Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 70

Yesu abikisi moto oyo akufá miso banda kobotama

Yesu abikisi moto oyo akufá miso banda kobotama

YOANE 9:1-18

  • YESU ABIKISI MOSƐNGI-BILOKO OYO AKUFÁ MISO BANDA KOBOTAMA

Yesu azali naino na Yerusaleme na mokolo ya Sabata. Ntango ye ná bayekoli na ye bazali kotambola na engumba, bamoni mosɛngi-biloko moko oyo akufá miso banda kobotama. Bayekoli batuni Yesu: “Rabi, nani asalaki lisumu, moto oyo to baboti na ye, mpo abotama moto akufá miso?”​—Yoane 9:2.

Bayekoli bayebi ete moto wana azali te na molimo oyo ekufaka te, oyo ezalaki na bomoi liboso abotama; kasi mbala mosusu bazali komituna soki moto akoki kosala lisumu ntango azali naino na libumu ya mama na ye. Yesu azongiseli bango ete: “Moto oyo asalaki lisumu te, baboti na ye mpe te, kasi ezali mpo misala ya Nzambe emonana polele na likambo na ye.” (Yoane 9:3) Na yango, moto wana to baboti na ye bazali na ngambo te mpo na libunga to lisumu moko oyo esali ete miso na ye ekufa. Ezali mpo na lisumu ya Adama nde bato nyonso bazali kobotama ya kozanga kokoka mpe na mbeba, na ndakisa kokufa miso. Kasi kokufa miso ya moto yango epesi Yesu libaku ya komonisa polele misala ya Nzambe, ndenge asalaki yango na mabaku mosusu ntango abikisaki bato ya maladi.

Yesu amonisi ete esengeli kosala misala ya Nzambe nokinoki. Alobi: “Tosengeli kosala misala ya ye oyo atindaki ngai wana moi ezali naino; butu ezali koya wana moto moko te akokoka kosala mosala. Na ntango oyo nazali naino na mokili, nazali pole ya mokili.” (Yoane 9:4, 5) Ya solo, etikali moke, liwa ekɔtisa Yesu na molili ya lilita, epai akoki kosala eloko moko te. Kasi na ntango oyo azali naino na bomoi, azali mwinda ya mokili.

Kasi, Yesu akobikisa moto yango? Soki akobikisa ye, ndenge nini akosala yango? Yesu abwaki nsoi na mabele mpe asali mwa pɔtɔpɔtɔ na mabele yango. Atye mwa pɔtɔpɔtɔ yango na miso ya moto yango mpe alobi: “Kende kosukola na pisini ya Siloame.” (Yoane 9:7) Mobali yango atosi. Ntango asukoli, abandi komona! Kanisá esengo oyo ayoki ndenge amoni mpo na mbala ya liboso banda abotamá!

Bato ya kartye mpe bato mosusu oyo bayebaki ete akufá miso bakamwe. Batuni: “Oyo ezali te moto oyo azalaki kofanda mpe kosɛngasɛnga?” Basusu bayanoli: “Ezali ye.” Kasi bato mosusu mpe bandimi te mpe balobi: “Ye te, akokani nde na ye.” Moto yango ye moko ayebisi bango: “Ngai nde moto yango.”​—Yoane 9:8, 9.

Na yango, batuni ye: “Bongo ndenge nini miso na yo efungwami?” Azongiseli bango: “Moto oyo babengi Yesu asalaki pɔtɔpɔtɔ ya mabele mpe apakolaki ngai yango na miso, mpe alobaki na ngai ete: ‘Kende kosukola na Siloame.’ Bongo nakendaki kosukola mpe nakómaki komona.” Na nsima, bato yango batuni: “Wapi moto yango?” Mosɛngi-biloko yango ayanoli: “Nayebi te.”​—Yoane 9:10-12.

Bato yango bamemi moto wana epai ya Bafarisai, oyo balingi mpe koyeba ndenge nini amoni. Ayebisi bango: “Atyaki ngai pɔtɔpɔtɔ ya mabele na miso, mpe nasukolaki mpe nazali komona.” Bafarisai basengelaki nde kosepela ndenge moto wana oyo akufá miso amoni. Na esika básepela, basusu kati na bango bapesi Yesu foti, balobi: “Moto oyo auti epai ya Nzambe te, mpo azali kotosa Sabata te.” Nzokande, basusu balobi: “Ndenge nini moto oyo azali mosumuki akoki kosala bilembo ya ndenge wana?” (Yoane 9:15, 16) Mpe bazali lisusu liloba moko te.

Lokola makanisi na bango ekeseni ndenge wana, babaluki epai ya moto oyo auti kobika mpe batuni: “Lokola afungoli yo miso, olobi nini mpo na ye?” Azali na ntembe te mpo na Yesu mpe alobi: “Azali mosakoli.”​—Yoane 9:17.

Bayuda baboyi kondima yango. Mbala mosusu bazali kokanisa ete Yesu ayokani na moto wana mpo na kokosa bato. Bamoni ete mpo na kosilisa likambo yango, esengeli kaka bátuna baboti ya mosɛngi-biloko wana mpo na koyeba soki miso na ye ekufaki mpenza solo.