Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 10

Biblia ekoki kosalisa ngai na nini?

Biblia ekoki kosalisa ngai na nini?

NTINA NA YANGO

Biblia elobi ete “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” (2 Timote 3:16) Soki ezali solo, boye Biblia ekoki kolakisa yo nzela malamu ya kolanda.

YO OLINGAKI KOSALA NINI?

Talá likambo oyo: David azali kotambola na esika oyo ayebi ata moke te. Bilembo oyo etyami na nzela emonisi ye ete esika oyo azalaki koluka, yango te. David amoni ete abungi. Azwaki nzela ya mabe.

Soki ozalaki David, olingaki kosala nini?

KANISÁ!

Okoki kosala makambo mingi:

  1. Kotuna mpo básalisa yo.

  2. Kotala na karte, to kosalela GPS.

  3. Kokoba kaka kokende, na elikya ete okomona kaka nzela ya malamu.

Na ntembe te, kosala Likambo 3 ekosalisa mpenza te.

Likambo 2 ezali malamu koleka oyo ya liboso. Mpo okoki kozala na karte mpe GPS esika nyonso, mpe ekosalisa yo okoba na nzela na yo.

Biblia ekoki kosalisa yo na ndenge wana!

Buku yango oyo eyebani mingi ekoki

  • kosalisa yo na mikakatano ya bomoi

  • kosalisa yo omiyeba mpe okóma na bizaleli ya malamu

  • kolakisa yo bomoi oyo eleki malamu

BIYANO NA MITUNA YA NTINA NA BOMOI

Ntango kaka tobandi koyeba koloba, totunaka mituna.

  • Mpo na nini likoló emonanaka bleu?

  • Mpo na nini minzoto engɛngaka?

Na nsima, tokómaka kotuna mituna mpo na makambo oyo ezali koleka.

Okoloba nini soki biyano na mituna yango nyonso ezalaka na Biblia banda kala?

Bato mingi balobaka ete Biblia etondi na masapo mpe masolo ya kala, esilá ngala, to ezali mpasi koyeba yango. Kasi, Biblia nde ezali mokakatano, to makambo oyo bato bayoká mpo na Biblia nde mokakatano? Ntango mosusu makambo bayoká ezali lokuta?

Na ndakisa, bato bakanisaka ete Biblia elobi ete Nzambe nde azali kotambwisa mokili. Kasi, ezali solo? Mokili oyo etondi na yikiyiki! Bampasi epai, makambo ya mabe, maladi, liwa, bobola, mpe makama epai. Tokoki kopesa Nzambe ya bolingo foti mpo na makambo ya boye?

Olingi kozwa eyano na motuna wana? Okoki kokamwa koyeba oyo Biblia elobi mpo na moto oyo azali koyangela mokili!

Na ntembe te omonaki ete makanisi oyo ezali na mwa buku oyo euti na Biblia. Batatoli ya Yehova bandimaka ete Biblia nde elakisaka nzela ya malamu. Ezali bongo mpo “ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo.” (2 Timote 3:16, 17) Kotalela buku yango ya kala, kasi oyo ekoki kosalisa yo lelo, ekozala mpo na bolamu na yo moko!