Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 101

Alei na ndako ya Simo na Betania

Alei na ndako ya Simo na Betania

MATAI 26:6-13 MARKO 14:3-9 YOANE 11:55–12:11

  • YESU AZONGI NA BETANIA, PENE NA YERUSALEME

  • MARIA ASOPELI YESU MAFUTA YA NSOLO KITOKO

Yesu alongwe na Yeriko mpe azali kokende na Betania. Mobembo yango ekosɛnga kosala kilomɛtrɛ 20 na nzela ya ngombangomba mpe ya mpasi. Yeriko ezali na nse, mɛtrɛ soki 250 na nse ya nivo ya mbu, mpe Betania ezali likoló, mɛtrɛ soki 610 likoló ya nivo ya mbu. Lazare ná bandeko na ye mibale ya basi bafandaka na mwa mboka moko ya Betania, oyo ezali na kilomɛtrɛ 3 kolongwa na Yerusaleme mpe na ɛsti kokita na bangomba ya Olive.

Bayuda mingi bayaki na Yerusaleme mpo na Elekeli. Bayaki mwa liboso mpo na “komipɛtola ndenge milulu ezalaki kosɛnga” soki basimbaki ebembe to basalaki eloko moko oyo ekómisaki bango mbindo. (Yoane 11:55; Mitángo 9:6-10) Mingi na bango oyo bakómi liboso bayangani na tempelo. Bazali komituna soki Yesu akoya na Elekeli to te.​—Yoane 11:56.

Bato bazali koloba makambo ndenge na ndenge mpo na Yesu. Bakonzi mosusu ya mangomba bazali koluka kokanga ye mpe koboma ye. Kutu, bapesaki mitindo ete soki moto moko ayebi esika oyo Yesu azali, asengeli koyebisa bango “mpo bákanga ye.” (Yoane 11:57) Bakonzi ya mangomba yango balukaki koboma Yesu nsima ya kosekwisa Lazare. (Yoane 11:49-53) Ekoki kozala ete bato mosusu bazali komituna soki Yesu akomonana na miso ya bato.

Yesu akómi na Betania mokolo ya mitano, “mikolo motoba liboso ya elekeli.” (Yoane 12:1) Mokolo ya sika (Sabata, 8 Nisana) ekobanda ntango moi ekolala. Na yango, asilisi mobembo na ye liboso Sabata ebanda. Akokaki te kolongwa na Yeriko mokolo ya Sabata, elingi koloba kobanda na kolala ya moi ya mokolo ya mitano tii na kolala ya moi ya mokolo ya pɔsɔ, mpo mibeko ya Bayuda epekisaki kosala mobembo ya ndenge wana. Ekoki kozala ete Yesu akei na ndako ya Lazare, kaka ndenge amesaná.

Simo, oyo afandaka mpe na Betania abengi Yesu ná baninga na ye, mpe Lazare báya kolya mwa eloko mokolo ya pɔsɔ na mpokwa. Simo oyo babengaka ye mpe “moto ya maba,” ekoki kozala ete azalaki kala moto ya maba mpe Yesu abikisaki ye. Lokola Marta alingá mosala, azali koboma nzoto mpo na koyamba bapaya. Mbala oyo Maria azali kolanda Yesu na likebi mpenza, na ndenge oyo ebimisi ntembe.

Maria afungoli molangi moko ya moke oyo ezali soki na “litra moko ya mafuta ya nsolo kitoko, narda ya solosolo.” (Yoane 12:3) Mafuta yango ezali na motuya mingi, valɛrɛ na yango (300 denari) ezali ndenge moko na lifuti ya mbula mobimba! Maria asopi mafuta yango na motó ya Yesu mpe na makolo na ye mpe na nsima apangusi ye makolo na nsuki na ye. Nsolo kitoko ya malasi yango etondi ndako mobimba.

Bayekoli basiliki mpe batuni boye: “Mpo na nini kobebisa mafuta oyo ya nsolo kitoko boye?” (Marko 14:4) Yudasi Mokeriota atɛmɛli likambo yango mpe alobi ete: “Mpo na nini mafuta oyo ya nsolo kitoko etɛkamaki na denari nkama misato (300) te mpe epesami na babola?” (Yoane 12:5) Yudasi azali mpenza te komitungisa mpo na babola. Azalaki koyiba mbongo na kɛsi ya bayekoli oyo azalaki kosimba.

Yesu alongisi Maria mpe alobi: “Mpo na nini bolingi kotungisa mwasi oyo? Kutu asaleli ngai likambo moko ya malamu. Mpo bino bozali na babola ntango nyonso, kasi bokozala na ngai ntango nyonso te. Mpo lokola mwasi oyo atye mafuta oyo ya nsolo kitoko na nzoto na ngai, ezali mpo na kolɛngɛla kokundama na ngai. Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Epai nyonso bakosakola nsango malamu oyo na mokili mobimba, bakolobela mpe likambo mwasi oyo asali mpo na kokanisa ye.”​—Matai 26:10-13.

Asali mwa mikolo na Betania mpe nsango epanzani ete Yesu azali kuna. Bayuda mingi bayei na ndako ya Simo kaka mpo na kotala Yesu te, kasi mpe mpo na komona Lazare, “oyo [Yesu] alamwisaki uta na bakufi.” (Yoane 12:9) Sikoyo banganga-nzambe bakonzi basali likita mpo na koboma Yesu ná Lazare. Bakonzi yango ya mangomba bazali kokanisa ete lisekwa ya Lazare nde esali ete bato mingi bákóma kondimela Yesu. Bakonzi wana ya mangomba bazalaki mpenza mitema mabe!