Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 90

“Lisekwa mpe bomoi”

“Lisekwa mpe bomoi”

YOANE 11:17-37

  • YESU AKÓMI NSIMA YA LIWA YA LAZARE

  • “LISEKWA MPE BOMOI”

Yesu alongwe na Perea mpe akómi pene na Betania, mboka oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ misato na ɛsti ya Yerusaleme. Bandeko ya Lazare, Maria mpe Marta bazali na mawa ya liwa ya ndeko na bango. Bato mingi bayei kobɔndisa bango.

Ntango moto moko ayebisi Marta ete Yesu azali koya, Marta akimi mbangu mpo na kokutana na ye. Marta ayebisi Yesu makambo oyo ye ná ndeko na ye bazalaki kokanisa mikolo minei liboso: “Nkolo, soki ozalaki awa mbɛlɛ ndeko na ngai ya mobali akufaki te.” Kasi, elingi koloba te ete azangi elikya. Marta abakisi ete: “Nayebi ete nyonso oyo okosɛnga Nzambe, Nzambe akopesa yo.” (Yoane 11:21, 22) Azali na likanisi ete mbala mosusu Yesu akobikisa ndeko na ye.

Yesu alobi na ye: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” Marta akanisi ete azali kolobela lisekwa oyo ekosalema awa na mabele na mikolo ezali koya, elikya oyo Abrahama mpe bato mosusu bazalaki na yango. Mpe mpo na komonisa ete azali kondima ete likambo yango ekosalema mpenza, azongiseli Yesu ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka.”​—Yoane 11:23, 24.

Kasi, Yesu akosala mbala moko likambo moko oyo ekoki kobɔndisa? Akundweli Marta ete Nzambe apesá ye nguya likoló ya liwa; ayebisi ye boye: “Moto oyo azali kondimela ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi; mpe moto nyonso oyo azali na bomoi mpe azali kondimela ngai, akokufa mokolo moko te.”​—Yoane 11:25, 26.

Yesu azali koloba te ete bayekoli na ye oyo bazali na bomoi bakokufa soki moke te. Mpo ata ye mpe asengelaki kokufa, ndenge ayebisaki bantoma na ye. (Matai 16:21; 17:22, 23) Yesu azali komonisa mpenza ete kondimela ye ekoki komema na bomoi ya seko. Mpo bato mingi, bakozwa bomoi yango na nzela ya lisekwa. Kasi, bato ya sembo oyo bakozala na bomoi na nsuka ya ebongiseli oyo bakoki kokufa soki moke te. Ezala ndenge nini, moto nyonso oyo azali kondimela ye akoki kozala na elikya ete akokufa mpo na libela te.

Kasi, Yesu alobi ete: “Nazali lisekwa mpe bomoi”; akoki nde kosunga Lazare oyo asili kokufa eleki sikoyo mikolo minei? Yesu atuni Marta ete: “Ondimi yango?” Azongiseli ye ete: “Ɛɛ, Nkolo; nasilá kondima ete yo ozali Kristo Mwana ya Nzambe, Oyo azali koya na mokili.” Lokola azali na kondima ete Yesu akoki kosala likambo moko kaka mokolo wana, Marta apoti mbangu na ndako mpe ayebisi ndeko na ye na nkuku ete: “Moteyi azali awa mpe azali kobenga yo.” (Yoane 11:25-28) Na ntango wana, Maria alongwe na ndako, mpe bato mosusu oyo bakanisi ete akei na lilita ya Lazare balandi ye.

Nzokande, Maria akei epai ya Yesu, na kolela mpenza akwei na makolo ya Yesu, mpe azongeli makambo oyo ndeko na ye alobaki ete: “Nkolo, soki ozalaki awa, mbɛlɛ ndeko na ngai ya mobali akufaki te.” Ntango Yesu amoni ndenge Maria mpe ebele wana ya bato bazali kolela, atungisami makasi, abulungani mpe kutu aleli mpe abimisi mpisoli. Yango esimbi motema ya bato oyo bazali wana. Kasi bato mosusu batuni boye: ‘Soki Yesu akokaki kobikisa moto oyo akufá miso kobanda kobotama na ye, akokaki te kosala ete moto oyo akufa te?’​—Yoane 11:32, 37.