Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 136

Na libongo ya Mbu ya Galile

Na libongo ya Mbu ya Galile

YOANE 21:1-25

  • YESU ABIMELI BAYEKOLI NA MBU YA GALILE

  • PETRO NÁ BANTOMA MOSUSU BASENGELI KOLEISA BAMPATE

Na butu ya nsuka oyo Yesu alekisaki na bantoma na ye, ayebisaki bango: “Nsima ya kolamuka na ngai uta na bakufi, nakokende na Galile liboso na bino.” (Matai 26:32; 28:7, 10) Sikoyo, bayekoli na ye mingi bakei na Galile, kasi bakosala nini kuna?

Mokolo moko, Petro ayebisi bantoma mosusu motoba: “Nakei koluka mbisi.” Bango nyonso bazongisi: “Biso mpe tokokende elongo na yo.” (Yoane 21:3) Kasi butu mobimba bazwi ata mbisi moko te. Ntango ntɔngɔ elingi kotana, Yesu abimeli bango na libongo, kasi bayebi te ete ezali ye. Yesu atuni bango: “Bana mike, bozali na eloko ya kolya te, boye te?” Bayanoli: “Eloko te!” Yesu alobi na bango: “Bóbwaka monyama na lobɔkɔ ya mobali ya masuwa mpe bokozwa.” (Yoane 21:5, 6) Ntango basali bongo, monyama ekangi mbisi ebele, mpe bakoki kobenda yango te.

Yoane ayebisi Petro ete: “Ezali Nkolo!” (Yoane 21:7) Nokinoki, Petro akangi na loketo elamba na ye ya likoló, oyo alongolaki ntango azalaki koluka mbisi. Amibwaki na mai, mpe abɛti mai na ntaka ya mɛtrɛ soki 90 tii na libongo. Bayekoli mosusu bayei malɛmbɛmalɛmbɛ na masuwa, bazali kobenda monyama, etondi na mbisi.

Ntango bakómi na libongo, bamoni “mɔtɔ ya makala etyami wana mpe mbisi etyami likoló na yango mpe mampa.” Yesu alobi na bango: “Bóya na ndambo ya bambisi oyo bouti kokanga.” Petro abendi monyama, ezali na mbisi ya minene 153! Yesu alobi: “Bóya kolya.” Moko te kati na bango ameki kotuna ye: “Yo nani?” mpo bayebi ete ezali Yesu. (Yoane 21:10-12) Oyo ezali mbala ya misato abimela bayekoli ebele esika moko.

Yesu apesi mokomoko na bango mampa mpe mbisi mpo bálya. Na nsima, ekoki kozala ete atali mbisi oyo bazwi, mpe atuni: “Simo mwana ya Yoane, olingaka ngai koleka oyo?” Elingi nde koloba ete Petro alingi mosala ya koluka mbisi koleka mosala oyo Yesu alingi ete asala? Petro azongisi: “Ɛɛ, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo mingi.” Na yango, Yesu alendisi ye ete: “Leisá bana-mpate na ngai.”​—Yoane 21:15.

Yesu atuni lisusu: “Simo mwana ya Yoane, olingaka ngai?” Mbala mosusu na kokamwa, Petro alobi na motema moko: “Ɛɛ, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo mingi.” Yesu azongisi lisusu: “Batelá bampate na ngai ya mike.”​—Yoane 21:16.

Yesu atuni ye mbala ya misato: “Simo mwana ya Yoane, olingaka ngai mingi?” Sikoyo, ekoki kozala ete Petro abandi komituna soki Yesu andimaka mpenza bosembo na ye. Petro ayanoli na mpiko: “Nkolo, oyebi makambo nyonso; oyebi ete nalingaka yo mingi.” Na mbala oyo lisusu, Yesu abɛti nsɛtɛ na likambo oyo Petro asengeli kosala: “Leisá bampate na ngai ya mike.” (Yoane 21:17) Ya solo, baoyo bazali kokamba basengeli kozala basaleli ya bato oyo bazali kokóma bampate ya Nzambe.

Bakangaki Yesu mpe babomaki ye mpo asalaki mosala oyo Nzambe atindaki ye asala. Sikoyo, amonisi Petro ete likambo ya ndenge wana ekokómela mpe ye. Yesu alobi: “Ntango ozalaki elenge mpenza, ozalaki komikanga loketo yo moko mpe kotambola epai nyonso olingaki. Kasi ntango okokóma mobange okosembola mabɔkɔ na yo mpe moto mosusu akokanga yo loketo mpe akomema yo epai oyo yo olingi te.” Atako bongo, Yesu alendisi ye: “Kobá kolanda ngai.”​—Yoane 21:18, 19.

Petro amoni ntoma Yoane mpe atuni: “Nkolo, bongo moto oyo?” Ya solo, nini ekokómela ntoma wana, oyo Yesu alingaka mingi? Yesu ayanoli: “Soki nalingi ete aumela tii ntango nakoya, etali yo na nini?” (Yoane 21:21-23) Petro asengeli kolanda Yesu, amitungisa te mpo na oyo basusu bakosala. Atako bongo, Yesu amonisi ete Yoane akoumela na bomoi koleka bantoma mosusu, mpe akozwa emonaneli ya koya ya Yesu na Bokonzi na ye.

Ya solo, Yesu asalaki makambo mosusu mingi, kasi likoki ya kokoma yango nyonso na barulo ezali te.