Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 102

Mokonzi akɔti na Yerusaleme likoló ya mwana mpunda

Mokonzi akɔti na Yerusaleme likoló ya mwana mpunda

MATAI 21:1-11, 14-17 MARKO 11:1-11 LUKA 19:29-44 YOANE 12:12-19

  • YESU AKƆTI NA YERUSALEME NA ESENGO

  • KOBEBISAMA YA YERUSALEME ESAKOLAMI

Na mokolo oyo elandi, mokolo ya lomingo ya 9 Nisana, Yesu ná bayekoli na ye balongwe na Betania mpe bazali kokende na Yerusaleme. Ntango bakómi pene na Betefage, na Ngomba ya Olive, Yesu alobi na bayekoli na ye mibale boye:

“Bókende na mboka oyo etalani na bino, mpe na mbala moko bokomona mpunda ya mwasi oyo bakangi na nsinga, ná mwana ya mpunda esika moko na yango; bófungola yango mpe bóyela ngai yango. Mpe soki moto moko alobi na bino likambo, bóloba: ‘Nkolo azali na mposa na yango.’ Bongo na mbala moko akotika yango.”​—Matai 21:2, 3.

Bayekoli bazali kokanga ntina te ete malako wana oyo Yesu apesi bango ezali esakweli ya Biblia. Kasi, na nsima, bakangi ntina ya kokokisama ya esakweli ya Zekaria. Asakolaki ete mokonzi oyo Nzambe alakaki akoya na Yerusaleme lokola “moto ya komikitisa, mpe amati likoló ya mpunda, ɛɛ likoló ya nyama oyo ekɔmɛli, mwana ya mpunda ya mwasi.”​—Zekaria 9:9.

Ntango bayekoli bakómi na Betefage mpe bazwi mwana mpunda ya mobali ná mama na ye, bato oyo bazali pembeni wana batuni bango: “Mpo na nini bozali kofungola mwana ya mpunda wana?” (Marko 11:5) Kasi ntango bayebisi bango ete banyama yango ezali mpo na Nkolo, batiki bayekoli bámema yango epai ya Yesu. Bayekoli batye bilamba na bango ya likoló na mpunda mpe mwana na yango, kasi Yesu amati likoló ya mwana ya mpunda.

Bato bazali se kokóma mingi ntango Yesu azali kokɔta na Yerusaleme. Bato bazali kotanda bilamba na bango na nzela. Basusu bakati bitape ya banzete to “nkasa na bilanga” mpe bazali kopɛpa yango. Bazali koganga ete: “Tobondeli yo, bikisá! Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama! Bokonzi ya tata na biso Davidi oyo ezali koya epambwama!” (Marko 11:8-10) Bafarisai oyo bazali na kati ya ebele wana ya bato bayoki mabe ndenge bato bazali koloba bongo. Bayebisi Yesu boye: “Moteyi, pamelá bayekoli na yo.” Yesu azongiseli bango ete: “Nazali koyebisa bino: Soki bango bafandi nyɛɛ, mabanga ekoganga.”​—Luka 19:39, 40.

Ntango Yesu amoni Yerusaleme, abandi kolela mpe koloba ete: “Soki yo, ɛɛ yo, ososolaka na mokolo ya lelo makambo ya kimya​—kasi sikoyo yango ebombami na miso na yo.” Yerusaleme ekofuta mpo na ezaleli na yango mabe ya kozanga botosi. Yesu asakoli ete: “Banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko ya makasi ya banzete oyo bakómisá nsɔngɛ mpe bakozingela yo mpe bakonyokola yo epai na epai, mpe bakobwaka yo ná bana na yo oyo bazali na kati na yo na mabele, mpe bakotika te libanga likoló na libanga na kati na yo.” (Luka 19:42-44) Esakweli yango ekokisamaki: Yerusaleme ebebisamaki na mobu 70 T.B.

Ntango Yesu akɔti na Yerusaleme, ‘engumba mobimba eningani, bato mosusu bazali kotuna: “Wana nani?”’ Mpe ebele wana ya bato bazali koloba: “Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazarete ya Galile!” (Matai 21:10, 11) Basusu na kati ya ebele yango oyo bamonaki ntango Yesu asekwisaki Lazare, bazali koyebisa bato likamwisi yango. Bafarisai bamileli mpo bamoni ete basuki. Balobani ete: “Mokili elandi ye.”​—Yoane 12:18, 19.

Ndenge amesani kosala soki akómi na Yerusaleme, Yesu akei na tempelo mpo na koteya. Kuna abikisi moto oyo akufá miso mpe motɛngumi. Banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli basiliki ntango bamoni likambo oyo asali mpe bazali koyoka ndenge bana mike na tempelo bazali koganga ete: “Mwana ya Davidi, tobondeli yo, bikisá!” Bakonzi ya mangomba batuni Yesu ete: “Ozali koyoka makambo bango bazali koloba?” Apesi bango eyano ete: “Botángá naino te likambo oyo: ‘Osali ete monɔkɔ ya bana mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ esanzola yo’?”​—Matai 21:15, 16.

Yesu atali biloko oyo ezali zingazinga ya tempelo. Lokola ngonga epusani, ye ná bantoma na ye balongwe wana. Liboso mokolo ya 10 Nisana ebanda, azongi lisusu na Betania, epai alali butu ya mokolo ya lomingo.