalamu, mpamba te bolongoli fungola ya boyebi; bino moko bokɔtaki te, mpe baoyo bazalaki kokɔta bokangelaki bango nzela!” (Luka 11:52) Mibali yango, oyo basengeli koteya Liloba ya Nzambe, bazali nde kolongola bato likoki ya koyeba yango mpe kokanga ntina na yango.

Bafarisai mpe bakomeli basali nini? Ntango Yesu azali kokende, babandi kotɛmɛla ye na nkanda mpe kotuna ye ebele ya mituna. Bazali kotuna te mpo na koluka koyeba. Balingi nde kotinda Yesu aloba likambo moko oyo ekosala ete bákanga ye.