Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA ZOMI NA LIBWA

Tikalá penepene na Yehova

Tikalá penepene na Yehova

1, 2. Esika nini tokoki komibomba lelo oyo?

KANISÁ ete ozali kotambola libándá mpe mopɛpɛ ezali makasi. Likoló eyindi, mikalikali ezali kobima mpe nkake ebɛti. Eumeli te mbula ebandi kobɛta. Oluki esika ya komibomba. Ntango ozwi esika yango, motema ekiti mpenza!

2 Lelo oyo mpe bomoi ezali ndenge wana. Makambo ya mokili ezali kobeba se kobeba. Okoki komituna: ‘Esika nini nakoki komibomba?’ Mokomi ya nzembo akomaki: “Nakoloba na Yehova: ‘Ozali ekimelo [to esika ya komibomba] na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai, Nzambe na ngai, oyo nakotyela motema.’” (Nzembo 91:2) Ya solo, Yehova akoki kosalisa biso na mikakatano oyo tozali na yango lelo, mpe kopesa biso elikya ya malamu mpenza mpo na mikolo ezali koya.

3. Ndenge nini tokoki kokómisa Yehova ekimelo to esika na biso ya komibomba?

3 Ndenge nini Yehova akoki kobatela biso? Akoki kosalisa biso tókanga motema na mikakatano oyo tozali na yango, mpe azali na nguya koleka moto nyonso oyo akoki kosala biso mabe. Ata soki likambo moko ya mabe ekómeli biso lelo, tóyeba ete Yehova akobongisa makambo na mikolo ezali koya. Biblia elendisi biso: “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.” (Yuda 21) Tosengeli kotikala penepene na Yehova mpo asalisa biso na ntango ya mpasi. Kasi, ndenge nini tokoki kosala yango?

YO MPE LINGÁ NZAMBE

4, 5. Ndenge nini Yehova amonisi ete alingaka biso?

4 Mpo na kotikala penepene na Yehova, tosengeli kobosana te ete alingaka biso mingi mpenza. Kanisá makambo nyonso oyo Yehova asalelá biso. Apesá biso mabele, esika kitoko oyo etondi na banzete mpe banyama ndenge na ndenge. Apesá biso mpe biloko kitoko ya kolya mpe mai ya pɛto mpo na komɛla. Na Biblia, Yehova ayebisi biso nkombo na ye mpe bizaleli na ye. Koleka nyonso, amonisaki ete alingaka biso ntango atindaki Mwana na ye ya bolingo, Yesu, awa na mabele mpo akufela biso. (Yoane 3:16) Mpe mbeka yango epesi biso elikya ya malamu mpo na mikolo ezali koya.

5 Yehova atye Bokonzi ya Masiya, guvɛrnema moko ya likoló, oyo etikali moke esilisa bampasi nyonso. Bokonzi yango ekokómisa mabele paradiso, esika moto nyonso akofanda na kimya mpe na esengo libela na libela. (Nzembo 37:29) Yehova amonisi mpe ete alingaka biso ndenge azali koteya biso kozala na bomoi oyo eleki malamu lelo oyo. Asɛngi biso tóbondelaka ye, mpe asepelaka koyoka ntango nyonso mabondeli na biso. Yehova amonisi mpenza ete alingaka mokomoko na biso.

6. Osengeli kosala nini lokola Yehova alingaka yo?

6 Osengeli kosala nini lokola Yehova alingaka yo? Monisá ete ozali kosepela na nyonso oyo asalelá yo. Likambo ya mawa, bato mingi lelo oyo bazalaka na botɔndi te. Ezalaki mpe bongo ntango Yesu azalaki awa na mabele. Mokolo moko Yesu abikisaki bato zomi ya maba, kasi kaka moko nde ayaki kopesa ye matɔndi. (Luka 17:12-17) Ebongi tózala lokola moto oyo apesaki Yesu matɔndi. Tosengeli ntango nyonso kopesa Yehova matɔndi.

7. Tosengeli kolinga Yehova na bolingo ya ndenge nini?

7 Tosengeli mpe komonisa ete tolingaka Yehova. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli kolinga Yehova na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba mpe na makanisi na bango nyonso. (Tángá Matai 22:37.) Elingi koloba nini?

8, 9. Ndenge nini tokomonisa Yehova ete tolingaka ye?

8 Koloba kaka na monɔkɔ ete tolingi Yehova ekoki? Te. Soki tolingi Yehova na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso nyonso, ekomonana na makambo tosalaka. (Matai 7:16-20) Biblia elobi polele ete soki tolingi Nzambe, tokotosa mibeko na ye. Ezali mpasi? Te, mpo “mibeko [ya Yehova] ezali kilo te.”​—Tángá 1 Yoane 5:3.

9 Ntango tozali kotosa Yehova, tokozala na bomoi ya esengo mpe ya malamu. (Yisaya 48:17, 18) Kasi, nini ekosalisa biso tótikala penepene na Yehova? Tólobela yango.

KOBÁ KOPUSANA PENEPENE NA YEHOVA

10. Mpo na nini osengeli kokoba koyekola makambo ya Yehova?

10 Ndenge nini okómaki moninga ya Yehova? Koyekola Biblia esalisaki yo oyekola koyeba makambo mingi ya Yehova mpe okóma moninga na ye. Boninga yango ezali lokola mɔtɔ oyo olingi ekufa te. Kaka ndenge esɛngaka kotya nkoni mpo mɔtɔ ekufa te, osengeli kokoba koyekola makambo ya Yehova mpo boninga na bino ezala kaka makasi.​—Masese 2:1-5.

Lokola mɔtɔ, osengeli kotya nkoni mpo bolingo na yo na Yehova ekufa te

11. Makambo mosusu oyo okoyekola na Biblia ekosala yo nini?

11 Lokola ozali kokoba koyekola Biblia, okoyeba makambo oyo ekosimba mpenza motema na yo. Talá ndenge bayekoli mibale ya Yesu bayokaki ntango azalaki kolimbwela bango bisakweli ya Biblia; balobi: “Mitema na biso ezalaki mɔtɔmɔtɔ ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kolimbolela biso Makomami polelepolele, boye te?”​—Luka 24:32.

12, 13. (a) Nini ekoki kokómela bolingo oyo tolingaka Nzambe? (b) Ndenge nini tokoki kosala ete bolingo na biso na Yehova etikala makasi?

12 Kaka ndenge mitema ya bayekoli etondaki na esengo mpo bayebaki Makomami malamu, ekoki kozala ete yo mpe oyokaki bongo ntango okómaki koyeba Biblia malamumalamu. Yango esalisaki yo oyeba Yehova mpe olinga ye. Kotika te bolingo yango ekita.​—Matai 24:12.

13 Ntango okómi moninga ya Nzambe, osengeli kosala makasi mpo boninga na bino ezala kaka makasi. Osengeli kokoba koyekola makambo na ye mpe ya Yesu, kokanisa yango mpe kokanisa ndenge okoki kosalela yango na bomoi na yo. (Yoane 17:3) Ntango otángi to oyekoli likambo moko na Biblia, omituna: ‘Likambo oyo ezali koteya ngai nini mpo na Yehova Nzambe? Mpo na nini nasengeli kolinga ye na motema moko?’​—1 Timote 4:15.

14. Ndenge nini libondeli esalaka ete bolingo na biso na Yehova ezala kaka makasi?

14 Na ntembe te, osepelaka kosolola mingi na moto oyo olingaka mpe yango esalaka ete boninga na bino ezala kaka makasi. Ndenge moko mpe, ntango tozali kobondela Yehova mbala na mbala mpo na koyebisa ye makambo, bolingo na biso na ye ekozala kaka makasi. (Tángá 1 Batesaloniki 5:17.) Libondeli ezali likabo moko ya malamu ya Tata na biso ya likoló. Tosengeli ntango nyonso koyebisa ye makambo oyo euti na motema. (Nzembo 62:8) Tosengeli te kozongelaka mabondeli oyo tokangá na motó; tosengeli nde koyebisa ye mpenza mposa na biso. Soki tokobi koyekola Biblia mpe kobondela na motema moko, bolingo na biso na Yehova ekozala kaka makasi.

KOYEBISA BATO MAKAMBO YA YEHOVA

15, 16. Ndenge nini otalelaka mosala ya kosakola?

15 Soki tolingi kotikala penepene na Yehova, tosengeli mpe koyebisaka bato mateya na biso. Koyebisa bato makambo ya Yehova ezali lokumu monene. (Luka 1:74) Mpe yango nde mokumba oyo Yesu apesá bakristo nyonso ya solo. Mokomoko na biso asengeli kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Yo mpe obandá kosakola?​—Matai 24:14; 28:19, 20.

16 Ntoma Paulo azalaki komona ete kosakola ezali na ntina mingi; abengaki yango ‘eloko ya motuya.’ (2 Bakorinti 4:7) Koyebisa bato makambo ya Yehova mpe mokano na ye ezali mosala oyo eleki ntina oyo okoki kosala. Ezali lolenge ya kosalela Yehova, mpe mosala na yo ezali na motuya na miso na ye. (Baebre 6:10) Mosala ya kosakola ezali mpe malamu mpo na yo moko ná bato oyo bazali koyoka yo, mpo ekosalisa bino nyonso bópusana penepene na Yehova mpe bózwa bomoi ya seko. (Tángá 1 Bakorinti 15:58.) Ezali nde na mosala mosusu oyo ekoki kosepelisa yo koleka mosala ya kosakola?

17. Mpo na nini tosengeli kosakola na molende?

17 Mosala ya kosakola esengeli kosalema na molende mpenza. Tosengeli ‘kosakola liloba,’ mpe ‘kosala yango na molende.’ (2 Timote 4:2) Bato basengeli koyoka makambo etali Bokonzi ya Nzambe. Biblia elobi: “Mokolo monene ya Yehova ekómi pene. Ekómi pene, mpe ezali koya mbangu mpenza!” Nsuka “ekokóma nsima ya ngonga te!” (Sefania 1:14; Habakuku 2:3) Ya solo, etikali moke Yehova aboma mokili mabe ya Satana. Liboso likambo yango esalema, tosengeli kokebisa bato mpo bákoka kopona kosalela Yehova.

18. Mpo na nini tosengeli kosambela Yehova elongo na bakristo mosusu ya solo?

18 Yehova alingi ete tósambela ye elongo na bakristo mosusu ya solo. Biblia elobi: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.” (Baebre 10:24, 25) Tosengeli kosala nyonso mpo tókendaka makita nyonso. Na makita, tokolendisana mpe tokopesana makasi.

19. Nini ekoki kosalisa biso tólingaka bandeko na biso bakristo?

19 Na makita, okozwa baninga ya malamu oyo bakosalisa yo osambela Yehova. Okokutana na bandeko ndenge na ndenge oyo bazali kosala makasi, lokola yo, mpo na kosambela ye. Bango mpe bazali bato ya kozanga kokoka lokola yo mpe basalaka mabunga. Soki basali libunga, limbisá bango. (Tángá Bakolose 3:13.) Taláká libosoliboso bizaleli malamu ya bandeko na yo na lisangá, mpo yango ekosalisa yo olinga bango mpe opusana mpenza penepene na Yehova.

BOMOI YA SOLOSOLO

20, 21. “Bomoi ya solosolo” ezali nini?

20 Yehova alingi ete baninga na ye nyonso bázala na bomoi ya malamu mpenza. Biblia eteyaka biso ete bomoi na biso na mikolo ezali koya ekokokana ata moke te na oyo tozali na yango lelo oyo.

Yehova alingi ozwa “bomoi ya solosolo.” Okozwa yango?

21 Na mikolo ezali koya, tokozala na bomoi libela na libela, kasi te kaka mbula 70 to 80. Tokozwa “bomoi ya seko” na nzoto ya kokoka, na kimya, mpe na esengo na kati ya paradiso. Yango nde Biblia ebengi “bomoi ya solosolo.” Yehova alaki ete akopesa biso bomoi ya solosolo, kasi tosengeli kosala nyonso oyo tokoki sikoyo mpo ‘tósimba yango makasi.’​—1 Timote 6:12, 19.

22. (a) Ndenge nini tokoki ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo’? (b) Mpo na nini tokoki kosomba bomoi ya seko te?

22 Ndenge nini tokoki ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo’? Tosengeli ‘kosala makambo ya malamu’ mpe ‘kozala bazwi na misala ya malamu.’ (1 Timote 6:18) Yango elingi koloba ete tosengeli kosalela makambo oyo tozali koyekola na Biblia. Nzokande, tokozwa bomoi ya solosolo na makasi na biso moko te. Tokokoka kosomba bomoi ya seko te. Bomoi ya seko ezali likabo oyo Yehova apesi basaleli na ye ya sembo, yango ezali lolenge ya komonisa “boboto monene” na ye. (Baroma 5:15) Tata na biso ya likoló alingi mpenza kopesa basaleli na ye ya sembo likabo yango.

23. Mpo na nini osengeli koponaka makambo ya malamu banda sikoyo?

23 Omituna boye: ‘Nazali kosambela Nzambe na ndenge oyo andimaka?’ Soki omoni ete osengeli kobongisa makambo mosusu na bomoi na yo, salá yango sikoyo. Soki totyeli Yehova motema mpe tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kotosa ye, akozala ekimelo na biso to esika na biso ya komibomba. Akokoba kobatela basaleli na ye ya sembo na mikolo ya nsuka ya mokili mabe ya Satana. Na nsima, Yehova akosala ete tózala na paradiso libela na libela, ndenge alakaki yango. Okoki kozala na bomoi ya solosolo soki ozali kopona makambo ya malamu banda sikoyo!