Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 93

Mwana ya moto akomonana

Mwana ya moto akomonana

LUKA 17:20-37

  • BOKONZI YA NZAMBE EZALI NA KATIKATI NA BINO

  • EKOZALA NDENGE NINI NTANGO YESU AKOMONANA?

Yesu azali naino na Samaria to na Galile. Bafarisai batuni ye mpo na koya ya Bokonzi, mpe bazali kokanisa ete ekozala na milulu moko ya minene. Na yango, alobi na bango ete: “Bokonzi ya Nzambe ezali koya te na ndenge oyo bato nyonso bakomona yango polele, bato mpe bakoloba te ete: ‘Bótala yango oyo!’ to: ‘Yango kuna!’ Mpo talá! bokonzi ya Nzambe ezali na katikati na bino.”​—Luka 17:20, 21.

Bato mosusu bakoki koloba ete Yesu amonisi ete Bokonzi yango ezali koyangela na kati ya mitema ya basaleli ya Nzambe. Kasi, ekoki soki moke te kozala bongo, mpo Bokonzi ezalaki te na mitema ya Bafarisai oyo Yesu azali koloba na bango. Kasi, ezalaki na katikati na bango mpo Yesu, mokonzi oyo Nzambe atyaki mpo na koyangela Bokonzi yango, azali wana na kati na bango.​—Matai 21:5.

Ntango Bafarisai bakei, Yesu apesi bayekoli na ye ndimbola mosusu oyo etali koya ya Bokonzi yango. Na oyo etali kozala na ye na nguya ya Bokonzi, akebisi bango liboso ete: “Mikolo ekoya ntango bokozala na mposa ya komona moko ya mikolo ya Mwana ya moto kasi bokomona yango te.” (Luka 17:22) Yesu amonisi ete boyangeli ya Mwana ya moto na kati ya Bokonzi ekozala na mikolo ezali koya. Liboso ntango yango eya, bayekoli mosusu bakoki kobanda koluka yango na motema likolólikoló, kasi basengeli kokoba kozela tii ntango oyo Nzambe abongisá.

Yesu akobi ete: “Bato bakoloba na bino ete: ‘Bótala kuna!’ to: ‘Bótala awa!’ Bóbima te to bólanda bango te. Mpo se ndenge mokalikali engɛngaka ntango ebimaka banda na esika moko na likoló tii na esika mosusu na likoló, komonana ya Mwana ya moto ekozala se bongo.” (Luka 17:23, 24) Ndenge nini bayekoli ya Yesu basengeli komibatela mpo bálanda te bamasiya ya lokuta? Yesu amonisi ete koya ya Masiya ya solo ekozala lokola kongɛnga oyo ezali komonana mosika mpenza. Kozala na ye na kati ya nguya ya Bokonzi ekomonana polele epai ya bato nyonso.

Na nsima, Yesu asaleli bokokanisi na makambo oyo eleká mpo na komonisa bizaleli oyo bato bakozala na yango na ntango wana: “Ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, ekozala mpe bongo na mikolo ya Mwana ya moto . . . Ekozala mpe ndenge ezalaki na mikolo ya Lota: bazalaki kolya, komɛla, kosomba, kotɛka, kolona, kotonga bandako. Kasi na mokolo oyo Lota abimaki na Sodoma, mɔtɔ ná sufulu eutaki na likoló enɔki mpe ebomi bango nyonso. Ekozala mpe bongo na mokolo yango oyo Mwana ya moto akomonana.”​—Luka 17:26-30.

Yesu alobi te ete bato ya mikolo ya Noa mpe ya Lota babomamaki mpo na makambo etali kolya, komɛla, kosomba, kotɛka, kolona mpe kotonga bandako; makambo yango ezali mabe te. Noa, Lota mpe mabota na bango bazalaki mpe kosala makambo wana. Kasi bato mosusu wana, bazalaki kosala makambo yango kozanga ete bátya likebi ata moke te na mokano ya Nzambe mpe babosanaki eleko oyo bazalaki na yango. Yango wana, Yesu akebisi bayekoli na ye bátya likebi na mokano ya Nzambe mpe bámipesa mpenza mpo na kosala yango. Na ndenge yango, alakisi bango ndenge ya kobika, elingi koloba, ndenge ya kotikala na bomoi ntango Nzambe akoboma bato mabe na mikolo ezali koya.

Bayekoli basengeli koboya kobebisa makanisi na bango na biloko ya mokili oyo ezali zingazinga na bango, “biloko oyo ezali na nsima.” Yesu alobi ete: “Na mokolo yango, moto oyo azali na likoló ya ndako mpe biloko na ye ezali na ndako akita kozwa yango te, mpe moto oyo azali na bilanga, ye mpe azongela biloko oyo ezali na nsima te. Bókanisa mwasi ya Lota.” (Luka 17:31, 32) Akómaki likonzí ya mungwa.

Ntango Yesu akobi kolimbola ndenge makambo ekozala ntango Mwana ya moto akozala mokonzi, ayebisi bayekoli na ye ete: “Na butu yango mibali mibale bakolala na mbeto moko; mosusu akozwama, kasi mosusu akosundolama.” (Luka 17:34) Bato mosusu bakobika, kasi basusu bakosundolama, elingi koloba bakozanga bomoi.

Bayekoli batuni ye: “Esika nini, Nkolo?” Yesu azongiseli bango ete: “Esika ebembe ezali, bampongo mpe ekoyangana wana.” (Luka 17:37) Ya solo, basusu bakozala lokola bampongo, bandɛkɛ oyo emonaka mosika. Bayekoli yango bakoyangana elongo na Kristo ya solo, Mwana ya moto. Na eleko wana, Yesu akopesa bayekoli na ye solo oyo epesaka bomoi mpo bazali na kondima.