Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 2

Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso

Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso

Yehova alonaki elanga na esika moko babengaki Edene. Elanga yango etondaki na fololo, banzete, ná banyama. Na nsima, Nzambe azwaki putulu ya mabele mpe asalaki na yango Adama, mobali ya liboso, mpe apemaki na kati ya zolo na ye. Oyebi likambo esalemaki? Adama akómaki moto ya bomoi! Yehova apesaki Adama mokumba ya kobatela elanga, mpe ayebisaki ye apesa banyama nyonso nkombo.

Yehova apesaki Adama mobeko moko ya ntina mingi. Ayebisaki ye: ‘Okoki kolya mbuma ya nzete nyonso longola kaka mbuma ya nzete moko. Soki olei mbuma ya nzete yango okokufa.’

Na nsima Yehova alobaki: ‘Nakosalela Adama mosungi.’ Nzambe alalisaki Adama mpɔngi ya makasi, mpe alongolaki mokuwa moko na mopanzi ya Adama mpe asalelaki ye mwasi. Nkombo ya mwasi yango ezalaki Eva. Adama ná Eva nde basalaki libota ya liboso. Adama ayokaki ndenge nini mpo na mwasi na ye? Asepelaki mingi, mpe alobaki: ‘Talá eloko Yehova asali na mokuwa na ngai. Aaa! Azali moto lokola ngai.’

Yehova ayebisaki Adama ná Eva bábota bana, mpe bátondisa mabele. Alingaki básala elongo mpo na kokómisa mabele mobimba paradiso, esika ya kitoko, kaka lokola elanga ya Edene. Kasi makambo esalemaki bongo te. Mpo na nini? Tokoyeba yango na mokapo elandi.

“Moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi.”​—Matai 19:4