Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokano ya Nzambe mpo na biso ezali nini?

Mokano ya Nzambe mpo na biso ezali nini?

NTANGO ozali kotánga zulunalo, kotala televizyo to kolanda bansango na radio, okomona mpe okoyoka makambo mingi oyo etali mobulu, kobomana, bitumba mpe terorisme. Ntango mosusu ozali konyokwama mpo ozali kobɛla to mpo ndeko to moninga na yo moko akufi.

Omituna:

  • Nzambe alingi ete bomoi na ngai mpe ya bato ya libota na ngai ezala nde boye?

  • Epai wapi nakoki kozwa lisalisi mpo na kolonga mikakatano?

  • Mokolo mosusu tokozala mpenza na kimya?

Biblia epesi biyano ya malamu na mituna wana.

BIBLIA ETEYAKA ETE NZAMBE AKOSALA MAKAMBO YA MINENE NA MABELE.

  • Bato bakomona mpasi lisusu te, bakokóma mibange te, mpe bakokufa te.​—Emoniseli 21:4

  • “Motɛngumi akopumbwa lokola serfe.”​—Yisaya 35:6

  • “Miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama.”​—Yisaya 35:5

  • Bato oyo bakufá bakozonga na bomoi.​—Yoane 5:28, 29

  • Moto moko te akobɛla.​—Yisaya 33:24

  • Bato nyonso bakozala na biloko ya kolya ebele.​—Nzembo 72:16

MAKAMBO OYO BIBLIA ETEYAKA EKOPESA YO MATOMBA

Okoki kokanisa ete makambo oyo otángi na nkasa ya minei mpe ya mitano ya buku oyo ezali kaka ndɔtɔ mpamba. Kasi, Nzambe alaki ete, etikali moke asala makambo wana awa na mabele, mpe Biblia emonisi ndenge akosala yango.

Kasi, Biblia esuki kaka te na komonisa makambo wana. Eyebisi biso mpe makambo oyo tosengeli koyeba mpo tózala mpenza na esengo mpe na bomoi ya malamu banda sikoyo. Kanisá mwa moke makambo oyo etungisaka yo. Ekoki kozala kozanga mbongo to mikakatano na libota, maladi, to liwa ya moto moko oyo olingaka mingi. Biblia ekoki kosalisa yo olonga mikakatano yango, mpe ekoki kokitisa yo motema na biyano ya mituna oyo:

Ndenge ozali kotánga buku oyo emonisi ete olingi koyeba makambo oyo Biblia eteyaka. Buku oyo ekosalisa yo. Baparagrafe ezali na mituna oyo ekosalisa yo oyeba Biblia malamumalamu. Ebele mpenza ya bato basepelaka kosolola masolo ya Biblia na Batatoli ya Yehova. Tokanisi ete yo mpe okosepela. Tiká ete Nzambe apambola yo ntango ozali koyeba makambo oyo Biblia ezali koteya yo!