Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 3

Nasala nini mpo nasololaka malamu na baboti na ngai?

Nasala nini mpo nasololaka malamu na baboti na ngai?

NTINA NA YANGO

Soki ozali koyokana malamu na baboti na yo, bomoi na yo ekozala pɛpɛlɛ.

YO OLINGAKI KOSALA NINI?

Talá likambo oyo: Tozali mokolo ya misato na mpokwa. Geoff, oyo azali na mbula 17, asilisi misala ya ndako, mpe amoni ete sikoyo baboti na ye bakotika ye apema mwa moke! Afungoli TV mpe ayekami na kiti oyo alingaka.

Na ntango yango, papa na bango atɛlɛmi na porte, elongi ekangamá, agangi:

“Geoffrey! Mpo na nini ozali kolekisa ntango liboso ya TV, osengelaki kosalisa leki na yo na kosala devuare! Osalaka te makambo oyo basɛngaka yo!”

Geoff alobi na mongongo ya nse: “Ebandi lisusu!” kasi papa ayoki.

Papa apusani. “Yo, olobi nini?”

Geoff apemi makasi, abaloli miso mpe alobi: “Eloko te, Papa.”

Sikoyo papa asiliki mpenza. Ayebisi ye: “Kolobaka na ngai ndenge wana te!”

Soki ozalaki Geoff, olingaki kosala nini mpo makambo ekóma ndenge wana te?

KANISÁ!

Kosolola na baboti na yo ezali lokola kotambwisa motuka. Soki esika moko bakangi nzela, okoki koluka nzela mosusu.

TÓZWA NDAKISA:

Elenge mwasi moko na nkombo Leah alobi boye: “Nakokaka kosolola na papa na biso te. Soki nazali koloba na ye, ayokaka te, okomona alobi, ‘nayoki te, ozalaki koloba na ngai?’”

LEAH AKOKI KOPONA NA MAKAMBO MISATO OYO.

  1. Kogangela papa na ye.

    Leah agangi, “Yoká naino, ezali makambo ya ntina! Papa!”

  2. Koboya koloba.

    Leah alobi akoyebisa lisusu papa makambo na ye te.

  3. Kozela ntango ya malamu, mpe koloba lisusu.

    Nsima ya mwa ntango, Leah asololi lisusu na papa na ye, to akomeli ye likambo yango na mokanda.

Yo olingaki koponela Leah likambo nini?

KANISÁ NAINO: Lokola makanisi ya papa ya Lea ezalaki na likambo mosusu, amonaki te ete Leah azali komitungisa. Soki Leah asali Likambo 1, papa akoyeba te ntina oyo azali koganga. Ntango mosusu soki agangi, papa akoyoka ye te, mpe ekomonisa ete apesi papa limemya mpe lokumu te. (Baefese 6:2) Na yango, kosala bongo ekozala malamu mpo na moto te.

Ndenge kaka okoluka nzela mosusu soki bakangi nzela na esika moko, okoki mpe koluka ndenge ya koyokana na baboti na yo

Likambo 2 ekoki komonana pɛtɛɛ na kosala, kasi ezali malamu te. Mpo na nini? Mpamba te, mpo na kosilisa makambo na ye, Leah asengeli kosolola na papa na ye. Lisusu, mpo papa asalisa ye, asengeli koyeba makambo yango. Koboya koloba ekosalisa ata moke te.

Soki Leah asali Likambo 3, wana atiki te ete mokakatano moko epekisa ye aluka nzela mosusu. Ameki koluka ntango mosusu mpo asolola na papa na ye. Mpe soki amoni malamu akomela papa na ye mokanda, Leah akomiyoka malamu mbala moko.

Ntango mosusu kokoma ekosalisa ye abimisa mpenza makambo oyo alingaki koloba. Ntango papa akotánga mokanda yango, akoyeba makambo oyo Leah alingaki koyebisa ye, mpe akomona nini ezali kotungisa ye. Na yango, kosala Likambo 3 ezali malamu mpo na Leah mpe papa na ye. Ezala na lisolo to na nzela ya mokanda, kosala bongo eyokani na toli ya Biblia oyo elobi ete “tólanda makambo oyo etyaka kimya.”Baroma 14:19.

Likambo nini mosusu Leah akokaki kosala?

Talá soki okoki kozwa moko. Na nsima, kanisá epai makambo yango ekokoki kosuka.

KEBÁ MALOBA NA YO EPESA LIKANISI MOSUSU TE

Kobosana te ete likambo oyo olobi ná oyo baboti na yo bakanisi ete olobi ezalaka ntango nyonso ndenge moko te.

TÓZWA NDAKISA:

Baboti batuni yo mpo na nini ozali mawamawa. Yo ozongisi: “Nalingi kolobela yango te.”

Mpo na baboti na yo olobi nde: “Nakoki koyebisa bino makambo na ngai te mpo natyelaka bino motema te. Nakoyebisa baninga na ngai, kasi bino te.”

Kanisá ete ozali na likambo moko mpe baboti na yo balingi kosalisa yo. Kasi olobi na bango: “Bómitungisa te. Ngai moko nakoki kosilisa yango.”

  • Makambo nini baboti na yo bakoki kokanisa?

  • Makambo nini ya malamu okoki kosala?