Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA ZOMI NA MOTOBA

Poná kosambela Nzambe

Poná kosambela Nzambe

1, 2. Motuna nini osengeli komituna, mpe mpo na nini ezali na ntina?

NA BOYEKOLI na yo ya Biblia, omoni ete bato mingi oyo balobaka ete basambelaka Nzambe bateyaka to basalaka nde makambo oyo Nzambe ayinaka. (2 Bakorinti 6:17) Yango wana Yehova asɛngi biso tóbima na mangomba ya lokuta, “Babilone Monene.” (Emoniseli 18:2, 4) Okosala nini? Mokomoko na biso asengeli kopona, mpe komituna boye: ‘Nalingi kosambela Nzambe na ndenge oyo ye moko alingi, to nalingi kosambela ye kaka na ndenge namesaná?’

2 Soki osí otiki lingomba moko ya lokuta to oyebisi bango ete olongwe, osali malamu. Kasi, na kati ya motema na yo ekoki kozala na makambo mpe bafɛti mosusu ya mangomba ya lokuta oyo olingaka kaka. Tólobela makambo mpe bafɛti mosusu na kati na yango mpe tótala ntina oyo ebongi kotalela yango ndenge Yehova atalelaka yango.

BIKEKO MPE KOSAMBELA BANKƆKƆ

3. (a) Mpo na nini bato mosusu bakoki komona ete ezali mpasi bátika kosalela bikeko na losambo? (b) Biblia elobi nini mpo na likambo etali kosalela bikeko mpo na kosambela Nzambe?

3 Bato mosusu bamesaná kosalela bikeko to basalá esika moko na ndako na bango mpo na kosambela Nzambe. Soki yo mpe osalaka bongo, okoki koyoka mabe to kutu komona ete okokoka te kosambela Nzambe soki biloko yango ezali te. Kasi kobosana te, Yehova alakisi biso ndenge ya kosambela ye. Mpe Biblia eyebisi biso polele ete Yehova aboyi tósalelaka bikeko na losambo na biso.​—Tángá Kobima 20:4, 5; Nzembo 115:4-8; Yisaya 42:8; 1 Yoane 5:21.

4. (a) Mpo na nini tosengeli kosambela bankɔkɔ te? (b) Mpo na nini Yehova ayebisaki basaleli na ye bámeka te kosolola na bato oyo bakufá?

4 Bato mosusu balekisaka ntango ebele mpe bamipesaka mpo na koluka kosepelisa bankɔkɔ na bango oyo bakufá. Ntango mosusu kutu basambelaka bango. Kasi, toyekolaki ete bato oyo bakufá bakoki kosalisa biso te, kosala biso mabe mpe te. Bazali na bomoi na esika mosusu te. Kutu, ezali mpenza mabe koluka kosolola na bango mpo nsango nyonso oyo emonani lokola euti epai ya ndeko moko oyo akufá, eutaka nde epai ya bademo. Yango wana, Yehova ayebisaki Bayisraele bámeka te kosolola na bato oyo bakufá to komikɔtisa na misala ya bademo.​—Kolimbola Mibeko 18:10-12; talá Etanda 26 mpe 31.

5. Nini ekoki kosalisa yo otika kosalela bikeko mpo na kosambela Nzambe mpe otika kosambela bankɔkɔ?

5 Nini ekoki kosalisa yo otika kosalela bikeko mpo na kosambela Nzambe to otika kosambela bankɔkɔ? Osengeli kotánga Biblia mpe kotala malamumalamu ndenge Yehova atalelaka makambo yango. Ezali ‘eloko oyo ayini,’ to bosɔtɔ. (Kolimbola Mibeko 27:15) Bondeláká Yehova mikolo nyonso asalisa yo okóma komona biloko wana ndenge ye amonaka yango mpe asalisa yo lisusu osambela ye na ndenge oyo alingi. (Yisaya 55:9) Zalá na kondima ete Yehova akopesa yo makasi oyo esengeli mpo olongola na bomoi na yo eloko nyonso oyo eyokani na losambo ya lokuta.

TOSENGELI KOSALAKA FƐTI YA NOELE?

6. Mpo na nini baponaki mokolo ya 25/12 ezala mokolo ya mbotama ya Yesu?

6 Na mokili mobimba, fɛti ya Noele ezali moko ya bafɛti oyo bato mingi basalaka, mpe bato mingi bakanisaka ete ezali fɛti ya mbotama ya Yesu. Nzokande, fɛti ya Noele ezali na boyokani na losambo ya lokuta. Buku moko emonisi ete bapakano ya Roma bazalaki kosala fɛti ya mbotama ya moi mokolo ya 25/12. Bakonzi ya mangomba balingaki ete bapakano ebele bákóma bakristo, yango wana bamonaki malamu bábanda kosala fɛti ya mbotama ya Yesu na mokolo ya 25/12, nzokande Yesu abotamaki mokolo yango te. (Luka 2:8-12) Bayekoli ya Yesu bazalaki kosala fɛti ya Noele te. Buku moko (Sacred Origins of Profound Things) emonisi ete na boumeli ya mbula 200 nsima ya mbotama ya Yesu, “moto moko te ayebaki mokolo Yesu abotamaki mpe bato mingi bazalaki kokipe yango te.” Bato bakómaki kosala fɛti ya Noele bambula ebele mpenza nsima ya ntango oyo Yesu azalaki na mabele.

7. Mpo na nini bakristo ya solo basalaka fɛti ya Noele te?

7 Bato mingi bayebi ete fɛti ya Noele mpe makambo oyo basalaka mokolo yango, na ndakisa kolya ná komɛla mpe kokabelana biloko, eutá na bapakano. Na ndakisa, na Angleterre mpe na mikili mosusu na Amerika, na ntango moko boye bapekisaki bato kosala fɛti ya Noele mpo eutá na bapakano. Moto nyonso oyo asali fɛti yango azalaki kozwa etumbu. Kasi, nsukansuka bato bazongelaki kosala fɛti ya Noele. Mpo na nini bakristo ya solo basalaka fɛti ya Noele te? Mpo balingaka kosepelisa Nzambe na makambo nyonso oyo basalaka.

TOSENGELI KOSALAKA FƐTI YA ANIVƐRSƐRƐ YA MBOTAMA?

8, 9. Mpo na nini bakristo ya liboso bazalaki kosala bafɛti ya mbotama te?

8 Fɛti mosusu oyo bato mingi basalaka ezali anivɛrsɛrɛ ya mbotama na bango. Bakristo basengeli kosalaka fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama? Bafɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama oyo Biblia elobeli ezalaki ya bato oyo bazalaki kosambela Yehova te. (Ebandeli 40:20; Marko 6:21) Bazalaki kosala fɛti yango mpo na kokumisa banzambe ya lokuta. Yango wana bakristo ya liboso “bazalaki komona ete kosala fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama ya moto ezali momeseno ya bapakano.”​—The World Book Encyclopedia.

9 Kala, bato ya Roma ná bato ya Grɛsi bazalaki kokanisa ete ntango moto azali kobotama, elimo moko ezalaka wana mpe elimo yango ekobatela moto yango bomoi mobimba. Buku moko (The Lore of Birthdays) elobi boye: “Elimo yango ezalaki na boyokani moko ya molili na nzambe oyo, na mokolo ya fɛti ya mbotama na ye, moto yango abotami.”

10. Lelo oyo, mpo na nini bakristo basengeli kosala bafɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama te?

10 Okanisi ete Yehova andimaka bafɛti oyo eyokani na mangomba ya lokuta? (Yisaya 65:11, 12) Te, andimaka yango te. Yango wana, tosalaka bafɛti ya mbotama te to bafɛti mosusu oyo eyokani na mangomba ya lokuta.

EZALI MPENZA NA NTINA KOLANDELA YANGO?

11. Mpo na nini bato mosusu basalaka bafɛti? Eloko nini osengeli koluka libosoliboso?

11 Bato mosusu bayebi ete fɛti ya Noele mpe bafɛti mosusu eutá na bapakano, kasi basalaka yango kaka. Bamonaka ete bafɛti yango ezali kaka mokolo moko ya malamu ya kolekisa ntango na bandeko na bango. Yo mpe omonaka bongo? Ezali mabe te kolekisa ntango na bandeko na yo. Yehova moto asalaki libota, mpe alingi ete tóyokanaka malamu na bandeko na biso. (Baefese 3:14, 15) Kasi, tosengeli koluka kozala na boyokani malamu na Yehova na esika ya kosala bafɛti ya mangomba ya lokuta mpo na koluka kosepelisa nde bandeko na biso. Yango wana ntoma Paulo alobaki: “Bókoba koluka koyeba malamu mpenza eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.”​—Baefese 5:10.

12. Nini esalaka ete Nzambe andima fɛti moko boye te?

12 Bato mingi bamonaka ete kolandela esika fɛti moko eutá ezali na ntina te; kasi Yehova amonaka ete ezali na ntina. Andimaka te bafɛti oyo eutá na losambo ya lokuta, oyo ekumisaka bato to bilembo ya ekólo. Na ndakisa, bato ya Ezipito bazalaki kosala bafɛti ebele mpo na banzambe na bango ya lokuta. Ntango Bayisraele babimaki na Ezipito, basalaki fɛti moko oyo bato ya Ezipito bazalaki kosala mpe babengaki yango “fɛti mpo na Yehova.” Kasi Yehova apesaki bango etumbu mpo na yango. (Kobima 32:2-10) Ndenge mosakoli Yisaya alobaki, tosengeli ‘kosimba eloko moko ya mbindo te.’​—Tángá Yisaya 52:11.

YEBISÁKÁ BATO MAKAMBO YANGO NA BOBOTO

13. Mituna nini okoki kozala na yango ntango ozwi ekateli ya kotika kosala bafɛti?

13 Ntango ozwi ekateli ya kotika kosala bafɛti, okoki kozala na mituna mingi. Na ndakisa: ‘Nakosala nini soki baninga ya mosala batuni ngai ntina oyo naboyi kosala fɛti ya Noele na bango? Nakosala nini soki moto akabeli ngai eloko mokolo ya Noele? Nakosala nini soki molongani na ngai alingi tósala bafɛti yango? Ndenge nini nakoki kosalisa bana na ngai bázala na mawa te mpo tosalaka te fɛti moko boye to fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama na bango?’

14, 15. Okoki kosala nini soki moto alobi na yo bonɛ fɛti to akabeli yo eloko?

14 Tosengeli kosalela mayele ya bomoto ntango tozali kopona nini tokoloba mpe nini tokosala soki likambo moko ebimi. Na ndakisa, soki moto atombeli yo to alobi na yo bonɛ fɛti, koboya koyanola te. Okoki kaka koloba “matɔndi” to “mersi.” Kasi soki moto alingi koyeba makambo mosusu, okoki komona malamu oyebisa ye ntina oyo osalaka fɛti yango te. Kasi, zaláká na boboto, lobáká na mayele mpe na limemya. Biblia elobi: “Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto mokomoko eyano.” (Bakolose 4:6) Ntango mosusu okoki koyebisa ye ete osepelaka kolekisa ntango na bato mpe kokabela bango eloko, kasi olingaka te kosala yango na ntango ya bafɛti.

15 Okosala nini soki moto moko akabeli yo eloko? Biblia epesi mibeko na makambo nyonso te, kasi elobi ete tosengeli kobatela lisosoli ya malamu. (1 Timote 1:18, 19) Ntango mosusu moto oyo akabeli yo eloko yango ayebi te ete osalaka bafɛti yango te. To akoki koloba boye: “Nayebi ete osalaka fɛti oyo te, kasi nalingi kaka kokabela yo eloko oyo.” Ezala ndenge nini, yo moko okotala soki okozwa eloko yango to te. Kasi, ezala ekateli nini okozwa, luká kobatela lisosoli na yo malamu. Tokolinga te kosala likambo oyo ekobebisa boyokani na biso na Yehova.

YO NÁ LIBOTA NA YO

Bato oyo basalelaka Yehova bazali bato ya esengo

16. Okosala nini soki bandeko na yo balingi kosala fɛti?

16 Okosala nini soki bandeko na yo balingi kosala fɛti? Kobendana na bango te. Kobosana te ete bazali na lotomo ya kosala oyo balingi. Zalá na boboto mpe tiká bango bápona oyo balingi, ndenge yo mpe okolinga básala mpo na yo. (Tángá Matai 7:12.) Kasi soki bandeko na yo balingi ofanda na bango mokolo ya fɛti, okosala nini? Liboso ya kozwa ekateli, bondelá Yehova mpo asalisa yo ozwa ekateli ya malamu. Kanisá likambo yango, mpe luká na mikanda ya Batatoli ya Yehova makambo oyo ekosalisa yo. Kobosana te, osengeli ntango nyonso kosepelisa Yehova.

17. Okoki kosala nini mpo na kosalisa bana na yo bámona te ete bazangi eloko moko ntango bazali komona baninga bazali kosala bafɛti?

17 Okosala nini mpo na kosalisa bana na yo báyoka mpasi te ntango bazali komona baninga bazali kosala bafɛti? Mikolo mosusu okoki kosalela bango mwa eloko mpo na kosepelisa bango. Okoki mpe kosombelaka bango biloko oyo bakanisaki te. Mpe likambo oyo eleki malamu oyo okoki kosalela bana na yo ezali kolekisa ntango elongo na bango mpe kolinga bango.

MIPESÁ NA LOSAMBO YA SOLO

18. Mpo na nini tosengeli kokendaka na makita ya bokristo?

18 Mpo tósepelisa Yehova, tosengeli kotika mangomba ya lokuta, ná makambo na yango mpe bafɛti na yango. Tosengeli mpe komipesa na losambo ya solo. Ndenge nini? Na ndakisa, kokende ntango nyonso na makita ya bokristo. (Tángá Baebre 10:24, 25.) Makita ezali likambo ya ntina mingi na losambo ya solo. (Nzembo 22:22; 122:1) Tokoki kolendisana ntango tokutani na bandeko mosusu.​—Baroma 1:12.

19. Mpo na nini koyebisa bato mosusu mateya ya Biblia oyo oyekoli ezali na ntina?

19 Likambo mosusu ya ntina ezali koyebisa baninga makambo oyo oyekoli na Biblia. Bato mingi bazali koyoka mpasi mpo na mabe oyo ezali kosalema na mokili. Ntango mosusu oyebi bato ya ndenge wana. Yebisá bango makambo ya malamu oyo ekozala na mikolo ezali koya. Soki obandi kokende na makita mpe koyebisa bato mosusu mateya ya Biblia, okozala lisusu na mposa te ya kozala na mangomba ya lokuta mpe ya kosala makambo na yango. Yebá ete okozala na esengo mpe Yehova akopambola yo mingi mpo ozali kosala makasi opona kosambela ye na ndenge ya malamu.​—Malaki 3:10.