Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 122

Libondeli ya nsuka na shambrɛ ya likoló

Libondeli ya nsuka na shambrɛ ya likoló

YOANE 17:1-26

  • LITOMBA YA KOYEKOLA KOYEBA NZAMBE MPE MWANA NA YE

  • BOMOKO YA YEHOVA, YESU, MPE BAYEKOLI

Lokola Yesu alingaka bantoma na ye mingi mpenza, azali kobongisa makanisi na bango mpo mosika te akotika bango. Sikoyo atomboli miso na likoló mpe abondeli Tata na ye: “Pesá mwana na yo nkembo, mpo mwana na yo apesa yo nkembo, na ndenge opesi ye bokonzi likoló ya moto nyonso ya mosuni, mpo, bango nyonso oyo opesi ye, apesa bango bomoi ya seko.”​—Yoane 17:1, 2.

Yesu ayebi malamu ete kopesa Nzambe nkembo ezali na ntina mingi. Kasi elikya ya kozwa bomoi ya seko oyo alobeli ezali mpe likambo ya kolendisa! Yesu azwi “bokonzi likoló ya moto nyonso ya mosuni”; na yango lisiko na ye ekoki komemela bato nyonso matomba. Kasi, bato nyonso bakozwa lipamboli yango te. Mpo na nini? Mpo, kaka baoyo basalaka na boyokani na maloba oyo Yesu alobi na nsima nde bakozwa mapamboli ya lisiko ya Yesu: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

Moto asengeli koyekola koyeba Tata mpe Mwana malamumalamu mpe kokóma moninga na bango. Asengeli kotalela makambo ndenge bango batalelaka. Asengeli mpe kosala makasi amekola bizaleli na bango na boyokani na ye na basusu. Lisusu, asengeli kobosana te ete kozwa bomoi ya seko eyei nsima ya kopesa Nzambe nkembo. Sikoyo Yesu azongeli likambo yango:

“Napesi yo nkembo na mabele, mpo nasilisi mosala oyo opesaki ngai nasala. Bongo sikoyo yo, Tata, pesá ngai nkembo pembeni na yo moko na nkembo oyo nazalaki na yango pembeni na yo liboso ete mokili ezala.” (Yoane 17:4, 5) Yesu asɛngi Nzambe asekwisa ye mpe azongisa ye na nkembo oyo azalaki na yango na likoló.

Kasi, Yesu abosani te mosala oyo asali. Abondeli: “Namonisi nkombo na yo polele na bato oyo ozwi na mokili mpe opesi ngai. Bazalaki ya yo, mpe opesi ngai bango, mpe batosi liloba na yo.” (Yoane 17:6) Na mosala ya kosakola, Yesu asukaki kaka te na kotánga nkombo ya Nzambe, Yehova. Asalisaki mpe bantoma na ye báyeba ndimbola ya nkombo yango, elingi koloba bizaleli ya Nzambe mpe boyokani na ye na bato.

Bantoma bayekoli koyeba Yehova, mokumba ya Mwana na ye, Yesu, mpe makambo oyo ateyaki. Na komikitisa nyonso, Yesu alobi: “Maloba oyo opesi ngai, napesi bango yango, mpe bayambi yango mpe bayebi mpenza ete nabimaki lokola momonisi na yo, mpe bandimi ete otindaki ngai.”​—Yoane 17:8.

Na nsima, Yesu amonisi ete bokeseni ezali kati na bayekoli na ye ná bato ya mokili: “Nazali kosɛngɛla bango; nazali kosɛngɛla mokili te, kasi baoyo opesi ngai; mpo bazali ya yo . . . Tata mosantu, kɛngɛlá bango mpo na nkombo na yo oyo opesi ngai, mpo bázala moko ndenge biso mpe tozali. . . . Nabatelaki bango, mpe moko te na kati na bango abebaki, longola kaka mwana ya libebi,” Yudasi Mokeriota, oyo akei kotɛka Yesu.​—Yoane 17:9-12.

Na libondeli yango, Yesu abakisi: “Mokili eyini bango. . . . Nazali kosɛnga yo, olongola bango na mokili te, kasi okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe. Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:14-16) Bantoma mpe bayekoli mosusu bazali kofanda na mokili, elongo na bato oyo batambwisami na Satana, kasi basengeli komikɔtisa te na mokili to na mabe na yango. Na ndenge nini?

Basengeli kozala ntango nyonso basantu mpe komitya pembeni mpo na kosalela Nzambe, kosalela mateya oyo ezali na Makomami ya Ebre mpe oyo Yesu ye moko ateyaki. Yesu abondeli lisusu: “Santisá bango na solo; liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Na nsima, elimo ya Nzambe ekosalisa bantoma mosusu bákoma mikanda oyo ekokɔta mpe na kati ya “solo” oyo ekoki kosantisa moto.

Kasi bato mosusu mpe bakondima “solo” yango. Na yango, Yesu abondeli kaka mpo na baoyo bazali wana te, kasi mpe mpo na “baoyo bazali kondimela [ye] na nzela ya liloba na bango.” Yesu asɛngi nini mpo na bango nyonso? Asɛngi boye: “Bango nyonso bázala moko, ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo, mpo bango mpe bázala na bomoko elongo na biso.” (Yoane 17:20, 21) Yesu ná Tata na ye bazali nzoto moko te. Kasi bazali moko nde mpo bazali na boyokani na makambo nyonso. Yesu abondeli mpo bayekoli na ye mpe bázala na bomoko yango.

Mwa moke liboso, Yesu ayebisaki Petro ná bantoma mosusu ete azali kokende mpo na kobongisela bango esika, na likoló. (Yoane 14:2, 3) Yesu azongeli likambo yango na libondeli: “Tata, mpo na oyo opesi ngai, nalingi ete, epai nazali, bango mpe bázala esika moko na ngai, mpo bámona nkembo na ngai oyo opesi ngai, mpo olingaki ngai liboso ya ebandeli ya mokili.” (Yoane 17:24) Na maloba yango, Yesu amonisi ete liboso ya ebandeli ya mokili, to liboso Adama ná Eva bábota bana, Nzambe azalaki kolinga Mwana na ye se moko oyo abotamaki, oyo akómaki Yesu Kristo.

Mpo na kosukisa libondeli na ye, Yesu alobeli lisusu nkombo ya Tata na ye mpe bolingo oyo Nzambe alingi bantoma mpe bato mosusu oyo bakondima “solo” na nsima, alobi: “Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango, mpo bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.”​—Yoane 17:26.