Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 79

Ekólo moko eponi nzela ya libebi

Ekólo moko eponi nzela ya libebi

LUKA 13:1-21

  • YESU APESI LITEYA MOKO NA NZELA YA MAKAMBO MIBALE YA MAWA

  • NA SABATA, ABIKISI MWASI MOKO OYO AGUMBAMÁ

Yesu asaleli mayele ndenge na ndenge mpo na kolendisa bato bákanisa boyokani na bango na Nzambe. Libaku mosusu emonani nsima ya lisolo na ye ná bato na libándá ya ndako ya Mofarisai.

Basusu kati na bango balobeli likambo moko ya mawa oyo esalemi. Balobeli ndenge guvɛrnɛrɛ Moroma Ponse “Pilate abomaki Bagalile oyo bazalaki kopesa bambeka.” (Luka 13:1) Balingi koloba nini?

Mbala mosusu Bagalile wana ezalaki baoyo babomamaki ntango bankóto ya Bayuda batɛmɛlaki Pilate ndenge asalelaki mbongo oyo azwaki na kɛsi ya tempelo mpo na kotonga terase moko ya monene mpo na kobenda mai na Yerusaleme. Ekoki kozala ete Pilate azalaki kobimisa mbongo yango na ndingisa ya bakonzi ya tempelo. Ntango mosusu bato oyo bazali kobɛta lisolo yango bazali kokanisa ete likambo wana ekwelaki Bagalile yango mpo bamemaki ngambo mpo na mabe moko oyo basalaki. Kasi Yesu andimi likanisi wana te.

Atuni bango: “Bokanisi ete Bagalile wana bazalaki basumuki koleka Bagalile mosusu nyonso mpo makambo wana ekweli bango?” Ezali bongo te. Kasi asaleli likambo yango mpo na kokebisa Bayuda: “Soki bobongoli mitema te, bino nyonso bokobomama se ndenge wana.” (Luka 13:2, 3) Na nsima, Yesu alobeli likama mosusu oyo esalemaki kaka mikolo wana, mbala mosusu ntango bazalaki kotonga terase yango, mpe atuni:

“To baoyo zomi na mwambe oyo linɔ́ngi ya Siloame ekwelaki mpe ebomaki bango, bokanisi ete bazalaki na nyongo monene koleka bato mosusu nyonso oyo bafandaka na Yerusaleme?” (Luka 13:4) Ntango mosusu ebele wana ya bato bazali kokanisa ete bato yango bakufi mpo na mabe moko oyo basali. Awa lisusu, Yesu andimi likanisi wana te. Ayebi ete “ntango ná makambo oyo ekanami te” ekómelaka bato nyonso mpe ekoki kozala ete yango nde ebomaki bango. (Mosakoli 9:11) Kasi, bato basengeli kozwa liteya na likambo yango. Yesu alobi: “Soki bobongoli mitema te, bino nyonso bokobomama se bongo.” (Luka 13:5) Kasi mpo na nini apesi liteya yango sikoyo?

Asali bongo mpo ayebi ete etikali moke mosala na ye ya kosakola esuka, mpe amonisi yango na ndakisa oyo: “Moto moko azalaki na nzete ya figi oyo elonamaki na elanga na ye ya vinyo, mpe ayaki koluka mbuma na nzete yango, kasi azwaki ata moko te. Mpe alobaki na mosali-bilanga ya vinyo ete: ‘Talá mbula misato yango oyo banda nazali koya koluka mbuma na nzete ya figi oyo, kasi nazali kozwa ata moko te. Katá yango! Mpo na nini mpenza ezali kokoba kobebisa mabele?’ Azongiselaki ye ete: ‘Nkolo, tiká yango lisusu mbula oyo, tii natimola zingazinga na yango mpe natya bipɔli; mpe soki eboti mbuma na mikolo ekoya, malamu mingi; kasi soki te, okokata yango.’”​—Luka 13:6-9.

Na boumeli ya mbula misato na ndambo, Yesu asalaki nyonso mpo Bayuda bákóma na kondima. Atako asali mosala makasi, kaka bato moke nde bakómi bayekoli na ye. Sikoyo, lokola akɔti na mbula ya minei ya mosala na ye, abakisi milende. Ezali lokola azali kotimola mpe kotya bipɔli zingazinga ya nzete ya figi, elingi koloba Bayuda, na ndenge azali kosakola mpe koteya na Yudea mpe na Perea. Kasi mosala yango eboti mbuma nini? Kaka Bayuda moke nde bandimi. Ekólo na bango mobimba eboyi kobongola motema, mpe eponi nzela ya libebi.

Kozanga kondima ya mingi na bango emonani lisusu polele mwa moke nsima ya Sabata moko. Yesu azali kosakola na sinagoga moko. Amoni mwasi moko oyo agumbamá mbula 18 mpo demo moko ezali konyokola ye. Yesu ayokeli mwasi yango mawa mpe alobi na ye: “Mwasi, obiki na bolɛmbu na yo.” (Luka 13:12) Yesu atye ye mabɔkɔ na motó, mpe mbala moko mwasi yango atɛlɛmi semba mpe abandi kokumisa Nzambe.

Likambo yango epesi mokambi ya sinagoga nkanda, mpe alobi: “Ezali na mikolo motoba oyo mosala esengeli kosalema; yango wana, bóyaka kobikisama na mikolo wana, kasi na mokolo ya sabata te.” (Luka 13:14) Mokambi wana aboyi te ete Yesu azali na nguya ya kobikisa; azali nde kopamela bato ndenge bazali koya mpo Yesu abikisa bango na mokolo ya Sabata! Yesu azongisi na maloba ya polele: “Bakosi, na sabata mokomoko na bino afungolaka ngɔmbɛ na ye ya mobali to mpunda na ye na lopango ya bibwɛlɛ mpe akendaka komɛlisa yango, boye te? Bongo ebongaki te ete mwasi oyo, oyo azali mwana ya Abrahama, mpe oyo Satana akangá mbula zomi na mwambe oyo afungwama na nsinga wana na mokolo ya sabata?”​—Luka 13:15, 16.

Banguna na ye bayoki nsɔni, kasi ebele ya bato basepeli mpo na misala ya nguya oyo bamoni Yesu azali kosala. Na nsima, na Yudea, Yesu azongeli ndakisa mibale oyo ezali bisakweli mpo na Bokonzi, oyo alobelaki liboso ntango azalaki na masuwa na Mbu ya Galile.​—Matai 13:31-33; Luka 13:18-21.