Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 89

Ateyi na Perea ntango azali kokende na Yudea

Ateyi na Perea ntango azali kokende na Yudea

LUKA 17:1-10 YOANE 11:1-16

  • KOBƐTISA BASUSU LIBAKU EZALI LIKAMBO YA MOKE TE

  • LIMBISÁKÁ MPE MONISÁKÁ KONDIMA

Yesu alekisi mwa mikolo na mboka moko nkombo na yango Perea, na “ngámbo mosusu ya Yordani.” (Yoane 10:40) Akei sikoyo na sudi na Yerusaleme.

Yesu azali ye moko te. Bayekoli na ye, “ebele ya bato,” bakɔngɔli-mpako mpe bato ya masumu basali mobembo elongo na ye. (Luka 14:25; 15:1) Bafarisai mpe bakomeli, baoyo batyolaka maloba mpe misala ya Yesu, bazali mpe wana. Bazali na makambo ebele ya kokanisa nsima ya koyoka bandakisa oyo Yesu apesaki ya mpate oyo ebungaki, mwana oyo abungaki mpe ya mozwi ná Lazare.​—Luka 15:2; 16:14.

Mbala mosusu kotyola mpe kosɛka ya batɛmɛli ya Yesu nde etindaki ye atyela bayekoli na ye likebi. Alobeli makambo mosusu oyo ateyaki bango na Galile.

Na ndakisa, Yesu alobi ete: “Makambo oyo ebɛtisaka libaku ekozanga te. Kasi mawa na moto oyo azali koya na yango! . . . Bókeba. Soki ndeko na yo asali lisumu pamelá ye, mpe soki abongoli motema limbisá ye. Ata soki asaleli yo lisumu mbala nsambo na mokolo moko mpe ayei epai na yo mbala nsambo, alobi: ‘Nabongoli motema,’ osengeli kolimbisa ye.” (Luka 17:1-4) Likambo oyo alobeli na nsuka ekoki kokundwela Petro motuna oyo atunaki ya kolimbisa mbala nsambo.​—Matai 18:21.

Bayekoli bakolanda maloba ya Yesu? Ntango bayebisaki Yesu ete: “Bakiselá biso kondima,” akitisaki bango motema na maloba oyo: “Soki bózalaka na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, mbɛlɛ bolobi na nzete oyo ya sikaminosi ya moindo ete: ‘Pikolamá mpe lonamá na mbu!’ mpe etosi bino.” (Luka 17:5, 6) Ya solo, ata mwa kondima moke ekoki kosala makambo minene.

Yesu azali sikoyo koteya bango ntina ya kozala na komikitisa mpe komitalela na ndenge ebongi. Yango wana alobi na bayekoli na ye boye: “Nani na kati na bino oyo azali na moombo oyo atimolaka mabele to oyo abatelaka etonga akoloba na ye ntango auti na bilanga ete: ‘Yaká awa nokinoki mpe fandá na mesa’? Akoloba nde na ye te ete: ‘Bongiselá ngai mwa eloko mpo nalya na mpokwa, mpe latá elamba ya mosala mpe salelá ngai tii nakosilisa kolya mpe komɛla, na nsima yo mpe okolya mpe okomɛla’? Akotɔnda nde moombo wana mpo asali makambo oyo batindaki ye asala? Bongo bino mpe, ntango bosilisi kosala makambo nyonso oyo batindaki bino bósala, bóloba ete: ‘Tozali baombo mpamba. Oyo tosali ezali oyo tosengelaki kosala.’”​—Luka 17:7-10.

Mosaleli nyonso ya Nzambe asengeli koyeba ntina ya kotya makambo ya Nzambe na esika ya liboso. Lisusu, mokomoko na biso asengeli kobosana te libaku oyo azali na yango ya kosambela Nzambe lokola moto ya ndako na ye.

Emonani ete ntango kaka Yesu asilisi lisolo yango, momemi-nsango moko akómi; Maria ná Marta nde batindi ye. Maria ná Marta bazali bandeko ya Lazare, mpe bafandaka na Betania ya Yudea. Moto yango ayebisi Yesu ete: “Nkolo, talá! moto oyo yo olingaka mingi azali na maladi.”​—Yoane 11:1-3.

Yesu alɛmbi nzoto te mpo bayebisi ye ete moninga na ye Lazare azali na maladi makasi. Kutu alobi boye: “Ntina ya maladi wana ezali te mpo akufa, kasi ezali nde mpo na nkembo ya Nzambe, mpo Mwana ya Nzambe azwa nkembo na nzela na yango.” Yesu atikali lisusu wana mikolo mibale mpe na nsima ayebisi bayekoli na ye ete: “Tókende lisusu na Yudea.” Bayekoli na ye baboyi mpe balobi ete: “Rabi, kala mingi te bato ya Yudea bazalaki koluka kobamba yo mabanga, mpe olingi kokende lisusu kuna?”​—Yoane 11:4, 7, 8.

Yesu azongiseli bango ete: “Moi ezalaka na bangonga zomi na mibale, boye te? Soki moto azali kotambola na moi akotutana na eloko moko te, mpo azali komona pole ya mokili oyo. Kasi soki moto azali kotambola na butu, akotutana na eloko, mpo pole ezali na ye te.” (Yoane 11:9, 10) Emonani ete alingi koloba ete ntango oyo Nzambe apesaki ye mpo na mosala na ye esili naino te. Tii esila, asengeli mpenza kosalela malamu mwa ntango oyo atikali na yango.

Yesu abakisi ete: “Lazare moninga na biso akei kopema, kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye na mpɔngi.” Lokola bakanisi ete Lazare alali kaka mwa mpɔngi mpe akoyoka malamu, bayekoli bayebisi ye ete: “Nkolo, soki akei kopema, akoyoka malamu.” Yesu alobi na bango polelepolele ete: “Lazare akufi, . . . kasi tókende epai na ye.”​—Yoane 11:11-15.

Toma ayebi ete Yesu akoki kobomama na Yudea, atako bongo alingi kotika Yesu ye moko te, na yango alobi na baninga na ye bayekoli ete: “Biso mpe tókende, mpo tókufa na ye elongo.”​—Yoane 11:16.