Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 8

Bongo soki basangisá na ngai nzoto na makasi?

Bongo soki basangisá na ngai nzoto na makasi?

NTINA NA YANGO

Mbula na mbula, basangisaka na bamilio ya bato nzoto na makasi to batungisaka bango na likambo yango, mingimingi bilenge.

YO OLINGAKI KOSALA NINI?

Mobali moko akangaki Annette na makasi mpe abwakaki ye na mabele, mpe Annette ayebaki te soki ezali nini. Alobi boye: “Nabundisaki ye na makasi na ngai nyonso. Namekaki koganga, kasi mongongo ebimaki te. Natindikaki ye na makolo, nabɛtaki ye na nzoto, na elongi, mpe natyaki ye manzaka. Na ntango yango nde nayokaki mbeli na loposo na ngai. Makasi nyonso esilaki ngai.”

Soki yo nde okutanaki na likambo ya ndenge wana, olingaki kosala nini?

KANISÁ!

Ata soki omibongisi, na ndakisa ozali ekɛngɛ ntango ozali kotambola libándá na butu, likambo ya mabe ekoki kaka kosalema. Biblia elobi: “Ezali te bato ya mbangu mingi nde balongaka na momekano ya kopota mbangu . . . mpe ezali kutu te bato oyo bazali na boyebi nde bandimamaka; mpamba te ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka bango nyonso.”Mosakoli 9:11.

Ndenge moko na Annette, bilenge mosusu bayebaka te moto oyo asangisaki na bango nzoto na makasi. Mpo na bilenge mosusu, ezalaka moto oyo bayebi, ntango mosusu kutu moto ya libota na bango. Natalie azalaki na mbula 10 mpamba ntango elenge moko oyo azalaki kofanda pene na bango asangisaki na ye nzoto na makasi. Alobi boye: “Nabangaki makasi mpe nayokaki nsɔni, yango wana liboso nayebisaki moto te.”

EZALI FOTI NA YO TE

Tii lelo Annette amonaka ete ezalaki foti na ye. Alobi boye: “Likambo oyo elekaki na butu wana ezongelaka ngai mingi na makanisi. Nalobaka ete esengelaki nabunda lisusu makasi koleka. Nzokande, ntango nayokaki mbeli na nzoto na ngai, esalaki ngai nsɔmɔ. Nakokaki lisusu kosala eloko te, kasi namonaka ete esengelaki nasala eloko.”

Natalie mpe amonaka ete ezalaki foti na ye. Alobi boye: “Esengelaki te natyela ye motema. Papa ná mama bazalaki koyebisa ngai ná ndeko na ngai ya mwasi ete tózalaka esika moko soki tokei kosakana libándá, kasi nayokaki te. Namonaka ete natikelaki mwana mobali wana nzela abebisa ngai. Likambo wana etungisaki libota na biso, mpe namonaka ete ngai nde napesaki bango mpasi nyonso wana. Yango nde etungisaka ngai mingi.”

Soki okanisaka lokola Annette to Natalie, tyá na motó na yo ete moto oyo basangisi na ye nzoto na makasi andimaki te básala ye ndenge wana. Bato mosusu balukaka komona likambo yango mpamba; balobaka ete ezali mabe te bana mibali básala bongo to ete soki basangisi na mwana mwasi nzoto na makasi ye moko alukaki yango. Nzokande, moto te abongi básangisa na ye nzoto na makasi. Soki basalá yo likambo wana ya nsɔmɔ, ezali foti na yo te!

Ya solo, koyoka ete “ezali foti na yo te” ezali mpasi te; kondima yango nde ekoki kozala mpasi. Basi mosusu balobaka eloko te, mpe banyokwamaka na kokanisa ete ezalaki foti na bango mpe bazalaka na makanisi ya mabe. Kasi, kofanda nyɛɛ ezali mpo na bolamu ya nani, ya yo to ya moto oyo asalaki yo bongo? Ekozala malamu osala likambo mosusu.

YEBISÁ YANGO MOTO

Biblia elobi ete na ebele ya mitungisi oyo Yobo, moto ya sembo azalaki na yango, alobaki boye: “Nakoloba na bololo ya molimo na ngai!” (Yobo 10:1) Kosala bongo ekoki kosalisa yo. Koyebisa moto moko oyo otyelaka motema likambo yango, ekosalisa yo mokemoke ondima likambo yango mpe olongola makanisi ya mabe.

Ekoki kozala mpasi komema kilo yo moko. Mpo na nini te koyebisa moto mosusu likambo oyo ekómelá yo mpo asalisa yo?

Annette amonaki ete ezali solo. Alobi boye: “Nasololaki na moninga moko ya motema, mpe ayebisaki ngai nasolola na ndeko moko oyo azalaki nkulutu na lisangá ná mwasi na ye. Nasepelaka ndenge nasalaki yango. Bafandaki na ngai mbala mingi mpe bayebisaki ngai likambo oyo nazalaki na mposa na yango—ete oyo esalemaki ezalaki foti na ngai te. Nazalaki na foti ata moke te.”

Natalie asololaki na baboti na ye. Alobi boye: “Basalisaki ngai. Bayebisaki ngai nalobelaka likambo yango; yango esalisaki ngai natika kozala mawamawa mpe nkandankanda.”

Natalie azwaki mpe makasi na kobondela. Alobi boye: “Koyebisa Nzambe likambo yango esalisaki ngai, mingimingi na ntango nazalaki komona te ndenge ya kofungwela moto motema. Na libondeli, nalobaka polele. Epesaka ngai kimya mpe elongolaka mitungisi.”

Yo mpe okoki komona ete ezali na ntango ya kobika. (Mosakoli 3:3) Batelá kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe ya makanisi na yo. Laláká mingi. Mpe oyo eleki, talelá Yehova, Nzambe ya kobɔndisama nyonso.2 Bakorinti 1:3, 4.

SOKI OSÍ OKOLI

Soki azali mwana mwasi mpe olingani na moto oyo alingaka kaka bósala likambo ya mbindo, koloba na mpiko ete: “Kosala bongo te!” to, “Tiká kosimba ngai!” ezali mabe te. Kondima te kaka mpo ozali kobanga ete moto yango aboya yo. Soki aboyi mpo na likambo wana, boye azali mobali ya malonga te! Ozali na mposa ya mobali ya solosolo, oyo akopesa nzoto na yo kilo mpe akotosa makanisi na yo.

MITUNGISI NA MAKAMBO YA MBINDO EZALI NINI?

“Na eteyelo, bana mibali bazalaki kobenda ngai nsinga ya soutien mpe kotyola ngai na maloba lokola: nakoyoka malamu soki nasangisi nzoto na bango.”—Coretta.

Mpo na yo, bana mibali yango bazalaki koluka nini?

  1. Básakana?

  2. Bálulana?

  3. Kotungisa ye na makambo ya mbindo?

“Na bisi, mwana mobali moko alobaki na ngai makambo ya nsɔni mpe akangaki ngai. Nabɛtaki lobɔkɔ na ye mpe nabenganaki ye. Atalaki ngai lokola nde nazalaki ligboma.”—Candice.

Mpo na yo, elenge wana azalaki koluka nini?

  1. Básakana?

  2. Bálulana?

  3. Kotungisa ye na makambo ya mbindo?

“Mwana mobali moko azalaki kaka koyebisa ngai ete alingaka ngai, mpe atingamaki kaka nabima na ye, atako nazalaki koboya. Okomona azali kosimbasimba lobɔkɔ na ngai. Nazalaki koboya, kasi azalaki koyoka te. Mokolo moko ntango nazalaki kolata sapato, abɛtaki ngai na masɔkɔ.”—Bethany.

Mpo na yo, mwana mobali wana azalaki koluka nini?

  1. Básakana?

  2. Bálulana?

  3. Kotungisa ye na makambo ya mbindo?

Eyano ya malamu na mituna wana nyonso ezali 3.

Na ndenge nini kotungisa moto na makambo ya mbindo ekeseni na kolulana na moto to kosala masɛki?

Moto moko nde atungisaka moninga na makambo ya mbindo. Moto yango ayokaka te ata soki oyebisi ye atika.

Ezali masɛki te. Ekoki kotinda moto asangisa na moninga nzoto na makasi.