Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 5

Nasala nini mpo na matumoli na kelasi?

Nasala nini mpo na matumoli na kelasi?

NTINA NA YANGO

Ndenge oyo okosala ekobongisa to ekobebisa lisusu makambo.

YO OLINGAKI KOSALA NINI?

Talá likambo oyo: Thomas aboyi kokende kelasi lelo. Lobi mpe akokende te. Akimi na ye libela. Mpo na nini? Makambo ebandaki esali sanza misato ntango baninga na ye ya kelasi bapanzaki ye nsango ya lokuta. Na nsima, babambaki ye bankombo. Ntango mosusu mwana-kelasi akokweisa babuku ya Thomas mpe akosala lokola amonaki te; to baninga oyo bazali nsima na ye, moko na bango akotindika ye, mpe ntango Thomas akobaluka, akomona te nani atindiki ye. Lobi, makambo ebebaki lisusu ntango Thomas akutaki baninga bakomeli ye maloba ya kokanela na Internet . . .

Soki ozalaki Thomas, olingaki kosala nini?

KANISÁ!

Kokanisa te ete okoki kosala eloko te! Kutu, okoki kolonga matumoli kozanga ete obunda. Ndenge nini?

  • KOLOBA TE. Biblia elobi: “Zoba abimisaka elimo na ye nyonso, kasi ye oyo azali na bwanya abatelaka yango ezala kimya tii na nsuka.” (Masese 29:11) Soki osali makasi ofanda kimya, ata soki na motema ozali kobanga, bato oyo bazali kotumola yo bakoki kotika.

  • KOZONGISA MABE TE. Biblia elobi: “Bózongisela moto mabe na mabe te.” (Baroma 12:17) Kozongisa mabe na mabe ekobebisa lisusu makambo.

  • KOMILUKELA MAKAMBO TE. Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Salá makasi okima bato oyo bakoki kotungisa yo mpe boyá makambo oyo ekoki kosala ete bátumola yo.

  • PESÁ EYANO OYO BAKANISAKI TE. Biblia elobi: “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ [nkanda].” (Masese 15:1) Okoki komeka kosala ata mwa masɛki. Na ndakisa, soki moto oyo azali kotumola yo alobi ete ozali monene, okoki kotombola mapeka mpe koloba: “Namoni nasengeli kokɔnda!”

  • KOSALA ELOKO TE. Nora, oyo azali na mbula 19, alobi: “Kofanda nyɛɛ ekomonisa ete okoli mpe ete oleki moto oyo azali kotumola yo na makasi. Ekomonisa ete ozali na komipekisa, ezaleli oyo ye azangi.”2 Timote 2:24.

  • KOBANGA ELOKO TE. Mbala mingi, baoyo batumolaka baninga bayebaka soki moto azali kobanga, mpe akokoka kozongisa te. Kasi bato ya matumoli bakotika yo soki bamoni ete otikeli bango nzela te bámonela yo.

  • SOLOLÁ NA MOTO. Moto moko oyo kala azalaki molakisi alobi boye: “Nakosɛnga moto nyonso oyo batumolaka ye aloba likambo yango. Yango nde ebongi kosala, mpe ekoki kosala ete bátumola bato mosusu te.”

Kozala na mpiko ekopesa yo makasi oyo bato oyo batumolaka basusu bazalaka na yango te