Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 119

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

YOANE 14:1-31

  • YESU AKEI KOBONGISA ESIKA

  • ALAKI ETE AKOTINDELA BAYEKOLI NA YE MOSUNGI

  • TATA ALEKI YESU

Nsima ya Ekaniseli, wana Yesu ná bayekoli na ye bazali kaka na shambrɛ ya likoló, alendisi bango na maloba oyo: “Mitema na bino etungisama te. Bóndimela Nzambe, bóndimela mpe ngai.”​—Yoane 13:36; 14:1.

Yesu ayebisi bantoma na ye ya sembo ntina oyo basengeli komitungisa te mpo azali kokende, alobi na bango: “Na ndako ya Tata na ngai bisika ya kofanda ezali mingi. . . . Soki nakei mpe nabongiseli bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai, mpo esika ngai nazali bino mpe bózala wana. Mpe epai nazali kokende bino boyebi nzela.” Kasi, bantoma bakangi ntina te ete azali kolobela nde kokende na likoló. Toma atuni: “Nkolo, toyebi epai ozali kokende te. Ndenge nini toyebi nzela?”​—Yoane 14:2-5.

Yesu ayanoli: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi.” Moto akoki kokende na ndako ya Tata, na likoló, kaka soki andimeli Yesu, andimi mateya na ye, mpe azali komekola ye. Yesu alobi: “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.”​—Yoane 14:6.

Filipe, oyo azali koyoka ye na likebi, alobi: “Nkolo, lakisá biso Tata, mpe ekoki mpo na biso.” Mbala mosusu Filipe alingi bálakisa bango bimonaneli ya Nzambe, ndenge Moize, Eliya ná Yisaya bamonaki. Kasi bantoma yango bazali na eloko oyo eleki bimonaneli wana. Yesu amonisi yango polele, alobi: “Naumeli na bino mingi boye, mpe atako bongo, yo Filipe, oyebi ngai kaka te? Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” Yesu amonisaka malamumalamu bizaleli ya Tata; yango wana, kofanda na ye mpe komona makambo oyo asali ezali lokola komona Tata. Atako bongo, Tata aleki Mwana, mpo Yesu alobi polele ete: “Makambo oyo nazali koyebisa bino nazali koloba yango na ndenge na ngai moko te.” (Yoane 14:8-10) Bantoma bazali komona ndenge Yesu azali koloba polele ete mateya na ye nyonso euti epai ya Tata na ye.

Bantoma bamoni makamwisi oyo Yesu asali mpe bayoki ye ndenge asakoli nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Sikoyo alobi na bango: “Moto oyo azali kondimela ngai, moto yango akosala mpe misala oyo ngai nazali kosala; mpe akosala misala ya minene koleka oyo.” (Yoane 14:12) Yesu alingi koloba te ete bakosala makamwisi ya minene koleka oyo ye asalaki. Alingi nde koloba ete bakosakola nsango malamu ntango molai, na bisika mingi koleka, mpe epai ya bato ebele koleka.

Ntango Yesu akokende, akosundola bango te, mpo alaki bango ete: “Soki bosɛngi eloko na nkombo na ngai, nakosala yango.” Alobi mpe: “Nakosɛnga Tata mpe ye akopesa bino mosungi mosusu mpo azala elongo na bino mpo na libela, elimo ya solo.” (Yoane 14:14, 16, 17) Alaki bango ete bakozwa mosungi mosusu: elimo santu. Bazwi mosungi yango na mokolo ya Pantekote.

Yesu alobi: “Etikali moke mpe mokili ekomona ngai lisusu te, kasi bino bokomona ngai, mpo nazali na bomoi mpe bino bokozala na bomoi.” (Yoane 14:19) Bakomona ye ntango akobimela bango na nzoto ya mosuni nsima ya lisekwa na ye, mpe na nsima ntango akosekwisa bango mpo bázala na ye na likoló lokola bikelamu ya elimo.

Sikoyo, Yesu alobi makambo polele: “Moto oyo azali na mitindo na ngai mpe azali kotosa yango, moto wana nde alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye, mpe ngai nakolinga ye mpe nakomilakisa epai na ye polelepolele.” Ntoma Yudasi, oyo babengi mpe Tade, atuni: “Nkolo, likambo nini mpenza ebimi mpo olinga komilakisa polelepolele epai na biso kasi epai ya mokili te?” Yesu alobi: “Soki moto alingi ngai, akotosa liloba na ngai, mpe Tata na ngai akolinga ye. . . . Moto oyo alingaka ngai te atosaka maloba na ngai te.” (Yoane 14:21-24) Bayekoli bandimi ete Yesu azali nzela, solo mpe bomoi, kasi mokili endimi yango te.

Sikoyo, Yesu azali kokende; ndenge nini bayekoli na ye bakoyeba lisusu makambo nyonso oyo ateyaki bango? Yesu alobi: “Mosungi yango, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye nde akoteya bino makambo nyonso mpe akozongisa na makanisi na bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.” Lokola bantoma bamoni makambo minene oyo elimo santu ekoki kosala, elaka wana ya Yesu ekitisi bango motema. Yesu abakisi: “Natikeli bino kimya na ngai, napesi bino kimya na ngai. . . . Mitema na bino etungisama te mpe elɛmba na kobanga te.” (Yoane 14:26, 27) Bayekoli basengeli komitungisa te mpo Tata ya Yesu akotambwisa bango mpe akobatela bango.

Ekomonana polele ete Nzambe azali kobatela bango. Yesu alobi: “Mokonzi ya mokili oyo azali koya. Mpe azali na bokonzi likoló na ngai te.” (Yoane 14:30) Zabolo akɔtelaki Yudasi mpe atambwisaki ye. Kasi Yesu azali na bolɛmbu ata moko te oyo Satana akoki kosalela mpo na kotinda ye apesa Nzambe mokɔngɔ. Zabolo akokoka mpe te kosala ete Yesu akufa libela. Mpo na nini? Yesu alobi: “Kaka ndenge Tata apesi ngai mitindo, nazali kosala kaka bongo.” Ayebi ete Tata na ye akosekwisa ye.​—Yoane 14:31.