Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 121

“Bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili”

“Bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili”

YOANE 16:1-33

  • ETIKALI MOKE BANTOMA BAKOMONA LISUSU YESU TE

  • MAWA YA BANTOMA EKOBONGWANA ESENGO

Yesu ná bantoma balingi kolongwa na shambrɛ ya likoló esika bauti kosala Elekeli. Nsima ya kokebisa bango, Yesu abakisi: “Nalobi na bino makambo oyo mpo bóbɛta libaku te.” Mpo na nini ebongi akebisa bango ndenge wana? Alobi na bango: “Bakobengana bino na sinagoga. Kutu, ngonga ezali koya wana moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete asaleli Nzambe mosala mosantu.”​—Yoane 16:1, 2.

Ntango mosusu maloba yango etungisi bantoma na ye. Liboso Yesu alobaki ete mokili ekoyina bango, kasi alobaki polele te ete bakobomama. Mpo na nini? Alobi: “Nayebisaki bino makambo wana liboso te, mpo nazalaki elongo na bino.” (Yoane 16:4) Akebisi bango sikoyo mpo azali kotika bango. Yango ekoki kosalisa bango mpo bábɛta libaku te.

Yesu alobi lisusu: “Nazali kokende epai ya moto oyo atindaki ngai, mpe atako bongo moko te na kati na bino atuni ngai ete: ‘Ozali kokende wapi?’” Mwa moke liboso, kaka na mpokwa yango, batunaki ye epai oyo azali kokende. (Yoane 13:36; 14:5; 16:5) Kasi sikoyo, lokola babangi mpo ayebisi bango ete bakonyokwama, batondi na mawa. Na yango, balekisi libaku ya kotuna mpo na koyeba nkembo oyo Yesu akozwa mpe bolamu oyo yango ekomemela basambeli ya Nzambe ya solo. Yesu alobi: “Mpo nalobi na bino makambo oyo, mawa etondi na mitema na bino.”​—Yoane 16:6.

Na nsima Yesu abakisi: “Ezali mpo na litomba na bino nde nazali kokende. Mpo soki nakei te, mosungi akoya epai na bino soki moke te; kasi soki nakei, nakotindela bino ye.” (Yoane 16:7) Kaka soki Yesu akufi mpe akei na likoló nde bayekoli na ye bakoki kozwa elimo santu, oyo akotinda ezala mosungi ya basaleli na ye nyonso na mabele.

Elimo santu ‘ekopesa mokili elembo ya kondimisa mpenza na ntina na lisumu mpe na ntina na boyengebene mpe na ntina na lisambisi.’ (Yoane 16:8) Ya solo, ekomonana polele ete mokili endimelaka Mwana ya Nzambe te. Kozonga ya Yesu na likoló ekomonisa boyengebene na ye mpe ntina oyo ebongi mpenza ete Satana, “mokonzi ya mokili oyo,” asambisama.​—Yoane 16:11.

Yesu alobi lisusu: “Nazali naino na makambo mingi ya koloba na bino, kasi bokoki komema yango sikoyo te.” Ntango akosopela bango elimo santu, ekosalisa bango bákanga ntina “ya solo nyonso,” mpe bátambola na solo yango.​—Yoane 16:12, 13.

Yesu alobi na nsima makambo oyo epesi bantoma mobulu na makanisi, alobi: “Etikali moke bokomona ngai lisusu te, mpe etikali moke lisusu bokomona ngai.” Bazali kotunana soki alingi koloba nini. Yesu amoni ete balingi kotuna ye alimbola yango, na yango alobi: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Bokolela mpe bokoganga na kolela, kasi mokili ekosepela; bokoyoka mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.” (Yoane 16:16, 20) Ntango Yesu akobomama na mokolo oyo elandi, bakonzi ya mangomba bakosepela, kasi bayekoli bakozala na mawa. Na nsima, mawa na bango ekobongwana esengo ntango Yesu akosekwa! Mpe esengo yango ekokoba ntango akosopela bango elimo santu ya Nzambe.

Yesu akokanisi mpasi oyo bantoma bakozala na yango na mpasi oyo mwasi ayokaka na ntango ya kobota, alobi: “Mwasi, ntango azali kobota, azalaka na mawa, mpamba te ngonga na ye ekoki; kasi ntango aboti mwana na ye, amikundolaka bolɔzi yango lisusu te mpo na esengo oyo ete moto abotami na mokili.” Yesu alendisi bantoma na ye, alobi: “Bino mpe, ya solo, bozali sikoyo koyoka mawa; kasi nakomona bino lisusu mpe mitema na bino ekosepela, mpe esengo na bino, moto akolongola bino yango te.”​—Yoane 16:21, 22.

Tii awa, bantoma basɛngá naino Nzambe likambo na nkombo ya Yesu te. Sikoyo alobi: “Na mokolo yango, bokosɛnga na nkombo na ngai.” Mpo na nini na nkombo ya Yesu? Ezali te ete Tata ayanolaka noki te na mabondeli. Yesu alobi: “Tata ye moko alingaka bino mingi, mpo bino bolingi ngai mingi . . . lokola [nazali] momonisi ya Tata.”​—Yoane 16:26, 27.

Mbala mosusu maloba wana ya kolendisa epesi bantoma makasi ya koloba ete: “Na yango, tondimi ete outaki epai ya Nzambe.” Kondima na bango ekomekama mosika te. Yesu ayebisi bango makambo oyo ezali koya: “Talá! Ngonga ezali koya, kutu, esili koya, wana bokopanzana moto na moto na ndako na ye mpe bokotika ngai kaka ngai moko.” Atako bongo, alendisi bango: “Nalobi na bino makambo oyo mpo na nzela na ngai bózala na kimya. Na mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.” (Yoane 16:30-33) Elingi koloba te ete Yesu azali kosundola bango. Ayebi nde ete bango mpe bakoki kolonga mokili lokola ye, soki batikali sembo mpe basali mokano ya Nzambe, ata soki Satana mpe mokili na ye baluki kobebisa bosembo na bango.