Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 82

Mosala ya Yesu na Perea

Mosala ya Yesu na Perea

LUKA 13:22–14:6

  • KOSALA MILENDE MPO NA KOKƆTA NA PORTE YA MOKE

  • YESU AKOKUFA NA YERUSALEME

Yesu ateyi mpe abikisi bato na Yudea mpe na Yerusaleme. Na nsima, akatisi Ebale Yordani mpo na kosakola na engumba mokomoko na etúká ya Perea. Kasi, mosika te, akozonga na Yerusaleme.

Ntango azali na Perea, moto moko atuni ye: “Nkolo, baoyo bakobika bazali moke?” Mbala mosusu moto yango ayebi kowelana oyo ezali kati na bakonzi ya mangomba mpo na koyeba soki baoyo bakobika bakozala ebele to te. Na esika Yesu apesa eyano soki baoyo bakobika bakozala ebele to te, amonisi nde likambo oyo esengeli kosala mpo na kobika. Alobi: “Bósala makasi mpenza bókɔta na porte ya moke.” Ya solo, esengeli kosala milende. Mpo na nini? Yesu alimboli: “Bato mingi bakoluka kokɔta kasi bakokoka te.”​—Luka 13:23, 24.

Mpo na komonisa ntina ya kosala milende mpenza, Yesu apesi ndakisa oyo: “Ntango kaka nkolo-ndako akotɛlɛma mpe akokanga porte, mpe bokobanda kotɛlɛma libándá mpe kobɛta kɔkɔkɔ na porte, mpe koloba ete: ‘Tata, fungolelá biso.’ . . . Kasi ye akoyebisa bino ete: ‘Nayebi te esika bouti. Bólongwa pene na ngai, bino nyonso, bato bosalaka makambo ya kozanga boyengebene!’”​—Luka 13:25-27.

Yango emonisi mokakatano oyo ekómeli moto oyo ayei nsima ya ngonga, na ntango oyo ye alingi, mpe akuti ete porte ekangami. Esengelaki aya na ngonga ya malamu, ata soki ngonga yango ebongaki mpo na ye te. Ezali bongo mpo na ebele ya bato oyo bazalaki koyoka Yesu ntango azali koteya bango. Basalelaki libaku wana te mpo na kosala ete losambo ya solo ezwa esika ya liboso na bomoi na bango. Mingi na baoyo Yesu atindamaki epai na bango bandimaki te ebongiseli oyo Nzambe azwaki mpo na lobiko ya bato. Yesu alobi ete ‘bakolela mpe bakolya mino’ ntango bakobwakama libándá. Nzokande, bato oyo “bakouta na ɛsti mpe wɛsti, na nɔrdi mpe na sudi,” elingi koloba na bikólo nyonso, “bakofanda na mesa na bokonzi ya Nzambe.”​—Luka 13:28, 29.

Yesu alimboli: “Ezali na bato ya nsuka [na ndakisa bato oyo bazali Bayuda te mpe Bayuda oyo bazali konyokwama] oyo bakokóma bato ya liboso, mpe ezali na bato ya liboso [bakonzi ya mangomba ya Bayuda oyo bazali kotuta ntolo ete bazali bakitani ya Abrahama] oyo bakokóma bato ya nsuka.” (Luka 13:30) Bato yango bakokóma “bato ya nsuka” mpo bazangi botɔndi mpe bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te.

Sikoyo, Bafarisai mosusu bayei epai ya Yesu mpe bapesi ye toli oyo: “Simbá nzela na yo kende, mpo Erode [Antipasi] alingi koboma yo.” Mbala mosusu Mokonzi Erode ye moko moto apanzaki nsango yango mpo Yesu akima teritware yango. Ekoki kozala ete Erode azali kobanga kosangana na liwa ya mosakoli mosusu, mpo abomisaki Yoane Mobatisi. Kasi Yesu ayebisi Bafarisai: “Bókende koyebisa gambala wana ete: ‘Talá! Nazali kobengana bademo mpe nazali kobikisa lelo ná lobi, mpe na mokolo ya misato nakosilisa mosala na ngai.’” (Luka 13:31, 32) Ekoki kozala ete Yesu abengi Erode “gambala” mpo na komonisa mayele mabe oyo bagambala ezalaka na yango. Kasi, Yesu akokosama te to akotindikama te na Erode to na moto mosusu. Asengeli kosala mosala oyo Tata na ye apesaki ye, na kolanda manaka ya Nzambe, kasi ya bato te.

Yesu akei na Yerusaleme, mpo ndenge alobi yango, “ekoki kondimama te ete mosakoli akufa na libándá ya Yerusaleme.” (Luka 13:33) Esakweli moko te ya Biblia elobi ete Masiya asengeli kokufa na engumba wana, kasi mpo na nini Yesu alobi ete akobomama kuna? Ezali mpo Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda oyo ezali na bazuzi 71 ezali na Yerusaleme, engumba-mokonzi, mpe kuna nde esika basambisaka bato oyo bafundamaka ete bazali basakoli ya lokuta. Longola yango, ezali kuna nde bambeka ya banyama epesamaka. Yango wana, Yesu asosolaki ete ekoki kosalema te ete abomama esika mosusu.

Yesu aleli mpo na Yerusaleme: “Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka basakoli mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango mabanga​—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko ndenge nsoso ya mwasi eyanganisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango, kasi bolingaki yango te! Talá! Basundoleli bino ndako na bino.” (Luka 13:34, 35) Lokola ekólo yango endimeli Mwana ya Nzambe te, ekozwa etumbu!

Liboso ete Yesu akóma na Yerusaleme, mokambi moko ya Bafarisai abengi ye akende kolya na ndako na ye na mokolo ya Sabata. Bato mosusu oyo babengisami bazali kotala na likebi mpo na komona soki Yesu akosala nini na mobali moko oyo azali wana, oyo azali na maladi moko oyo evimbisaka nzoto na mai, evimbisaka mingi mpenza makolo. Yesu atuni Bafarisai mpe bato oyo bayebi Mibeko malamumalamu: “Bakoki kobikisa moto na sabata to te?”​—Luka 14:3.

Moto moko ayanoli te. Yesu abikisi moto yango, na nsima atuni bango: “Nani na kati na bino, soki mwana na ye to ngɔmbɛ na ye ya mobali akwei na libulu, akobimisa ye nokinoki na mokolo ya sabata te?” (Luka 14:5) Na mbala oyo lisusu, ata moto moko te ayanoli.