Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA NSAMBO

Lisekwa ekozala!

Lisekwa ekozala!

1-3. Nini ekangá biso nyonso na bolɔkɔ, mpe ndenge nini Yehova akobimisa biso na bolɔkɔ yango?

KANISÁ ete bakateli yo etumbu ya kolekisa bomoi mobimba na bolɔkɔ mpo na mabe oyo osali te. Elikya ya kobima na bolɔkɔ yango ezali te. Ozali komona ete osuki, mpe eloko mosusu ya kosala ezali te. Kasi, kaka ntango omoni ete esili mpo na yo, oyoki ete moto moko azali na likoki ya kobimisa yo mpe alaki ete akosalisa yo! Okoyoka ndenge nini?

2 Liwa ezali bolɔkɔ oyo ekangá biso nyonso. Ata soki tosali nini, ndenge ya kokima ezali te. Kasi, Yehova azali na nguya ya kosikola biso na liwa. Mpe alaki ete “liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi.”​—1 Bakorinti 15:26.

3 Kanisá ndenge motema ekokita yo ntango nsɔmɔ ya liwa ekozala lisusu te! Kasi, Yehova akolongola kaka liwa te. Akozongisa mpe bato oyo bakufá na bomoi. Kanisá esengo oyo okoyoka mpo na yango. Alaki ete “baoyo bazangi makasi kati na liwa” bakozonga lisusu na bomoi. (Yisaya 26:19) Biblia ebengi yango lisekwa.

NTANGO NDEKO TO MONINGA MOKO AKUFI

4. (a) Nini ekoki kokitisa biso motema ntango ndeko to moninga moko akufi? (b) Banani bazalaki baninga ya Yesu ya motema?

4 Ntango ndeko to moninga na biso moko ya motema akufi, toyokaka mpasi mpe mawa mpenza. Tomonaka ete tosuki mpe tomonaka eloko ya kosala te mpo na kozongisa ye na bomoi. Kasi, Biblia ekoki mpenza kokitisa biso motema. (Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.) Tótalela lisolo moko oyo emonisi ete Yehova ná Yesu balingaka mpenza kozongisa na bomoi bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki mbala na mbala kokende kotala Lazare ná bandeko na ye ya basi, Marta ná Maria. Bango nyonso misato bazalaki baninga ya Yesu ya motema. Biblia elobi: “Yesu azalaki kolinga Marta ná ndeko na ye ya mwasi ná Lazare.” Kasi na nsima, Lazare akufaki.​—Yoane 11:3-5.

5, 6. (a) Yesu asalaki nini ntango amonaki bandeko ya Lazare ná baninga na ye bazali kolela? (b) Mpo na nini koyeba ndenge Yesu ayokaki mpo na liwa ezali kokitisa motema?

5 Yesu akendaki kobɔndisa Marta ná Maria. Ntango Marta ayokaki ete Yesu azali koya, akendaki na libándá ya engumba kokutana na ye. Asepelaki mingi ntango amonaki Yesu, mpe alobaki na ye: “Nkolo, soki ozalaki awa mbɛlɛ ndeko na ngai ya mobali akufaki te.” Marta akanisaki ete Yesu ayei na retare. Na nsima, Yesu amonaki Maria, ndeko ya Marta, azali kolela. Ntango amonaki bango na mawa, ayokaki mpasi mingi mpe alelaki. (Yoane 11:21, 33, 35) Ayokaki mawa mpenza oyo toyokaka ntango ndeko to moninga na biso akufi.

6 Koyeba ete Yesu mpe ayokaka mawa oyo toyokaka mpo na liwa ezali kokitisa motema. Mpe Yesu azali kaka lokola Tata na ye. (Yoane 14:9) Yehova azali na nguya ya kolongola liwa mpo na libela, mpe yango nde akosala mosika te.

“LAZARE, BIMÁ!”

7, 8. Mpo na nini Marta aboyaki bálongola libanga na lilita ya Lazare, kasi Yesu asalaki nini?

7 Ntango Yesu akómaki na lilita oyo bakundaki Lazare, akutaki bazipi lilita yango na libanga moko monene. Yesu alobaki: “Bólongola libanga.” Kasi Marta aboyaki mpo nzoto ya Lazare esilaki kosala mikolo minei na kati ya lilita. (Yoane 11:39) Ayebaki te likambo oyo Yesu alingaki kosala mpo na ndeko na bango.

Kanisá esengo oyo bandeko ná baninga ya Lazare bayokaki ntango asekwaki!​—Yoane 11:38-44

8 Yesu alobaki: “Lazare, bimá!” Likambo oyo Marta ná Maria bamonaki na nsima ekamwisaki bango. “Moto oyo akufaki abimaki, makolo ná mabɔkɔ ekangami na bilamba ya kozinga.” (Yoane 11:43, 44) Lazare azongaki na bomoi! Akutanaki lisusu na bandeko mpe baninga na ye. Bayambaki ye, basimbaki ye, mpe basololaki na ye. Ezalaki likamwisi moko monene! Yesu asekwisi Lazare.

“ELENGE MWASI, NALOBI NA YO: TƐLƐMÁ!”

9, 10. (a) Nani apesaki Yesu nguya ya kosekwisa bato? (b) Mpo na nini masolo oyo elobeli lisekwa ezali na ntina mingi mpo na biso?

9 Yesu azalaki kosekwisa bato na nguya na ye moko? Te. Liboso asekwisa Lazare, Yesu abondelaki Yehova, mpe Yehova apesaki ye nguya ya kosekwisa Lazare. (Tángá Yoane 11:41, 42.) Yesu asekwisaki kaka Lazare te. Biblia elobeli elenge mwasi moko ya mbula 12 oyo azalaki kobɛla makasi. Tata na ye Yairuse asilaki mayele, mpe asɛngaki Yesu abikisa mwana na ye. Azalaki kaka na mwana moko wana. Ntango azalaki kosolola na Yesu, bato balandaki ye mpe balobaki na ye: “Mwana na yo ya mwasi akufi! Mpo na nini kotungisa moteyi lisusu?” Kasi Yesu alobaki na Yairuse: “Kobanga te, monisá kaka kondima, mpe akobika.” Na nsima, akendaki elongo na Yairuse na ndako na ye. Ntango bakómaki pene na ndako, Yesu amonaki mpe ayokaki bato bazali kolela. Yesu ayebisaki bango: “Bótika kolela, mpo akufi te kasi alali nde mpɔngi.” Na ntembe te, tata ná mama ya mwana bamitunaki soki Yesu alingi koloba nini. Yesu asɛngaki bato nyonso bábima, kasi akɔtaki elongo na tata ná mama ya mwana yango na ndako, esika balalisaki mwana. Yesu asimbaki ye malɛmbɛ na lobɔkɔ mpe alobaki na ye: “Elenge mwasi, nalobi na yo: Tɛlɛmá!” Kanisá esengo ya baboti wana ntango mwana na bango atɛlɛmaki mbala moko mpe abandi kotambola! Yesu asekwisi mwana na bango. (Marko 5:22-24, 35-42; Luka 8:49-56) Kobanda mokolo wana, ntango bazalaki komona mwana na bango, bazalaki kokanisa likambo oyo Yehova asalelaki bango na nzela ya Yesu. *

10 Bato oyo Yesu asekwisaki bakufaki lisusu na nsima. Kasi masolo ya bato yango ezali na ntina mingi mpo ezali kopesa biso elikya ya solosolo. Yehova azali na mposa ya kosekwisa bato, mpe akosala yango.

MASOLO OYO ELOBELI LISEKWA ETEYI BISO NINI?

Ntoma Petro asekwisaki Dorkasi, mokristo moko ya mwasi.​—Misala 9:36-42

Eliya asekwisaki mwana ya mwasi moko oyo mobali na ye akufá.​—1 Bakonzi 17:17-24

11. Mosakoli 9:5 eteyi biso nini mpo na Lazare?

11 Biblia elobi polele ete “bakufi bayebi ata eloko moko te.” Ezalaki bongo mpo na Lazare. (Mosakoli 9:5) Kaka ndenge Yesu alobaki, ezalaki lokola nde Lazare alali mpɔngi. (Yoane 11:11) Ntango Lazare azalaki na lilita, ayebaki “ata eloko moko te.”

12. Ndenge nini toyebi ete lisekwa ya Lazare esalemaki mpenza?

12 Ntango Yesu asekwisaki Lazare, bato ebele bamonaki. Ata banguna ya Yesu bayebaki ete asalaki likamwisi yango. Lazare azongaki na bomoi, mpe yango emonisaki ete lisekwa yango esalemaki mpenza. (Yoane 11:47) Longola yango, bato mingi bakendaki kotala Lazare; yango wana, bakómaki kondima ete Nzambe nde atindaki Yesu. Banguna ya Yesu basepelaki na likambo yango te; yango wana bayokanaki ete báboma Yesu mpe Lazare.​—Yoane 11:53; 12:9-11.

13. Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova akosekwisa bakufi?

13 Yesu alobaki ete “baoyo nyonso bazali na kati ya malita” bakosekwa. (Yoane 5:28) Yango elimboli ete baoyo nyonso bazali na makanisi ya Yehova bakozonga na bomoi. Kasi, mpo Yehova asekwisa moto, esengeli ayeba lisusu makambo nyonso oyo etali moto yango. Akoki mpenza kosala yango? Na molɔ́ngɔ́ mobimba, minzoto ezali bamiliare ná bamiliare. Biblia elobi ete Yehova ayebi monzoto mokomoko na nkombo na yango. (Tángá Yisaya 40:26.) Soki ayebi malamu nkombo ya monzoto mokomoko, boye akoyeba mpe mbala moko likambo mokomoko oyo etali bakufi nyonso oyo akozongisa na bomoi. Kutu, lokola Yehova nde akelaki biloko nyonso, toyebi ete azali na nguya ya kozongisa bakufi na bomoi.

14, 15. Maloba ya Yobo eteyi biso nini mpo na lisekwa?

14 Yobo, moto ya sembo, azalaki kondima ete lisekwa ekozala. Atunaki: “Soki mobali makasi akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi?” Na nsima, alobaki na Yehova ete: “Yo okobenga, mpe ngai nakondima. Okozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na yo.” Ya solo, Yobo ayebaki ete Yehova azelaka na mposa makasi mokolo oyo akosekwisa bato oyo bakufá.​—Yobo 14:13-15.

15 Omiyokaka ndenge nini mpo na elikya ya lisekwa? Ntango mosusu okoki komituna: ‘Bongo bandeko na ngai ná baninga na ngai oyo bakufá, bango mpe bakosekwa?’ Koyeba ete Yehova alingi mpenza kozongisa bakufi na bomoi, ebɔndisaka biso. Tótalela eyano ya Biblia na motuna oyo: Banani bakosekwa mpe bakofanda wapi?

“BAKOYOKA MONGONGO NA YE MPE BAKOBIMA”

16. Bato oyo bakosekwa awa na mabele bakozala na bomoi ya ndenge nini?

16 Na ntango ya kala, bato oyo basekwaki bakutanaki lisusu na bandeko na bango mpe baninga na bango awa na mabele. Ekozala mpe bongo na mikolo ezali koya, kasi ekozala malamu koleka. Mpo na nini? Mpo baoyo bakozonga na bomoi awa na mabele bakozwa libaku ya kozala na bomoi libela na libela mpe bakokufa lisusu te. Mpe bakofanda na mokili moko oyo ekeseni mosika na oyo tozali na yango lelo oyo. Bitumba, mobulu mpe maladi ekozala te.

17. Banani bakosekwa?

17 Banani bakosekwa? Yesu alobaki ete “baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29, maloba na nse ya lokasa) Mpe Emoniseli 20:13 elobi: “Mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe liwa ná Nkunda ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna.” Ya solo, ebele ya bato bakozonga na bomoi. Ntoma Paulo mpe alobaki ete ‘bayengebene mpe bato oyo bazangi boyengebene’ bakosekwa. (Tángá Misala 24:15.) Yango elimboli nini?

Na Paradiso, bakufi bakosekwa mpe bakokutana lisusu na bandeko mpe baninga na bango

18. “Bayengebene” oyo bakosekwa ezali banani?

18 “Bayengebene” ezali basaleli ya sembo ya Yehova oyo bazalaki na bomoi liboso Yesu aya awa na mabele. Bato lokola Noa, Abrahama, Sara, Moize, Ruta mpe Estere bakosekwa mpo na kofanda awa na mabele. Okoki kotánga makambo ya basi mpe mibali yango mosusu na mokanda ya Baebre mokapo 11. Bongo basaleli ya sembo ya Yehova oyo bazali kokufa na ntango na biso? Bango mpe bazali “bayengebene,” yango wana bakosekwa.

19. “Banani bazali bato oyo bazangi boyengene”? Libaku nini Yehova akopesa bango?

19 “Bato oyo bazangi boyengebene” ezali ebele ya bato oyo bazwaki libaku ya koyeba Yehova te. Atako bakufá, Yehova abosaná bango te. Akosekwisa bango, mpe bakozwa libaku ya koyekola makambo na ye mpe kosalela ye.

20. Mpo na nini bato mosusu bakosekwa te?

20 Yango elingi nde koloba ete bato nyonso oyo bakufá bakosekwa? Te. Yesu alobaki ete bato mosusu bakosekwa te. (Luka 12:5) Nani nde akokata soki moto boye to boye akosekwa to te? Yehova nde Mosambisi ya nsuka, kasi apesi mpe Yesu bokonzi ya “kozala mosambisi ya bato ya bomoi mpe ya bakufi.” (Misala 10:42) Moto nyonso oyo bango bamoni ete azali moto mabe mpe abongolaki motema te akosekwa te.​—Talá Etanda 19.

LISEKWA MPO NA KOKENDE NA LIKOLÓ

21, 22. (a) Kosekwa mpo na kokende na likoló elimboli nini? (b) Nani moto ya liboso oyo asekwaki mpo na kokende na likoló?

21 Biblia eteyaka mpe ete bato mosusu bakokende na likoló. Soki moto asekwi mpo na kokende na likoló, akozonga na bomoi lokola moto te, na nzoto ya mosuni. Akosekwa mpo na bomoi na likoló, na nzoto ya elimo.

22 Yesu azalaki moto ya liboso oyo asekwaki mpo na kokende na likoló. (Yoane 3:13) Mikolo misato nsima ya liwa ya Yesu, Yehova asekwisaki ye. (Nzembo 16:10; Misala 13:34, 35) Yesu asekwaki na nzoto ya mosuni te. Ntoma Petro alobi ete Yesu “abomamaki na nzoto, kasi azongisamaki na bomoi na elimo.” (1 Petro 3:18) Yesu asekwaki lokola elimo moko ya nguya! (1 Bakorinti 15:3-6) Kasi Biblia elobi ete lisekwa yango esuki kaka na ye te.

23, 24. “Etonga moke” oyo Yesu alobelaki ezali banani, mpe bakozala bato boni?

23 Liboso Yesu akufa, ayebisaki bayekoli na ye ya sembo: “Nazali kokende kobongisela bino esika.” (Yoane 14:2) Yango elimboli ete bayekoli na ye mosusu bakosekwa mpo na kozala elongo na ye na likoló. Bakozala boni? Yesu alobaki ete bakozala moke mpenza, “etonga moke.” (Luka 12:32) Ntoma Yoane apesaki motángo na bango ntango amonaki Yesu “atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona [ya likoló], mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000).”​—Emoniseli 14:1.

24 Ntango nini bakristo yango 144 000 basengelaki kosekwa? Biblia eyebisi biso ete yango esengelaki kosalema nsima ya ntango oyo Kristo abandaki koyangela na likoló. (1 Bakorinti 15:23) Tozali sikoyo na ntango yango, mpe mingi kati na bato 144 000 yango basilá kosekwa mpe bakendá na likoló. Baoyo bazali naino awa na mabele lelo oyo, soki bakufi bakosekwa mbala moko mpo na kokende na likoló. Kasi, bato mingi bakosekwa na mikolo ezali koya mpo na kofanda na Paradiso awa na mabele.

25. Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

25 Etikali moke Yehova asikola bato nyonso na liwa, mpe liwa ekolongolama mpo na libela! (Tángá Yisaya 25:8.) Kasi bato oyo bakokende na likoló bakosala nini kuna? Biblia elobi ete bakoyangela elongo na Yesu na Bokonzi ya Nzambe. Tokolobela guvɛrnema yango na mokapo oyo elandi.

^ par. 9 Masolo mosusu ya Biblia elobeli bato mosusu oyo basekwaki, bilenge ná mikóló, basi ná mibali, Bayisraele ná bato ya bikólo mosusu. Okoki kotánga masolo yango na 1 Bakonzi 17:17-24; 2 Bakonzi 4:32-37; 13:20, 21; Matai 28:5-7; Luka 7:11-17; 8:40-56; Misala 9:36-42; 20:7-12.