Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 1

Nzambe asalaki likoló ná mabele

Nzambe asalaki likoló ná mabele

Yehova Nzambe azali Mozalisi na biso. Asalá biloko nyonso, oyo tomonaka ná oyo tomonaka te. Liboso asala biloko oyo tomonaka, asalaki baanzelu ebele mpenza. Oyebi baanzelu? Ezali bikelamu ya Yehova oyo bazali lokola ye. Tokoki komona bango te, ndenge kaka tokoki komona Nzambe te. Anzelu ya liboso oyo Yehova asalaki akómaki mosungi na ye. Asalisaki Yehova na kosala minzoto, baplanɛti, mpe biloko mosusu nyonso. Moko ya baplanɛti yango ezali mabele, esika ya kitoko mpo na bato.

Na nsima, Yehova abongisaki mabele mpo banyama mpe bato báfanda wana. Asalaki moi mpo engɛngisaka mabele. Asalaki bangomba, mbu mpe bibale.

Nini esalemaki na nsima? Yehova alobaki: ‘Nakosala matiti, milona ná banzete.’ Bambuma, ndunda, mpe fololo ndenge na ndenge ebandaki kobima. Na nsima, Yehova asalaki banyama nyonso​—oyo epumbwaka na likoló, oyo efandaka na mai, oyo etambolaka, ná oyo emibendaka. Asalaki banyama ya mike lokola basimbiliki (lapin), mpe ya minene lokola banzoku. Nyama nini olingaka mingi?

Na nsima, Yehova alobaki na anzelu yango ya liboso: “Tósala moto.” Bato bakokesana na banyama. Bakobanda kosala biloko. Bakobanda koloba, kosɛka, mpe kosambela. Bakobatela mabele mpe banyama. Moto ya liboso oyo Nzambe asalaki ezalaki nani? Tokolobela ye.

“Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.”​—Ebandeli 1:1