Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 139

Yesu atye paradiso mpe asilisi mosala na ye

Yesu atye paradiso mpe asilisi mosala na ye

1 BAKORINTI 15:24-28

  • MAKAMBO OYO EKOKÓMELA BAMPATE NÁ BANTABA

  • BATO BAKOFANDA NA PARADISO AWA NA MABELE

  • YESU AZALI MPENZA NZELA, SOLO MPE BOMOI

Mwa moke nsima ya batisimo ya Yesu, monguna moko alukaki kokweisa ye liboso kutu abanda mosala na ye. Monguna yango, Zabolo, amekaki Yesu mbala mingi. Na nsima, Yesu alobaki mpo na moto mabe yango ete: “Mokonzi ya mokili oyo azali koya. Mpe azali na bokonzi likoló na ngai te.”​—Yoane 14:30.

Ntoma Yoane amonaki na emonaneli moko makambo oyo ezali kozela ‘dragɔ yango ya monene, nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana.’ Amonaki babengani monguna yango monene ya bato na likoló, akiti na mabele “na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.” (Emoniseli 12:9, 12) Bakristo bayebi ete bazali kobika na eleko yango ya “ntango mokuse” mpe ete etikali moke ‘dragɔ yango ya monene, nyoka ya ebandeli,’ abwakama na libulu mozindo mpe akangama kuna na boumeli ya mbula 1 000 ntango Yesu akoyangela na Bokonzi ya Nzambe.​—Emoniseli 20:1, 2.

Na eleko yango, makambo nini ekosalema awa na mabele? Banani bakofanda awa, mpe makambo ekozala ndenge nini? Yesu ye moko apesaki biyano. Na ndakisa na ye ya bampate mpe bantaba, amonisaki makambo oyo ezali kozela bato ya sembo, oyo bazali lokola bampate, oyo basalaki na bomoko na bandeko ya Yesu mpe basalelaki bango makambo ya malamu. Amonisaki mpe polele makambo oyo ezali kozela bato oyo basalisaki bango te, oyo bazali lokola bantaba. Yesu alobaki: “Bango [bantaba] bakokufa liwa ya seko, kasi bayengebene [bampate] bakozwa bomoi ya seko.”​—Matai 25:46.

Yango esalisi biso tókanga ntina ya maloba oyo Yesu alobaki na mosali-mabe oyo abongolaki motema, oyo babakaki na nzete pembeni na ye. Yesu alakaki te kopesa moto wana mbano oyo alakaki bantoma na ye ya sembo, elingi koloba koyangela elongo na ye na Bokonzi ya likoló. Yesu alakaki ye nde ete: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na Paradiso.” (Luka 23:43) Na yango, Yesu apesaki moto wana nde elikya ya kozala na Paradiso, esika oyo ekozala lokola elanga ya kitoko. Bato oyo bazali komonisa lelo ete bazali lokola bampate, oyo bakozwa “bomoi ya seko,” bakofanda mpe na Paradiso.

Yango eyokani na makambo oyo ntoma Yoane alobaki ete ekozala awa na mabele. Alobaki ete: “Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”​—Emoniseli 21:3, 4.

Mpo mosali-mabe wana azala na bomoi na Paradiso, ekosɛnga ete asekwa. Kaka ye moko te nde akosekwa. Yesu amonisaki yango polele ntango alobaki ete: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.”​—Yoane 5:28, 29.

Bongo bantoma ya sembo mpe bato mosusu oyo bakozala na Yesu na likoló, bakosala nini? Biblia elobi: “Bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkóto moko (1 000) yango.” (Emoniseli 20:6) Bato yango oyo bakokóma bakonzi elongo na Kristo bazalaki na bomoi awa na mabele, basi mpe mibali. Na yango, bakozala bakonzi ya motema mawa mpe bakomitya na esika ya bato oyo bakozala na mabele.​—Emoniseli 5:10.

Yesu akosalela mbeka ya lisiko na ye mpo na bato oyo bazali na mabele mpe akosikola bango na lisumu. Ye ná bato oyo bakoyangela elongo na ye bakokómisa bato ya sembo bato ya kokoka. Ya solo, bato bakokóma na bomoi oyo Nzambe akanaki mpo na bango na ebandeli ntango ayebisaki Adama ná Eva bábota mpe bátondisa mabele. Ata liwa oyo eutá na lisumu ya Adama ekozala lisusu te!

Na ntango yango, Yesu akosilisa makambo nyonso oyo Yehova asɛngaki ye asala. Na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, Yesu akozongisa Bokonzi mpe mokili wana etondi na bato ya kokoka na mabɔkɔ ya Tata na ye. Mpo na likambo wana ya komikitisa oyo Yesu akosala, ntoma Paulo akomaki: “Ntango biloko nyonso ekotyama na nse na ye, Mwana ye moko mpe akomitya na nse ya Moto oyo atyaki biloko nyonso na nse na ye, mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.”​—1 Bakorinti 15:28.

Ya solo, Yesu azali na mokumba monene mpenza na kokokisama ya makambo ya malamu mpenza oyo Nzambe akanaki. Mpe ntango makambo yango ekokoba kokokisama libela na libela, maloba na ye oyo ete “ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi” ekokokisama mpenza!​—Yoane 14:6.